< Numbers 24 >

1 When Balaam saw that it pleased the LORD to bless Israel, he did not go, as at the other times, to meet with omens, but he set his face toward the wilderness.
Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe.
2 Balaam lifted up his eyes, and he saw Israel dwelling according to their tribes; and the Spirit of God came on him.
Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye;
3 He took up his parable, and said, "Balaam the son of Beor says, the man whose eye was closed says;
mpe akomaki koloba maloba oyo: « Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori, maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele,
4 he says, who hears the words of God, who sees the vision of Shaddai, falling down, and having his eyes open:
maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo:
5 How goodly are your tents, Jacob, and your tents, Israel.
‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko, mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele!
6 As valleys they are spread forth, as gardens by the riverside, as aloes which the LORD has planted, as cedar trees beside the waters.
Epanzana lokola miluka ya mike-mike, lokola bilanga oyo ezalaka pembeni ya ebale, lokola banzete ya aloe oyo Yawe alona, lokola banzete ya sedele pembeni ya mayi.
7 Water shall flow from his buckets. His seed shall be in many waters. His king shall be higher than Agag. His kingdom shall be exalted.
Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango, bankona na bango ekozwa mayi ebele. Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi, bokonzi na bango ekozala ya lokumu.
8 God brings him out of Egypt. He has as it were the strength of the wild ox. He shall eat up the nations his adversaries, shall break their bones in pieces, and pierce them with his arrows.
Nzambe abimisaki bango na Ejipito, bazalaka makasi lokola mpakasa, babebisaka bikolo oyo ebundisaka bango mpe babukaka mikuwa na bango na biteni-biteni, batobolaka yango na makonga na bango.
9 He couched, he lay down as a lion, as a lioness; who shall rouse him up? Everyone who blesses you is blessed. Everyone who curses you is cursed."
Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali, lokola nkosi ya mwasi; nani akokoka kotelemisa bango? Tika ete oyo akopambola yo apambolama, mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe! › »
10 Balak's anger was kindled against Balaam, and he struck his hands together; and Balak said to Balaam, "I called you to curse my enemies, and, look, you have altogether blessed them these three times.
Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki: — Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe, kasi yo opamboli bango mbala misato.
11 Therefore now flee you to your place. I thought to promote you to great honor; but, look, the LORD has kept you back from honor."
Yango wana, longwa na miso na ngai mpe zonga na mboka na yo! Nalobaki ete nakopesa yo lifuti ya malamu, kasi Yawe azangisi yo lifuti yango.
12 Balaam said to Balak, "Did I not also tell your messengers who you sent to me, saying,
Balami azongiselaki Balaki: — Boni, nalobaki te na bantoma oyo otindelaki ngai ete
13 'If Balak would give me his house full of silver and gold, I can't go beyond the word of the LORD, to do either good or bad in my heart. I will say what God says'?
« Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. »
14 Now, look, I go to my people: come, I will inform you what this people shall do to your people in the latter days."
Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya.
15 He took up his parable, and said, "Balaam the son of Beor says, the man whose eye was closed says;
Bongo Balami alobaki maloba oyo: « Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori, maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele,
16 he says, who hears the words of God, knows the knowledge of the Most High, and who sees the vision of Shaddai, falling down, and having his eyes open:
oyo ayokaka maloba na Nzambe, oyo ayebaka basekele ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, oyo azwaka emoniseli kowuta na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, oyo soki akweyi na molimo, miso na ye efungwamaka:
17 I see him, but not now. I see him, but not near. A star will come out of Jacob. A scepter will rise out of Israel, and will crush the forehead of Moab, and the crown of all the sons of tumult.
‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te; natali ye, kasi na pembeni te. Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. Akotobola mito ya bato ya Moabi mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti.
18 Edom shall be a possession. Seir, his enemies, also shall be a possession, while Israel does valiantly.
Bakobotola mokili ya Edomi, bakobotola Seiri, monguna na ye, kasi Isalaele akokoma lisusu makasi koleka.
19 Out of Jacob shall one have dominion, and shall destroy the remnant from the city."
Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi, mpe akoboma batikali nyonso ya engumba. › »
20 He looked at Amalek, and took up his parable, and said, "Amalek was the first of the nations, But his latter end shall come to destruction."
Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo: « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, kasi ekosuka na libebi. »
21 He looked at the Kenite, and took up his parable, and said, "Your dwelling place is strong. Your nest is set in the rock.
Sima, amonaki bato ya Keni mpe alobaki maloba oyo: « Esika na yo ya kovanda ezali makasi, zala na yo ezalaka kati na mabanga;
22 Nevertheless Kain shall be wasted, until Asshur carries you away captive."
kasi bino bato ya Keni, bokobebisama tango Ashuri akozwa bino lokola bakangami. »
23 He took up his parable, and said, "Alas, who shall live when God does this?
Mpe na suka, alobaki maloba oyo: « Oh mawa! Nani akoki kozala na bomoi, wana Nzambe akozala kosala makambo ya boye?
24 But ships shall come from the coast of Kittim. They shall afflict Asshur, and shall afflict Eber. He also shall come to destruction."
Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi, bakonyokola Ashuri mpe Eberi, kasi bango moko mpe bakobebisama. »
25 Balaam rose up, and went and returned to his place; and Balak also went his way.
Bongo Balami atelemaki mpe azongaki epai na ye, Balaki mpe akendeki na nzela na ye.

< Numbers 24 >