< Acts 1 >
1 The first account I wrote, Theophilus, concerned all that Jesus began both to do and to teach,
Teofile: Kati na buku na ngai ya liboso, nakomaki makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpe ateyaki wuta na ebandeli
2 until the day in which he was received up, after he had given commandment through the Holy Spirit to the apostles whom he had chosen.
kino na mokolo oyo amemamaki na Likolo, sima na Ye kopesa mitindo, na nzela ya Molimo Mosantu, epai ya bantoma oyo aponaki.
3 To these he also showed himself alive after he suffered, by many proofs, appearing to them over a period of forty days, and speaking about God's Kingdom.
Sima na kufa na Ye, amimonisaki epai na bango; mpe na nzela ya bilembo mingi, alakisaki bango ete azali na bomoi. Abimelaki bango mikolo tuku minei mpe alobelaki bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe.
4 Being assembled together with them, he commanded them, "Do not depart from Jerusalem, but wait for the promise of the Father, which you heard from me.
Mokolo moko, wana azalaki kolia elongo na bango, apesaki bango mitindo oyo: « Bolongwa na Yelusalemi te, kasi bozela likabo oyo Tata na Ngai alakaki, likabo oyo boyokaki Ngai kolobela.
5 For John indeed baptized in water, but you will be baptized in the Holy Spirit not many days from now."
Pamba te Yoane abatisaki na mayi; kasi bino, sima na mwa mikolo, bokobatisama kati na Molimo Mosantu. »
6 Therefore, when they had come together, they asked him, "Lord, are you now restoring the kingdom to Israel?"
Lokola basanganaki zingazinga na Ye, batunaki Ye: — Nkolo, ekozala na tango wana nde okozongisa Bokonzi epai ya Isalaele?
7 He said to them, "It is not for you to know times or seasons which the Father has set within his own authority.
Yesu azongiselaki bango: — Likambo ya koyeba tango to mikolo oyo Tata abongisa, na mokano na Ye moko, etali bino te.
8 But you will receive power when the Holy Spirit has come upon you. You will be my witnesses in Jerusalem, in all Judea and Samaria, and to the farthest part of the earth."
Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.
9 When he had said these things, as they were looking, he was taken up, and a cloud took him out of their sight.
Sima na Yesu koloba bongo, amemamaki, wana bazalaki kotala, mpe lipata moko ezipaki Ye na miso na bango.
10 While they were looking steadfastly into the sky as he went, look, two men stood by them in white clothing,
Mpe wana bazalaki nanu kotala na likolo ndenge Yesu azali komata, mbala moko bato mibale balata bilamba ya pembe-pembe batelemaki pembeni na bango mpe balobaki:
11 who also said, "You men of Galilee, why do you stand looking into the sky? This Jesus, who was received up from you into the sky will come back in the same way as you saw him going into the sky."
— Bato ya Galile, mpo na nini botikali awa na kotala na likolo? Yesu oyo alongwe kati na bino mpo na kokende na Likolo, akozonga ndenge kaka bomoni Ye kokende na Likolo.
12 Then they returned to Jerusalem from the mountain called Olivet, which is near Jerusalem, a Sabbath day's journey away.
Bantoma bazongaki na Yelusalemi wuta na ngomba oyo babengaka Ngomba ya banzete ya Olive, oyo ezali pene ya Yelusalemi, na mosika ya bametele pene nkoto moko.
13 When they had come in, they went up into the upper room, where they were staying; that is Peter, John, James, Andrew, Philip, Thomas, Bartholomew, Matthew, James the son of Alphaeus, Simon the Zealot, and Judas the son of James.
Tango bakomaki, bamataki na shambre ya likolo, kati na etaje epai wapi bazalaki kosangana mbala na mbala. Ezalaki: Petelo, Yoane, Jake, Andre, Filipo, Toma, Bartelemi, Matayo; Jake, mwana mobali ya Alife; Simona oyo azalaki moto ya lingomba ya Bazelote; mpe Jide, mwana mobali ya Jake.
14 All these with one accord continued steadfastly in prayer, along with the women, and Mary the mother of Jesus, and with his brothers.
Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.
15 In these days, Peter stood up in the midst of the brothers (and the number of names was about one hundred twenty), and said,
Mokolo moko kati na mikolo yango, Petelo atelemaki kati na bandimi pene nkama moko na tuku mibale
16 "Brothers, it was necessary that this Scripture should be fulfilled, which the Holy Spirit spoke before by the mouth of David concerning Judas, who was guide to those who took Jesus.
mpe alobaki na bango: « Bandeko na ngai, esengelaki ete masakoli ya Makomi ekokisama; pamba te Molimo Mosantu aloba wuta kala, na nzela ya Davidi, na tina na Yuda oyo atambolisaki bato oyo bakangaki Yesu.
17 For he was numbered with us, and received his portion in this ministry.
Azalaki moko kati na biso mpe asanganaki elongo na biso kati na lotomo oyo epesamelaki biso. »
18 Now this man obtained a field with the reward for his wickedness, and falling headfirst his body burst open, and all his intestines gushed out.
Na nzela ya mbongo oyo azwaki lokola lifuti ya mabe na ye, asombaki elanga; akweyaki kuna moto na se, libumu na ye epasukaki, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki.
19 It became known to everyone who lived in Jerusalem that in their language that field was called 'Hakel-Dema,' that is, 'The field of blood.'
Bato nyonso ya Yelusalemi bayokaki sango yango; yango wana bakomaki kobenga elanga yango « Akelidama » oyo elingi koloba, na lokota na bango: Elanga ya makila.
20 For it is written in the scroll of Psalms, 'Let his habitation be made desolate, and let no one dwell in it;' and, 'Let another take his office.'
Nzokande, ekomama boye kati na buku ya banzembo: « Tika ete ndako na ye etikala polele, mpe tika ete moto moko te avanda kati na yango! » Mpe: « Tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye! »
21 "Of the men therefore who have accompanied us all the time that the Lord Jesus went in and out among us,
Boye, tosengeli kopona moto moko kati na mibali oyo bazalaki elongo na biso tango nyonso oyo Nkolo Yesu azalaki kotambola na mokili elongo na biso,
22 beginning from the baptism of John, to the day that he was received up from us, of these one must become a witness with us of his resurrection."
kobanda na tango oyo Yoane abatisaki Ye kino na mokolo oyo balongolaki Ye kati na biso. Pamba te moko kati na mibali yango asengeli kokoma, elongo na biso, motatoli ya lisekwa na Ye.
23 They put forward two, Joseph called Barsabbas, who was surnamed Justus, and Matthias.
Bapesaki bakombo ya bato mibale: Jozefi oyo babengaki « Barsabasi » mpe ayebanaki lisusu na kombo Yusitusi, mpe Matiasi.
24 They prayed, and said, "You, Lord, who know the hearts of all people, show which one of these two you have chosen
Bongo basambelaki boye: « Oh Nkolo, Yo oyo oyebi mitema ya bato nyonso, lakisa biso nani oyo oponi kati na bato oyo mibale,
25 to take part in this ministry and office of apostle from which Judas turned away to go to his own place."
mpo ete akoma ntoma mpe azwa, kati na lotomo oyo ya bontoma, esika oyo Yuda atikaki mpo na kokende na esika oyo ebongi na ye. »
26 They drew lots for them, and the lot fell on Matthias, and he was numbered with the eleven apostles.
Bongo babetaki zeke, mpe zeke ekweyaki epai ya Matiasi; boye Matiasi aponamaki, mpe babakisaki ye na lisanga ya bantoma zomi na moko.