< Deuteronomy 31 >

1 And Moses finished speaking all these words to all Israel.
Moyize akobaki koloba maloba oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele:
2 He said to them, "I am one hundred twenty years old this day; I can no more go out and come in: and YHWH has said to me, 'You shall not go over this Jordan.'
« Nakokisi sik’oyo mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama mpe nazali lisusu na makasi te ya kokamba bino. Yawe alobaki na ngai: ‹ Okokatisa Yordani te oyo ozali komona. ›
3 YHWH your God, he will go over before you; he will destroy these nations from before you, and you shall dispossess them. Joshua shall go over before you, as YHWH has spoken.
Yawe, Nzambe na bino, akotambola Ye moko liboso na bino, akobebisa bikolo oyo ezali liboso na bino mpo ete bokamata mokili na bango; Jozue nde akotambola liboso na bino ndenge Yawe alobaki.
4 YHWH will do to them as he did to Sihon and to Og, the kings of the Amorites, and to their land; whom he destroyed.
Yawe akobebisa bango ndenge kaka asalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi ya bato ya Amori, oyo abebisaki elongo na bamboka na bango.
5 YHWH will deliver them up before you, and you shall do to them according to all the commandment which I have commanded you.
Yawe akokaba bango na maboko na bino mpe bokosala bango makambo nyonso oyo natindaki bino.
6 Be strong and courageous, do not be afraid, nor be scared of them: for YHWH your God is he who is going with you; he will not leave you nor forsake you."
Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »
7 Moses called to Joshua, and said to him in the sight of all Israel, "Be strong and courageous: for you shall go with this people into the land which YHWH has sworn to their fathers to give them; and you shall cause them to inherit it.
Bongo Moyize abengisaki Jozue mpe alobaki na ye na miso ya bana nyonso ya Isalaele: « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokende elongo na bato oyo kino na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi, mpe okokabola yango mpo na bango lokola libula na bango.
8 YHWH, he it is who does go before you; he will be with you, he will not fail you, neither forsake you: do not be afraid, neither be dismayed."
Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko. »
9 Moses wrote this law, and delivered it to the priests the sons of Levi, who bore the ark of the covenant of YHWH, and to all the elders of Israel.
Boye Moyize akomaki mibeko oyo mpe apesaki yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe epai ya bampaka nyonso ya Isalaele.
10 Moses commanded them, saying, "At the end of every seven years, in the set time of the year of release, in the feast of tents,
Moyize atindaki bango: « Na suka ya mibu sambo nyonso, na mobu ya kotika baniongo, na tango ya feti ya Bandako ya kapo,
11 when all Israel has come to appear before YHWH your God in the place which he shall choose, you shall read this law before all Israel in their hearing.
tango bana nyonso ya Isalaele bakopusana liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona, bokotanga mibeko oyo liboso na bango mpo ete matoyi na bango ekoka koyoka.
12 Assemble the people, the men and the women and the little ones, and your foreigner who is within your gates, that they may hear, and that they may learn, and fear YHWH your God, and observe to do all the words of this law;
Bosangisa bato: mibali, basi, bana mpe bapaya oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bakoka koyoka mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, mpe kosalela malamu maloba nyonso ya mibeko oyo.
13 and that their children, who have not known, may hear, and learn to fear YHWH your God, as long as you live in the land where you go over the Jordan to possess it."
Bana na bango oyo bayebi mibeko oyo te basengeli koyoka yango malamu mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokovanda kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. »
14 YHWH said to Moses, "Look, your days approach that you must die: call Joshua, and present yourselves in the Tent of Meeting, that I may commission him." Moses and Joshua went, and presented themselves in the Tent of Meeting.
Yawe alobaki na Moyize: « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani.
15 YHWH appeared in the Tent in a pillar of cloud: and the pillar of cloud stood over the door of the Tent.
Yawe amimonisaki epai na bango lokola likonzi ya lipata kati na Ndako ya kapo ya Bokutani; mpe likonzi yango ya lipata etelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
16 YHWH said to Moses, "Look, you shall sleep with your fathers; and this people will rise up, and play the prostitute after the strange gods of the land, where they go to be among them, and will forsake me, and break my covenant which I have made with them.
Yawe alobaki na Moyize: « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.
17 Then my anger shall be kindled against them in that day, and I will forsake them, and I will hide my face from them, and they shall be devoured, and many evils and troubles shall come on them; so that they will say in that day, 'Haven't these evils come on us because our God is not among us?'
Na mokolo wana, nakosilikela bango mpe nakobosana bango. Boye, nakobombela bango elongi na Ngai, mpe bakobebisama. Bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango. Mpe na mokolo wana, bakomituna: ‹ Ezali te mpo ete Nzambe na biso azali lisusu elongo na biso te nde bokono oyo ekomeli biso te? ›
18 I will surely hide my face in that day for all the evil which they shall have worked, in that they are turned to other gods.
Solo, na mokolo wana, nakobombela bango elongi na Ngai mpo na mabe nyonso oyo basalaki, wana bakendeki epai ya banzambe mosusu.
19 "Now therefore write the words of this song for yourselves, and teach it to the children of Israel: put it in their mouths, that this song may be a witness for me against the children of Israel.
Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango.
20 For when I shall have brought them into the land which I swore to their fathers, flowing with milk and honey, and they shall have eaten and filled themselves, and grown fat; then will they turn to other gods, and serve them, and despise me, and break my covenant.
Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi: bakolia, bakotonda mpe bakoya minene; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai.
21 It shall happen, when many evils and troubles have come on them, that this song shall testify before them as a witness; for it shall not be forgotten out of the mouths of their descendants: for I know their imagination which they frame this day, before I have brought them into the land which I swore."
Tango bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango, nzembo oyo ekotatola mpo na kofunda bango, pamba te bakitani na bango bakobosana yango te. Nayebi makambo oyo bazali kokana kosala atako nakotisi bango nanu te kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi. »
22 So Moses wrote this song the same day, and taught it the children of Israel.
Boye, Moyize akomaki nzembo yango kaka na mokolo wana mpe alakisaki yango bana ya Isalaele.
23 He commissioned Joshua the son of Nun, and said, "Be strong and courageous; for you shall bring the children of Israel into the land which I swore to them: and I will be with you."
Yawe apesaki mitindo oyo epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni: « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokotisa bana ya Isalaele kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi, mpe Ngai moko nakozala elongo na yo. »
24 It happened, when Moses had made an end of writing the words of this law on a scroll, until they were finished,
Moyize asilisaki kokoma kati na buku maloba nyonso ya mobeko oyo.
25 that Moses commanded the Levites, who bore the ark of the covenant of YHWH, saying,
Bongo Moyize apesaki mitindo oyo epai ya Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe:
26 "Take this book of the law, and put it by the side of the ark of the covenant of YHWH your God, that it may be there for a witness against you.
« Bokamata buku oyo ya Mobeko mpe botia yango pembeni ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino; ekozala kuna lokola litatoli mpo na bino.
27 For I know your rebellion, and your stiff neck: look, while I am yet alive with you this day, you have been rebellious against God; and how much more after my death?
Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai?
28 Assemble to me all the elders of your tribes, and your elders and your judges and your officers, that I may speak these words in their ears, and call heaven and earth to witness against them.
Bosangisa liboso na ngai bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bakalaka na bino, mpo ete naloba maloba oyo na matoyi na bango mpe nazwa likolo mpe se lokola batatoli mpo na kofunda bango.
29 For I know that after my death you will utterly corrupt yourselves, and turn aside from the way which I have commanded you; and evil will happen to you in the latter days; because you will do that which is evil in the sight of YHWH, to provoke him to anger through the work of your hands."
Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. »
30 Moses spoke in the ears of all the assembly of Israel the words of this song, until they were finished.
Moyize alobaki maloba ya nzembo yango, banda na ebandeli kino na suka, wana lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ezalaki koyoka:

< Deuteronomy 31 >