< Numbers 23 >

1 Balaam said to Balak, "Build me here seven altars, and prepare me here seven bulls and seven rams."
Balami alobaki na Balaki: « Tongela ngai bitumbelo sambo awa mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. »
2 Balak did as Balaam had spoken; and Balak and Balaam offered on every altar a bull and a ram.
Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe bango mibale babonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.
3 Balaam said to Balak, "Station yourself by your burnt offering, and I will go. Perhaps God will come to meet me, and whatever he shows me I will tell you." And Balak went off and stationed himself by his offering, and Balaam called to God and went off to a barren height.
Alobaki na Balaki: « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. » Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti.
4 And God met Balaam, and he said to him, "I have prepared the seven altars, and I have offered up a bull and a ram on every altar."
Nzambe akutanaki na Balami, mpe Balami alobaki: — Nabongisaki bitumbelo sambo; mpe na etumbelo moko na moko, nasili kobonza ngombe ya mobali mpe meme ya mobali moko.
5 And God put a word in Balaam's mouth, and said, "Return to Balak, and thus you shall speak."
Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki: — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.
6 He returned to him, and look, he was standing by his burnt offering, he, and all the princes of Moab.
Bongo Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi.
7 He took up his parable, and said, "From Aram has Balak brought me, the king of Moab from the mountains of the East. 'Come, curse Jacob for me. Come, defy Israel.'
Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo: « Balaki abengisaki ngai wuta na Arami, mokonzi ya Moabi abengisaki ngai wuta na bangomba ya este. Alobaki: ‹ Yaka, lakela Jakobi mabe mpo na ngai; yaka, loba mabe mpo na Isalaele.
8 How shall I curse whom the LORD has not cursed? How shall I defy whom God has not defied?
Ndenge nini nakoki solo kolakela mabe bato oyo Nzambe alakela mabe te? Ndenge nini nakoki solo koloba mabe mpo na bato oyo Yawe alobela mabe te?
9 For from the top of the rocks I see him. From the hills I see him. Look, it is a people that dwells alone, and not counting itself among the nations.
Tala, wuta na likolo ya mabanga, nazali komona bango; wuta na likolo ya bangomba, nazali kotala bango. Tala, nazali komona bato moko bavanda bango moko, bazali komitanga na molongo ya bikolo te.
10 Who can count the dust of Jacob, and who has numbered the fourth part of Israel? Let me die the death of the righteous. Let my last end be like his."
Nani akoki kotanga putulu ya Jakobi to kotanga motango ya bakitani ya Isalaele? Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo, mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango! › »
11 Balak said to Balaam, "What have you done to me? I took you to curse my enemies, and look, you have blessed them altogether."
Balaki alobaki na Balami: — Likambo nini osali ngai? Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe; kasi tala, opamboli bango koleka.
12 He answered and said, "Must I not be careful to speak that which God puts in my mouth?"
Balami azongisaki: — Boni, naloba te maloba oyo Yawe atie na monoko na ngai?
13 Balak said to him, "Please come with me to another place, where you may see them; you shall see but the utmost part of them, and shall not see them all; and curse them for me from there."
Balaki alobaki na Balami: — Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai.
14 He took him into the field of Zophim, to the top of Pisgah, and built seven altars, and offered up a bull and a ram on every altar.
Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.
15 He said to Balak, "Station yourself here by your burnt offering, while I meet over there."
Balami alobaki na Balaki: — Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, wana ngai nakopusana mwa mosika mpo na kokutana na ye.
16 And God met Balaam and put a word in his mouth, and said, "Return to Balak, and say this."
Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki: — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.
17 He came to him, and look, he was standing by his burnt offering, and the princes of Moab with him. Balak said to him, "What has the LORD spoken?"
Bongo, Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. Balaki atunaki ye: — Yawe alobi nini?
18 He took up his parable, and said, "Rise up, Balak, and hear. Listen to me, you son of Zippor.
Bongo Balami akomaki koloba maloba oyo: « Balaki, telema mpe yoka! Mwana mobali ya Tsipori, yoka ngai malamu!
19 God is not a man, that he should lie, nor the son of man, that he should repent. Has he said, and will he not do it? Or has he spoken, and will he not make it good?
Nzambe azali moto te mpo ete akosa, azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te? Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te?
20 Look, I have received a command to bless. He has blessed, and I can't reverse it.
Nazwaki nde mokumba ya kopambola. Asila kopambola, mpe ngai nakokoka kobongola te.
21 He has not seen iniquity in Jacob. Neither has he seen perverseness in Israel. The LORD his God is with him. The shout of a king is among them.
Amonaka mbeba moko te epai ya Jakobi, amonaka minyoko te kati na Isalaele. Yawe, Nzambe na bango, azali elongo na bango; koganga ya mokonzi ezalaka kati na bango.
22 God brings them out of Egypt. He has as it were the strength of the wild ox.
Nzambe abimisaki bango na Ejipito; bazalaka makasi lokola mpakasa.
23 Surely there is no enchantment with Jacob; neither is there any divination with Israel. Now it shall be said of Jacob and of Israel, what has God done.
Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele: ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali! ›
24 Look, the people rises up as a lioness, as a lion he lifts himself up. He shall not lie down until he eat of the prey, and drinks the blood of the slain."
Bato oyo batelemi lokola nkosi ya mwasi; epemaka te soki epasoli te mosuni na yango mpe emeli te makila ya nyama oyo ekangi. »
25 Balak said to Balaam, "Neither curse them at all, nor bless them at all."
Bongo Balaki alobaki na Balami: — Ezala soki okoki te kolakela bango mabe, kasi kopambola bango te.
26 But Balaam answered Balak, "Did I not tell you, saying, 'All that God speaks, that I must do?'"
Balami azongiselaki Balaki: — Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai?
27 Balak said to Balaam, "Come now, I will take you to another place; perhaps it will please God that you may curse them for me from there."
Balaki alobaki na Balami: — Yaka, tika ete namema yo esika mosusu! Tango mosusu Nzambe akosepela ete olakela bango mabe mpo na ngai wuta na esika yango.
28 Balak took Balaam to the top of Peor, that looks down on the desert.
Balaki amemaki Balami na likolo ya ngomba Peori, esika oyo emonisaka esobe mobimba.
29 Balaam said to Balak, "Build me here seven altars, and prepare me here seven bulls and seven rams."
Balami alobaki na Balaki: — Tongela ngai bitumbelo sambo mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo.
30 Balak did as Balaam had said, and offered up a bull and a ram on every altar.
Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe abonzaki ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali na etumbelo moko na moko.

< Numbers 23 >