< 1 Corinthians 2 >
1 When I came to you, brothers, I did not come with superiority of speech or wisdom, proclaiming to you the mystery of God.
Yango wana bandeko, tango ngai mpe nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalelaki te boyebi makasi ya koloba to ya bwanya.
2 For I determined not to know anything among you, except Jesus Christ, and him crucified.
Pamba te, wana nazalaki elongo na bino, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te, longola kaka Yesu-Klisto mpe Yesu-Klisto oyo babakaki na ekulusu.
3 When I was with you, I was weak and afraid and I shook.
Mpe tango nayaki epai na bino, nazalaki kati na bolembu, na kobanga mpe na kolenga.
4 My speech and my preaching were not in persuasive words of wisdom, but in demonstration of the Spirit and of power,
Maloba mpe mateya na ngai ewutaki te na maloba ya bwanya ya bomoto mpo na kondimisa bino, kasi ewutaki na kotalisama ya Molimo mpe ya nguya,
5 that your faith would not rest on human wisdom, but on the power of God.
mpo ete moboko ya kondima na bino ezala te bwanya ya bomoto, kasi ezala nde nguya ya Nzambe.
6 We speak wisdom, however, among those who are mature, but a wisdom not of this age or of the rulers of this age, who are passing away. (aiōn )
Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi. (aiōn )
7 But we speak God's wisdom in a mystery, the wisdom that has been hidden, which God determined in advance before the ages for our glory, (aiōn )
Te! Toteyaka nde mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili. (aiōn )
8 which none of the rulers of this age has understood. For had they known it, they would not have crucified the Lord of glory. (aiōn )
Kati na bakonzi ya mokili oyo, moko te asosolaki yango; pamba te soki basosolaki yango, balingaki te kobaka Nkolo ya nkembo na ekulusu. (aiōn )
9 But as it is written, No eye has seen, and no ear has heard, and no mind has imagined the things which God has prepared for those who love him.
Kasi, kolanda ndenge ekomama: « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »
10 But to us God revealed it through the Spirit. For the Spirit searches all things, even the deep things of God.
Nzokande, Nzambe atalisaki biso yango na nzela ya Molimo na Ye; pamba te Molimo ayebaka nyonso, ezala bozindo ya makanisi ya Nzambe.
11 For what person knows the things of a person except the spirit of the person that is in him? So also, no one knows the things of God except the Spirit of God.
Nani kati na bato ayebi makanisi ya moto, soki kaka molimo oyo ezali kati na moto yango te? Ndenge moko mpe moko te ayebi makanisi ya Nzambe, longola kaka Molimo na Ye.
12 But we received, not the spirit of the world, but the Spirit which is from God, that we might know the things that were freely given to us by God.
Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.
13 And we speak of these things, not with words taught by human wisdom, but with those taught by the Spirit, comparing spiritual things with spiritual things.
Ezali biloko yango nde tolobelaka, na maloba ya bwanya ya bomoto te kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Boye, tolobelaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka.
14 Now the natural person does not receive the things of the Spirit of God, for they are foolishness to him, and he cannot understand them, because they are spiritually discerned.
Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.
15 But he who is spiritual discerns all things, and he himself is judged by no one.
Moto oyo atambolisamaka na Molimo asosolaka makambo nyonso; kasi ye, bato basosolaka ye te, pamba te ekomama:
16 For, "Who has known the mind of the Lord? Who will instruct him?" But we have the mind of Christ.
« Nani ayebi makanisi ya Nkolo mpo akoka kopesa Ye toli? » Nzokande biso, makanisi ya Klisto ezali kati na biso.