< 2 Samuel 17 >

1 Moreover Ahithophel said to Absalom, "Let me now choose twelve thousand men, and I will arise and pursue after David tonight.
Ayitofeli alobaki na Abisalomi: — Nakopona mibali nkoto zomi na mibale mpe nakolanda Davidi na pokwa ya lelo.
2 And I will catch up with him while he is weary and discouraged, and will thow him into a panic, and all the people who are with him will flee. And I will strike the king alone.
Nakobundisa ye tango makasi na ye ekosila mpe nzoto na ye ekolemba; nakoyeisa mobulu epai na ye, mpe wana bato nyonso oyo bazali elongo na ye bakokima, ngai nakoboma ye mokonzi tango akotikala ye moko;
3 Then all the people will come back to you, as a bride returns to her husband. You seek the life of only one man; then all the people will be in peace."
mpe nakozongisa bato nyonso epai na yo. Kufa ya moto oyo ozali koluka elakisi kozonga ya bato nyonso! mpe bato nyonso bakozala na kimia.
4 And the advice seemed good to Absalom and all the elders of Israel.
Makanisi oyo emonanaki ya sembo na miso ya Abisalomi mpe ya bampaka nyonso ya Isalaele.
5 Then Absalom said, "Now call Hushai the Archite, and let's hear what he says."
Kasi Abisalomi alobaki: — Bobengisa lisusu Ushayi, moto ya Ariki, mpo ete toyoka makambo nini oyo ye mpe azali na yango ya koloba.
6 When Hushai came to Absalom, Absalom said to him, "Ahithophel has spoken thus. Should we follow his advice? And if not, speak up."
Tango Ushayi akomaki epai na ye, Abisalomi alobaki: — Tala toli oyo Ayitofeli apesi. Boni, tosengeli kosala makambo oyo alobi? Soki te, yebisa biso makanisi na yo.
7 So Hushai said to Absalom, "The counsel that Ahithophel has given this time is not good."
Ushayi azongiselaki Abisalomi: — Ya mbala oyo, toli oyo Ayitofeli apesi ezali malamu te.
8 Moreover, Hushai said, "You know your father and his men, that they are warriors, and that they are as fierce as a bear robbed of her cubs in the wild, or a sow snared in the wild. Your father is expert in war, and will not camp with the people.
Bongo Ushayi abakisaki: — Oyebi ete tata na yo mpe bato na ye bazali bato ya mpiko mpe bato na kanda makasi lokola ngombolo ya mwasi oyo bawuti kobotola bana na yango kati na zamba. Tata na yo azali moto oyo abundaka bitumba wuta kala, akolekisa te butu esika moko na bato.
9 Look, he is now hidden in some pit, or in some other place. And it will happen when some of them have fallen first, that whoever hears it will say, 'There is a slaughter among the people who follow Absalom.'
Ata azali sik’oyo ya kobombama kati na lidusu ya mabanga to na esika songolo, nzokande tango kaka bato kati na mampinga na biso bakobanda kokufa, ekozanga te komonana moto oyo akoyoka yango mpe akoloba: « Kati na bato oyo bazali kolanda Abisalomi, ebele bakufi. »
10 Then even the one who is brave, whose heart is like the heart of a lion, will utterly melt; for all Israel knows that your father is a warrior, and those who are with him are brave men.
Bongo na tango yango, ata soda oyo aleki na mpiko, oyo azali na motema lokola ya nkosi, akobanga makasi, pamba te Isalaele mobimba eyebi ete tata na yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ye bazali basoda ya mpiko.
11 But, I strongly advise as follows: Let all Israel be gathered to you from Dan to Beersheba, as the sand that is by the sea in number, and that you personally go into battle.
Boye tala toli na ngai: « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba.
12 So we will come upon him in some place where he can be found, and we will fall on him as the dew falls on the ground, and of him and all the men with him not one will be left.
Bongo tokobundisa ye na bisika nyonso oyo akoki komonana mpe tokokweyela ye ndenge manoka ekweyaka na mabele. Mpe ezala ye to bato na ye, moko te akotikala na bomoi.
13 Moreover, if he withdraws into a city, then all Israel will take up ropes to that city, and we will drag it into the riverbed, until there isn't one pebble to be found there."
Soki akimi na engumba moko, Isalaele mobimba ekomema basinga kuna na engumba yango mpe tokobenda engumba yango na lubwaku kino etikala ata na libanga moko te. »
14 Then Absalom and all Israel said, "The counsel of Hushai the Archite is better than the counsel of Ahithophel." For YHWH had commanded that Ahithophel's counsel should be defeated, so that that YHWH could bring Absalom to ruin.
Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki: — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.
15 Then Hushai said to Zadok and to Abiathar the priests, "Here is the council Ahithophel gave Absalom and the elders of Israel, and here is what I counseled.
Ushayi alobaki na Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari: — Ayitofeli apesaki toli na Abisalomi mpe na bampaka ya Isalaele ete basala likambo songolo, mpe ngai napesi bango toli ete basala likambo pakala.
16 Now therefore send quickly and tell David, saying, 'Do not stay the night at the fords of the wilderness, but by all means pass over. Otherwise the king and all the people who are with him will be swallowed up.'"
Sik’oyo, tinda noki sango epai ya Davidi mpo na koloba na ye: « Kolekisa te butu kati na bitando ya esobe, kasi kende mosika, noki te mokonzi mpe bato oyo bazali elongo na yo bokufa. »
17 Now Jonathan and Ahimaaz were staying at En Rogel, and a female servant was to go and tell them, and they would go and inform king David. For they were not to be seen going into the city.
Wana Jonatan mpe Ayimaatsi bavandaki na Eyini-Rogeli, mwasi mosali moko amemelaki bango sango oyo bango basengelaki kokende koyebisa mokonzi Davidi; pamba te basengelaki te kokota kati na engumba mpo ete bamona bango te.
18 But a young man saw them and told Absalom. So they both departed quickly and reached the house of a man in Bahurim who had a well in his courtyard, and they went down into it.
Nzokande elenge mobali moko amonaki bango mpe akendeki koyebisa Abisalomi. Boye mibali nyonso mibale bakimaki noki mpe bakendeki na ndako ya moto moko ya Bawurimi. Lokola azalaki na libulu moko ya mayi kati na lopango na ye, bakitaki kuna.
19 And the woman took a covering and spread it over the top of the well and scattered some grain on it, so that nothing could be noticed.
Mwasi na ye akamataki kapo, atiaki yango na monoko ya libulu mpe asopaki bambuma na likolo na yango. Moto moko te ayebaki likambo yango.
20 Then Absalom's servants came to the woman at the house, and they asked, "Where are Ahimaaz and Jonathan?" And the woman said to them, "They have crossed the brook of water." And when they had searched and could not find them, they returned to Jerusalem.
Tango bato ya Abisalomi bayaki epai ya mwasi, batunaki: — Ayimaatsi mpe Jonatan bazali wapi? Mwasi azongiselaki bango: — Bakatisi mayi. Bato ya Abisalomi balukaki, kasi bamonaki moto moko te; mpe bazongaki na Yelusalemi.
21 It came about after they had left that they climbed out of the well, and left and told king David. And they said to him, "Get up and cross quickly over the water, for Ahithophel has given such and such counsel against you."
Tango bakendeki, Ayimaatsi mpe Jonatan babimaki na libulu mpe bakendeki koyebisa mokonzi Davidi: « Botelema mpe bokatisa mayi noki, pamba te Ayitofeli apesi toli moko ya mabe na tina na yo. »
22 Then David and all the people who were with him got up and they crossed the Jordan. By dawn there was no one left who had not crossed the Jordan.
Boye Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakatisaki ebale Yordani. Liboso ete tongo etana, bango nyonso basilisaki kokatisa Yordani, moko te atikalaki.
23 Now when Ahithophel saw that his counsel was not followed, he saddled his donkey and went up to his home in his city. Then he set his house in order and hanged himself, and he died and was buried in the tomb of his father.
Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.
24 Then David came to Mahanaim. And Absalom crossed the Jordan, he and all Israel with him.
Davidi akendeki na Maanayimi, mpe Abisalomi akatisaki Yordani elongo na bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki elongo na ye.
25 And Absalom had put Amasa over the army in place of of Joab. Now Amasa was the son of a man whose name was Jether the Ishmaelite, who had married Abigail the daughter of Jesse, sister to Zeruiah, Joab's mother.
Abisalomi atiaki Amasa mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi. Amasa azalaki mwana mobali ya Yeteri, moto ya Isalaele, oyo abalaki Abigayili, mwana mwasi ya Naashi mpe ndeko mwasi ya Tseruya, mama ya Joabi.
26 So Israel and Absalom camped in the land of Gilead.
Bato ya Isalaele mpe Abisalomi batongaki molako na bango kati na Galadi.
27 Now it happened when David came to Mahanaim, Shobi the son of Nahash from Rabbah of the people of Ammon, Makir the son of Ammiel of Lo Debar, and Barzillai the Gileadite of Rogelim,
Tango Davidi akomaki na Maanayimi, bayambaki ye epai ya Shovi, mwana mobali ya Naashi ya mboka Raba ya bato ya Amoni, epai ya Makiri, mwana mobali ya Amieli ya mboka ya Lo-Debari, mpe epai ya Barizilayi, moto ya Galadi ya mboka Rogelimi.
28 brought couches for sleeping, and covers, and basins, and pottery utensils, and wheat, and barley, and meal, and parched grain, and beans, and lentils,
Bamemaki biloko ya kolalela, bambeki, basani, ble, orje, farine, bambuma oyo bakalinga, madesu, mpe misili,
29 and honey, and curd of the flock, and cheese of the herd. And they presented them to David and to the people who were with him to eat. For they said, "The people are hungry and tired and thirsty in the wilderness."
mafuta ya nzoyi, miliki, bameme, fromaje ya ngombe, mpo ete Davidi elongo na bato na ye balia; pamba te bazalaki kolobana bango na bango: « Solo, sima na bango kotambola kati na esobe, bato oyo balembi, bazali konyokwama na nzala mpe na posa ya mayi. »

< 2 Samuel 17 >