< Acts 12 >

1 Now about that time, Herod the king stretched out his hands to oppress some of the church.
Na tango yango, mokonzi Erode akangaki ndambo ya bandimi ya Lingomba mpo na konyokola bango.
2 He killed James, the brother of John, with the sword.
Abomaki kutu Jake, ndeko mobali ya Yoane, na mopanga.
3 When he saw that it pleased the Jewish people, he proceeded to seize Peter also. This was during the days of unleavened bread.
Tango amonaki ete likambo yango ezalaki kosepelisa Bayuda, akangaki mpe Petelo na tango ya feti ya mapa ezanga levire.
4 When he had arrested him, he put him in prison, and delivered him to four squads of four soldiers each to guard him, intending to bring him out to the people after the Passover.
Sima na ye kokanga Petelo, atiaki ye kati na boloko mpe aponaki masanga minei ya basoda mpo ete bakengela ye; lisanga moko na moko ezalaki na basoda minei. Erode azalaki na makanisi ya kosambisa ye na miso ya bato sima na feti ya Pasika.
5 Peter therefore was kept in the prison, but constant prayer was made by the church to God for him.
Petelo azalaki kati na boloko, kasi Lingomba ezalaki kobondela Nzambe na molende mpo na ye.
6 The same night when Herod was about to bring him out, Peter was sleeping between two soldiers, bound with two chains. Guards in front of the door kept the prison.
Na butu ya mokolo oyo Erode alingaki kosambisa ye, Petelo alalaki pongi na kati-kati ya basoda mibale, akangama na minyololo mibale, mpe bakengeli bazalaki kobatela ekuke ya boloko.
7 And look, an angel of the Lord stood by him, and a light shone in the cell. He struck Peter on the side, and woke him up, saying, "Stand up quickly." His chains fell off from his hands.
Mbala moko, anjelu ya Nkolo abimaki na pwasa, mpe pole engengaki kati na boloko. Anjelu aningisaki Petelo na mopanzi mpo na kolamusa ye; alobaki na ye: — Telema noki! Mpe minyololo ekweyaki longwa na maboko ya Petelo.
8 The angel said to him, "Get dressed and put on your sandals." He did so. He said to him, "Put on your cloak, and follow me."
Anjelu alobaki na ye: — Lata elamba na yo, mokaba na yo mpe basandale na yo! Petelo asalaki bongo. Anjelu alobaki na ye lisusu: — Lata nzambala na yo mpe landa ngai.
9 And he went out and followed him. He did not know that what was being done by the angel was real, but thought he saw a vision.
Petelo alandaki anjelu kino na libanda ya boloko, kasi ayebaki te ete makambo oyo anjelu azali kosala ezali penza ya solo: akanisaki ete azwi emoniseli.
10 When they were past the first and the second guard, they came to the iron gate that leads into the city, which opened to them by itself. They went out, and went down one street, and immediately the angel departed from him.
Balekaki bakengeli ya liboso mpe ya mibale, mpe bakomaki na ekuke ya bibende oyo epesaka nzela ya kokota na engumba. Ekuke efungwamaki yango moko liboso na bango; bongo babimaki mpe batambolaki na balabala moko. Mpe mbala moko, anjelu atikaki Petelo.
11 When Peter had come to himself, he said, "Now I truly know that the Lord has sent out his angel and delivered me out of the hand of Herod, and from everything the Jewish people were expecting."
Tango mayele na ye ya bomoto ezongaki, Petelo amilobelaki: — Ah, nasosoli sik’oyo, ezali penza ya solo! Nkolo atindaki anjelu na Ye mpe akangoli ngai na maboko ya Erode mpe na makambo nyonso oyo Bayuda balingaki kosala ngai.
12 Thinking about that, he came to the house of Mary, the mother of John whose surname was Mark, where many were gathered together and were praying.
Tango amonaki bongo, akendeki na ndako ya Mari, mama ya Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. » Bandimi ebele basanganaki kuna mpe bazalaki kosambela.
13 And when Peter knocked at the door of the gate, a servant girl named Rhoda came to answer.
Petelo abetaki ekuke; mpe mwasi mosali moko, kombo na ye « Rode, » apusanaki na ekuke mpo na koyanola.
14 When she recognized Peter's voice, she did not open the gate for joy, but ran in, and reported that Peter was standing in front of the gate.
Tango asosolaki ete ezali mongongo ya Petelo, atondaki na esengo; na esika ya kofungola ekuke, azongaki mbangu mpe agangaki: — Eh, ezali Petelo! Azali wana, na libanda, liboso ya ekuke!
15 They said to her, "You are crazy." But she insisted that it was so. They said, "It is his angel."
Balobaki na ye: — Okomi penza na liboma! Kasi Rode azalaki kaka koloba: — Ya solo penza! Petelo azali na libanda. Bongo balobaki: — Ekoki kozala anjelu na ye!
16 But Peter continued knocking. When they had opened, they saw him, and were amazed.
Nzokande, Petelo azalaki kokoba kobeta ekuke. Boye, tango bafungolaki ekuke mpe bamonaki ye, bakamwaki makasi.
17 But he, beckoning to them with his hand to be silent, declared to them how the Lord had brought him out of the prison. He said, "Tell these things to James, and to the brothers." Then he departed, and went to another place.
Petelo apepelaki bango loboko mpo ete bavanda kimia, mpe ayebisaki bango ndenge nini Nkolo abimisaki ye na boloko. Alobaki lisusu: — Boyebisa makambo oyo epai ya Jake mpe bandeko mosusu. Sima na yango, abimaki mpe akendeki na esika mosusu.
18 Now as soon as it was day, there was no small stir among the soldiers about what had become of Peter.
Na tongo, mobulu monene ebimaki kati na basoda, pamba te bazalaki kotunana: — Likambo nini ekomelaki Petelo?
19 When Herod had sought for him, and did not find him, he examined the guards, and commanded that they should be put to death. He went down from Judea to Caesarea, and stayed there.
Erode atindaki bato koluka Petelo, kasi bamonaki ye te. Bongo, sima na ye kosambisa bakengeli, apesaki mitindo ete baboma bango. Sima na yango, Erode atikaki Yuda mpe akendeki kovanda mwa mikolo na Sezarea.
20 Now Herod was very angry with the people of Tyre and Sidon. They came with one accord to him, and, having made Blastus, the king's personal aide, their friend, they asked for peace, because their country depended on the king's country for food.
Nzokande, Erode asilikelaki makasi bato ya Tiri mpe ya Sidoni. Bongo, bato ya Tiri mpe ya Sidoni bayokanaki mpe basengaki kokutana na Erode. Sima na bango kozwa lisungi ya Blasitisi, motambolisi misala ya shambre ya mokonzi, basengaki kimia kati na Erode mpe bango, pamba te bilei na bango ezalaki kowuta na mokili ya mokonzi Erode.
21 On an appointed day, Herod dressed himself in royal clothing, and sat on the throne, and gave a speech to them.
Tango mokolo oyo akataki ekokaki, Erode alataki bilamba na ye ya bokonzi, avandaki na kiti na ye ya bokonzi mpe alobaki na bato.
22 But the crowd shouted, "The voice of a god, and not of a man."
Bato bagangaki: — Tala yango oyo, mongongo ya nzambe; ezali mongongo ya moto te!
23 Immediately an angel of the Lord struck him, because he did not give God the glory, and he was eaten by worms and died.
Mbala moko, anjelu ya Nkolo abetaki Erode mpo ete apesaki Nzambe lokumu te; boye bankusu eliaki ye, mpe akufaki.
24 But the word of God grew and multiplied.
Kasi Liloba na Nzambe ekobaki kopanzana mpe kobota mbuma.
25 Barnabas and Saul returned to Jerusalem, when they had fulfilled their service, also taking with them John whose surname was Mark.
Sima na Barnabasi mpe Saulo kokokisa mosala na bango mpo na bolamu ya bandimi ya Yelusalemi, batikaki Yelusalemi mpe bamemaki, elongo na bango, Yoane oyo kombo na ye mosusu ezali « Malako. »

< Acts 12 >