< Acts 16 >
1 He came also to Derbe and Lystra. And look, a certain disciple was there, named Timothy, the son of a Jewish woman who believed; but his father was a Greek.
Polo akomaki na Derbe mpe na Listre, epai wapi akutanaki na moyekoli moko, kombo na ye ezali « Timote. » Mama na ye azalaki Moyuda, kasi akomaki kondima Klisto; mpe tata na ye azalaki moto ya Grese.
2 The brothers who were at Lystra and Iconium gave a good testimony about him.
Litatoli na ye ezalaki malamu kati na bandeko ya Listre mpe ya Ikoniomi.
3 Paul wanted to have him go out with him, and he took and circumcised him because of the Jews who were in those parts; for they all knew that his father was a Greek.
Polo azalaki na posa ya kosala mobembo elongo na ye, boye akatisaki ye ngenga; pamba te Bayuda oyo bazalaki kovanda kuna bayebaki ete tata na ye azalaki moto ya Grese.
4 As they went on their way through the cities, they delivered the decrees to them to keep which had been ordained by the apostles and elders who were at Jerusalem.
Kati na bingumba nyonso oyo bazalaki koleka, bazalaki koyebisa bandimi mikano oyo bantoma mpe bakambi ya Lingomba bazwaki na Yelusalemi, mpe bazalaki kosenga na bango ete batosa yango.
5 So the churches were strengthened in the faith, and increased in number daily.
Boye, Mangomba ezalaki kolendisama kati na kondima, mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.
6 When they had gone through the region of Phrygia and Galatia, they were forbidden by the Holy Spirit to speak the word in Asia.
Lokola Molimo Mosantu apesaki bango nzela te ya koteya Liloba kati na etuka ya Azia, Polo elongo na baninga na ye bakendeki na etuka ya Friji mpe ya Galatia.
7 When they had come opposite Mysia, they tried to go into Bithynia, but the Spirit of Jesus did not allow them.
Tango bakomaki na mondelo ya Mizi, bazwaki likanisi ya kokende na Bitini, kasi Molimo ya Yesu apesaki bango nzela te.
8 Passing by Mysia, they came down to Troas.
Boye bakatisaki etuka ya Mizi mpe bakendeki kino na libongo ya Troasi.
9 A vision appeared to Paul in the night. There was a man of Macedonia standing, begging him, and saying, "Come over into Macedonia and help us."
Na butu, Polo azwaki emoniseli moko: « Moto moko ya Masedwane atelemaki liboso na ye mpe azalaki kobondela ye: ‹ Nabondeli yo, yaka kosunga biso kati na Masedwane! › »
10 When he had seen the vision, immediately we sought to go out to Macedonia, concluding that the Lord had called us to proclaim the Good News to them.
Sima na Polo kozwa emoniseli, tolukaki mbala moko kokende na Masedwane, pamba te tososolaki ete ezali Nzambe nde abengi biso mpo ete tokende koteya kuna Sango Malamu.
11 Then, setting sail from Troas, we made a straight course to Samothrace, and the day following to Neapolis;
Longwa na Troasi, tozwaki masuwa mpe tokendeki mbala moko kino na esanga ya Samotrase; bongo mokolo oyo elandaki, tokomaki na Neyapolisi.
12 and from there to Philippi, which is a principle city of that district of Macedonia, a colony. We were staying some days in this city.
Kolongwa wana, tokendeki na Filipi, mboka mokonzi ya etuka ya Masedwane oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Rome. Tovandaki kuna mwa mikolo.
13 On the Sabbath day we went forth outside of the gate by a riverside, where we supposed there was a place of prayer, and we sat down, and spoke to the women who had come together.
Na mokolo ya Saba, tobimaki na libanda ya ekuke ya engumba mpo na kokende pembeni ya ebale epai wapi tokanisaki ete tokomona esika ya losambo. Wana tovandaki, tokomaki koteya basi oyo basanganaki kuna.
14 A certain woman named Lydia, a seller of purple, of the city of Thyatira, one who worshiped God, heard us; whose heart the Lord opened to listen to the things which were spoken by Paul.
Kati na basi yango, ezalaki na mwasi moko, kombo na ye « Lidi. » Azalaki moteki ya bilamba ya motane, moto ya Tiyatire mpe mogumbameli ya Nzambe. Azalaki koyoka, mpe Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete akangama na makambo oyo Polo azalaki koloba.
15 When she and her household were baptized, she urged us, saying, "If you have judged me to be faithful to the Lord, come into my house, and stay." So she persuaded us.
Tango ye elongo na bato ya libota na ye bazwaki libatisi, abengisaki biso na ndako na ye; alobaki: — Soki bomoni ete ngai nakomi penza mondimi ya Nkolo, boya kovanda na ndako na ngai. Boye, asalaki nyonso mpo ete tondima kokende na ndako na ye.
16 It happened, as we were going to prayer, that a certain girl having a spirit of Python met us, who brought her masters much gain by fortune telling.
Mokolo moko, wana tozalaki kokende na esika ya losambo, tokutanaki na mwasi mowumbu moko oyo azalaki na molimo mabe oyo ezalaki kosunga ye mpo na kosakola makambo oyo ekoya, mpe azalaki kozwela bankolo na ye mbongo ebele na nzela ya masakoli na ye.
17 She followed Paul and us, shouting, "These men are servants of the Most High God, who proclaim to you the way of salvation."
Mwasi yango azalaki kolanda biso, Polo mpe biso, na koganga: — Bato oyo bazali basali ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, bazali koteya bino nzela ya lobiko.
18 She was doing this for many days. But Paul, becoming greatly annoyed, turned and said to the spirit, "I command you in the name of Jesus Christ to come out of her." And it came out at once.
Lokola azalaki kosala bongo wuta mikolo ebele, suka na suka, Polo atombokaki, abalukaki mpe alobaki na molimo mabe yango: — Na Kombo na Yesu-Klisto, napesi yo mitindo: bima kati na mwasi oyo! Kaka na tango yango, molimo yango ebimaki kati na ye.
19 But when her masters saw that the hope of their gain was gone, they seized Paul and Silas, and dragged them into the marketplace before the rulers.
Tango bankolo ya mowumbu yango bamonaki ete elikya na bango ya kozwa mbongo ekeyi na mopepe, bakangaki Polo mpe Silasi, mpe bamemaki bango liboso ya bakonzi, na esika ya bato ebele.
20 When they had brought them to the magistrates, they said, "These men, being Jews, are agitating our city,
Bamemaki bango liboso ya basambisi mpe balobaki: — Bato oyo bazali Bayuda; bazali kotia mobulu kati na engumba na biso.
21 and set forth customs which it is not lawful for us to accept or to observe, being Romans."
Bazali koluka kokotisa awa bizaleli oyo mibeko epekisi biso, bato ya Rome, kondima mpe kosalela.
22 The crowd rose up together against them, and the magistrates tore their clothes off of them, and commanded them to be beaten with rods.
Bato oyo batondaki wana batombokelaki Polo mpe Silasi, bongo basambisi bapesaki mitindo ete balongola bango bilamba mpe babeta bango fimbu.
23 When they had laid many stripes on them, they threw them into prison, charging the jailer to keep them safely,
Sima na kobetisa bango fimbu makasi, babwakaki bango kati na boloko; bapesaki mitindo na mokengeli boloko ete akengela bango malamu.
24 who, having received such a command, threw them into the inner prison, and secured their feet in the stocks.
Tango kaka mokengeli azwaki mitindo oyo, abwakaki bango kati na boloko ya kati mpe akangisaki makolo na bango na mabaya.
25 But about midnight Paul and Silas were praying and singing hymns to God, and the prisoners were listening to them.
Pene na midi ya butu, Polo mpe Silasi bazalaki kosambela mpe kokumisa Nzambe na banzembo; bakangami mosusu bazalaki koyoka bango.
26 Suddenly there was a great earthquake, so that the foundations of the prison were shaken; and immediately all the doors were opened, and everyone's bonds were loosened.
Mbala moko, mabele eninganaki makasi, mpe miboko ya boloko eninganaki. Kaka na tango yango, miboko ya boloko ebukanaki, bikuke nyonso ya boloko efungwamaki, mpe minyololo ya bakangami nyonso ekatanaki.
27 The jailer, being roused out of sleep and seeing the prison doors open, drew his sword and was about to kill himself, supposing that the prisoners had escaped.
Mokengeli boloko alamukaki; mpe tango amonaki ete bikuke ya boloko ezali ya kofungwama, abendaki mopanga na ye mpo ete amiboma, pamba te akanisaki ete bakangami bakimi.
28 But Paul shouted loudly, saying, "Do not harm yourself, for we are all here."
Kasi Polo agangaki na mongongo makasi: — Komisala mabe te! Biso nyonso tozali awa!
29 He called for lights and sprang in, and, fell down trembling before Paul and Silas,
Mokengeli boloko asengaki mwinda, akotaki mbangu kati na boloko, mpe amibwakaki liboso ya Polo mpe Silasi na kolenga makasi.
30 and brought them out and said, "Sirs, what must I do to be saved?"
Bongo abimisaki bango libanda mpe atunaki bango: — Batata, nasala nini mpo ete nabika?
31 They said, "Believe in the Lord Jesus, and you will be saved, you and your household."
Bazongisaki: — Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.
32 They spoke the word of the Lord to him, and to all who were in his house.
Bongo bateyaki ye mpe libota na ye Liloba na Nkolo.
33 He took them the same hour of the night, and washed their stripes, and was immediately baptized, he and all his household.
Kaka na ngonga wana ya butu, mokengeli boloko azwaki bango elongo na ye mpe asukolaki bango bapota; bongo, mbala moko, ye mpe libota na ye bazwaki libatisi.
34 He brought them up into his house, and set food before them, and rejoiced greatly, with all his household, having believed in God.
Sima, mokengeli boloko amemaki Polo mpe Silasi na ndako na ye, mpe apesaki bango bilei; mpe atondisamaki na esengo makasi, pamba te ye mpe bato nyonso ya libota na ye bandimelaki Nzambe.
35 But when it was day, the magistrates sent the sergeants, saying, "Let those men go."
Tango tongo etanaki, basambisi batindaki basali na bango epai ya mokengeli boloko mpo na koyebisa ye: — Bimisa bato wana na boloko!
36 The jailer reported these words to Paul, saying, "The magistrates have sent to let you go; now therefore come out, and go in peace."
Mokengeli boloko alobaki na Polo: — Basambisi bapesi ngai mitindo ete nabimisa bino na boloko. Boye sik’oyo, bobima mpe bokende na kimia.
37 But Paul said to them, "They have beaten us publicly, without a trial, men who are Romans, and have cast us into prison. Do they now release us secretly? No indeed. Let them come themselves and bring us out."
Kasi Polo azongisaki: — Nini! Basambisi biso te, kasi babetisi biso fimbu na miso ya bato mpe babwaki biso na boloko, nzokande biso tozali bato ya Rome. Balingi sik’oyo kobimisa biso na nkuku? Te, ekosalema bongo te! Tika ete bango moko baya kobimisa biso!
38 The sergeants reported these words to the magistrates, and they were afraid when they heard that they were Romans,
Basali bakendeki koyebisa makambo yango epai ya basambisi. Tango kaka basambisi bayokaki ete Polo mpe Silasi bazali bato ya Rome, babangaki makasi.
39 and they came and apologized to them. When they had brought them out, they asked them to depart from the city.
Bayaki kosenga bango bolimbisi, mpe babimisaki bango na boloko. Basengaki na bango ete balongwa na engumba wana.
40 They went out of the prison, and entered into Lydia's house. When they had seen the brothers, they encouraged them, and departed.
Sima na Polo mpe Silasi kobima na boloko, bakendeki na ndako ya Lidi, epai wapi bakutanaki na bandeko mpe balendisaki bango. Bongo, bazongelaki mobembo na bango.