< Ezekiel 7 >

1 Moreover the word of the LORD came to me, saying,
Yawe alobaki na ngai:
2 "You, son of man, say, 'Thus says the LORD to the land of Israel: An end has come. The end has come on the four quarters of the land.
« Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na mokili ya Isalaele: ‹ Esili! Tango ya suka ebelemi mpo na mokili mobimba!
3 Now is the end on you, and I will send my anger on you, and will judge you according to your ways; and I will bring on you all your abominations.
Tango ya suka ekoki sik’oyo mpo na yo, nakopelisela yo kanda na Ngai, nakosambisa yo kolanda etamboli na yo mpe nakofuta yo kolanda misala na yo nyonso ya mbindo.
4 My eye shall not spare you, neither will I have pity; but I will bring your ways on you, and your abominations shall be in the midst of you: and you shall know that I am the LORD.'"
Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te; nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe kolanda misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. ›
5 "Thus says the LORD: 'A disaster, a unique disaster; look, it comes.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Mawa! Pasi ya somo ezali koya!
6 An end has come, the end has come; it awakes against you; look, it comes.
Tango ya suka ebelemi! Ya solo, tango ya suka ebelemi penza! Etelemeli yo. Tala, tango yango esili kobelema!
7 Your doom has come to you, inhabitant of the land: the time has come, the day is near, a day of tumult, and not of joyful shouting, on the mountains.
Kobebisama ekokomela yo, yo movandi ya mokili! Tango yango ekoki, mokolo yango ebelemi, somo makasi ekoti, mpe esengo ezali lisusu te na likolo ya bangomba.
8 Now will I shortly pour out my wrath on you, and accomplish my anger against you, and will judge you according to your ways; and I will bring on you all your abominations.
Nakomi pene ya kopelisela yo kanda na Ngai mpe ya kotombokela yo! Nakosambisa yo kolanda etamboli mpe misala na yo nyonso ya mbindo.
9 My eye shall not spare, neither will I have pity: I will bring on you according to your ways; and your abominations shall be in the midst of you; and you shall know that I, the LORD, do strike.
Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te, nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo mpe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka.
10 Look, the day, look, it comes: your doom is gone forth; the rod has blossomed, pride has budded.'
Tala, mokolo yango nde yango oyo! Esili kobelema! Kobebisama eboti mbuma, lingenda ebimisi bafololo, lolendo ekoli!
11 "Violence has risen up into a rod of wickedness. None of them shall remain, nor of their multitude, nor of their wealth. There shall be nothing of value among them.
Makambo mabe ekoli makasi mpe ekomi lokola fimbu mpo na kopesa etumbu na misala mabe; moto moko te kati na bato to kati na bato ebele akotikala; eloko moko te ekotikala, ezala bomengo to biloko ya motuya.
12 The time has come, the day draws near: do not let the buyer rejoice, nor the seller mourn; for wrath is on all its multitude.
Tango ebelemi, mokolo yango ekoki. Tika ete mosombi moko te azala na esengo to moteki moko te azala na mawa, pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso.
13 For the buyer shall not return to the seller while they live. For the vision is touching the whole multitude of it, none shall return; neither shall any strengthen himself in the iniquity of his life.
Moteki akozwa lisusu te motuya ya biloko oyo atekaki, ata soki azali nanu na bomoi; pamba te emoniseli oyo ezali kotalisa ete kobebisama ya bomengo ya mokili ekokokisama solo. Likolo ya masumu na bango, moto moko te kati na bango akobikisa bomoi na ye.
14 They have blown the trumpet, and have made all ready; but none goes to the battle; for my wrath is on all its multitude.
Ata soki babeti kelelo to bamibongisi ndenge nini, moto moko te akokende na bitumba; pamba te kanda na Ngai ezali likolo ya bato nyonso.
15 The sword is outside, and the pestilence and the famine within: he who is in the field shall die with the sword: and he who is in the city, famine and pestilence shall devour him.
Mopanga ekoboma na libanda ya engumba, bokono oyo ebomaka mpe nzala makasi ekoboma kati na engumba; bato oyo bazali kati na mokili bakokufa na mopanga, mpe bato oyo bazali kati na engumba bakokufa na bokono oyo ebomaka mpe na nzala makasi.
16 But those of those who escape shall escape, and shall be on the mountains like doves of the valleys, all of them moaning, every one in his iniquity.
Batikali bakokima na likolo ya bangomba; mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga, moto na moto mpo na masumu na ye.
17 All hands shall be feeble, and all knees shall be weak as water.
Maboko na bango nyonso ekolemba, mpe mabolongo na bango nyonso ekolemba lokola mayi.
18 They shall also clothe themselves with sackcloth, and horror shall cover them; and shame shall be on all faces, and baldness on all their heads.
Bakolata bilamba ya basaki mpe somo ekokanga bango; bilongi na bango ekotonda na soni, bakokokola suki ya mito na bango.
19 They shall cast their silver in the streets, and their gold shall be as an unclean thing; their silver and their gold shall not be able to deliver them in the day of the wrath of the LORD: they shall not satisfy their souls, neither fill their bowels; because it has been the stumbling block of their iniquity.
Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekomonana lokola eloko ya mbindo. Palata mpe wolo na bango ekozala na makoki te ya kobikisa bango na mokolo ya kanda ya Yawe. Palata mpe wolo yango ekosilisa baposa mpe nzala na bango te, pamba te yango nde ekweyisaki bango na masumu.
20 As for the beauty of his ornament, he set it in majesty; but they made the images of their abominations and their detestable things. Therefore I will render it an unclean thing to them.
Basalaki lolendo mpo na kitoko mpe motuya ya biloko na bango ya monzele oyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikeko mpe bililingi ya somo. Yango wana, nakokomisa biloko yango mbindo na miso na bango.
21 I will give it into the hands of the strangers for a prey, and to the wicked of the earth for a spoil; and they shall profane it.
Nakokaba yango lokola bomengo ya bitumba na maboko ya bapaya mpe ya bato mabe ya mokili mpo ete babotola yango na makasi mpe basakanela yango.
22 My face will I turn also from them, and they shall profane my secret place; and robbers shall enter into it, and profane it.
Elongi na Ngai ekotala bango lisusu te, mpe bato mabe bakobebisa Esika na Ngai ya bule. Bongo, miyibi bakokota kuna mpe bakosambwisa yango.
23 "Make the chain; for the land is full of bloody crimes, and the city is full of violence.
Bomisalela minyololo mpo ete mokili etondi na babomi mpe engumba etondi na makambo mabe.
24 Therefore I will bring the worst of the nations, and they shall possess their houses: I will also make the pride of the strong to cease; and their holy places shall be profaned.
Nakotinda ekolo oyo eleki mabe kati na bikolo mpo ete eya kobotola bandako na bango; nakosilisa lolendo ya bato ya nguya mpe nakosambwisa bisika na bango ya bule.
25 Destruction comes; and they shall seek peace, and there shall be none.
Tango makambo oyo ya somo ekoya, bakoluka kimia kasi bakozwa yango te.
26 Disaster shall come upon disaster, and rumor shall follow rumor; and they shall seek a vision from a prophet; but the law shall perish from the priest, and counsel from the elders.
Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango, basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana. Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli; Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te koteya malakisi ya Mobeko, mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa.
27 The king shall mourn, and the prince shall be clothed with desolation, and the hands of the people of the land shall be troubled: I will do to them after their way, and according to their own judgments will I judge them; and they shall know that I am the LORD."
Mokonzi akozala na matanga, mokambi akolata pili, mpe maboko ya bato ya mokili ekokoma kolenga. Nakofuta bango kolanda etamboli na bango mpe nakosambisa bango kolanda misala na bango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › »

< Ezekiel 7 >