< Ezekiel 39 >

1 "You, son of man, prophesy against Gog, and say, 'Thus says the LORD: "Look, I am against you, Gog, chief prince of Meshech and Tubal:
Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela Gogi! Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh Gogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali, natombokeli yo!
2 and I will turn you around, drag you along, and bring you up from the remotest parts of the north, and bring you against the mountains of Israel.
Nakozongisa yo mpe nakotambolisa yo; nakomema yo longwa na suka ya etuka ya ngambo ya nor mpe nakosala ete okoma na likolo ya bangomba ya Isalaele.
3 Then I will strike your bow out of your left hand, and will make your arrows fall from your right hand.
Nakobuka tolotolo na yo oyo osimbi na loboko ya mwasi mpe nakokweyisa likonga oyo osimbi na loboko ya mobali.
4 You will fall on the mountains of Israel, you and all your troops and the people who are with you. I will give you to birds of prey of every king and to the beasts of the field to be devoured.
Yo, mampinga na yo nyonso ya basoda mpe bato ya bikolo oyo bakosangana na yo, bokokweya na likolo ya bangomba ya Isalaele; nakokaba yo lokola bilei epai ya bandeke nyonso oyo eliaka misuni mpe epai ya banyama ya zamba.
5 You will fall in the open field; for I have spoken," says the LORD.
Okokweya solo na zamba, pamba te ezali Ngai nde nalobaki, elobi Nkolo Yawe.
6 And I will send a fire on Magog and on those who dwell securely in the coastlands; then they will know that I am the LORD.
Nakotinda moto kati na mokili ya Magogi mpe kati na bato oyo bavandi na kimia kati na bisanga; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
7 "'And I will make my holy name known in the midst of my people Israel, and I will not allow my holy name to be profaned anymore. And the nations shall know that I am the LORD, the Holy One in Israel.
Nakosala ete bosantu ya Kombo na Ngai eyebana kati na bato na Ngai, Isalaele; nakotika lisusu te ete bosantu ya Kombo na Ngai esambwa; boye bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Mosantu kati na Isalaele.
8 Look, it is coming and it will happen, says the LORD. This is the day I have spoken about.
Makambo wana nyonso ezali koya! Nyonso ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. Ezali mokolo oyo nalobelaki.
9 "'Then those who dwell in the cities of Israel shall go out and make fires of the weapons and burn them, both the shields and bucklers, bows and the arrows, war clubs and spears, and they shall make fires of them for seven years,
Bavandi ya bingumba ya Isalaele bakobima, bakopelisa moto, bakotumba bibundeli nyonso: banguba ya mike mpe banguba ya minene, matolotolo mpe makonga ya mike, banzete mpe makonga ya minene; bakopelisela yango moto mibu sambo.
10 so that they shall no need to take wood out of the field or gather firewood from the forests, because they shall make fires of the weapons; and they will take the spoil from those who despoiled them, and plunder those who plundered them, says the LORD.
Bakozala na posa te ya kosangisa bakoni kati na bilanga to kokata banzete kati na bazamba, pamba te bakopelisa moto yango nde na bibundeli; bakozwa lokola bomengo ya bitumba bato oyo bazwaki bango lokola bomengo ya bitumba, mpe bakobotola biloko ya bato oyo babotolaki bango biloko, elobi Nkolo Yawe.
11 "'And it shall happen on that day that I will give to Gog a place for burial in Israel, the Valley of the Travelers east of the sea; and it shall block the way of the travelers. So they shall bury Gog and all his multitude; and they shall call it The Valley of Hamon Gog.
Na mokolo wana, nakopesa Gogi lilita kati na mokili ya Isalaele: lubwaku ya bato oyo basalaka mibembo, longwa na ngambo ya este kino na ebale monene. Ekokanga nzela ya bato oyo basalaka mibembo, pamba te bakokunda Gogi elongo na mampinga na ye nyonso kuna. Bakokoma kobenga lubwaku yango lubwaku ya Amoni Gogi.
12 For seven months the house of Israel will be burying them, in order to cleanse the land.
Libota ya Isalaele bakosala basanza sambo mpo na kokunda bibembe na bango kolanda ndenge ekatama mpo na kopetola mokili.
13 Yes, all the people of the land shall bury them, and it shall be a memorial for them on the day that I show my glory, says the LORD.
Bato nyonso ya Isalaele bakokunda bato ya Gogi; bongo ekozala likambo ya lokumu mpo na bango, mokolo oyo nakomonisa nkembo na Ngai, elobi Nkolo Yawe.
14 And they shall designate men to travel through the land regularly, burying those who remain on the face of the land, in order to cleanse it. At the end of seven months they shall make a search.
Sima na basanza sambo, bakopona bato oyo mosala na bango ekozala: kotambola na mokili mpo na koluka bibembe oyo ekotikala na mabele mpe kokunda yango, na lisungi ya bato ya mobembo mpo na kopetola mokili.
15 As they go through the land and anyone sees a human bone, he will put a marker next to it until the gravediggers have buried it in the Valley of Hamon Gog.
Tango bakozala kotambola kati na mokili, soki moko kati na bango amoni mikuwa ya moto, akotia elembo pembeni na yango, kino tango bato oyo bakundaka bibembe bakokunda yango na lubwaku ya Amoni Gogi.
16 Moreover, Hamonah will be the name of a city. Thus they shall cleanse the land.'
Engumba moko oyo ekobengama Amona ekotongama na esika yango. Ekozala ndenge wana nde bakopetola mokili. ›
17 "And as for you, son of man, thus says the LORD: Speak to every kind of bird and to all the wild animals, 'Assemble and come, gather from all around to my sacrifice which I am going to sacrifice for you, a great sacrifice on the mountains of Israel, that you may eat flesh and drink blood.
Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Loba na bandeke nyonso mpe na banyama nyonso ya zamba: ‹ Boya kosangana, bino nyonso elongo, wuta na bisika nyonso, mpo na mbeka na Ngai, oyo nazali kobonza Ngai moko mpo na bino, mbeka monene na likolo ya bangomba ya Isalaele! Kuna, bokolia misuni mpe bokomela makila.
18 You shall eat the flesh of the mighty, and drink the blood of the princes of the earth, of rams, of lambs, and of goats, of bulls, all of them fattened animals of Bashan.
Bokolia misuni ya bilombe ya bitumba mpe bokomela makila ya bakambi ya mabele, ndenge basalaka na bameme ya mibali oyo ekemba, na bana meme ya mibali, na bantaba ya mibali to na bana ngombe ya mibali: nyonso esengeli kozala ya mafuta mpe kowuta na Bashani.
19 And you shall eat fat until you are full, and drink blood until you are drunk, at my sacrifice which I have sacrificed for you.
Na mbeka na Ngai, oyo nabongisi mpo na bino, bokolia mafuta kino bokotonda, mpe bokomela makila kino bokolangwa.
20 And you shall be filled at my table with horses and charioteers, with warriors and with all the soldiers,' says the LORD.
Na mesa na Ngai, bokolia mpe bokotonda misuni ya bampunda, ya batambolisi na yango, ya bilombe ya bitumba mpe ya basoda nyonso, › elobi Nkolo Yawe.
21 "'And I will set my glory among the nations, and all the nations shall see my judgment when I have executed it and my hand when I lay it on them.
Nakomonisa lokumu na Ngai kati na bikolo; bongo bikolo nyonso ekomona etumbu oyo napesi bango, mpe loboko na Ngai oyo nasemboli likolo na bango.
22 So the house of Israel shall know that I am the LORD their God, from that day on.
Kobanda na mokolo wana kino na mikolo ekoya, libota ya Isalaele bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango.
23 And the nations shall know that the house of Israel went into captivity for their iniquity, because they were unfaithful to me, so I hid my face from them, and I gave them into the hand of their adversaries, and all of them fell by the sword.
Mpe bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu mpo na masumu na bango mpe mpo ete batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. Boye, napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai mpe nakabaki bango na maboko ya banguna na bango, mpe bango nyonso bakufaki na mopanga.
24 I dealt with them according to their uncleanness and according to their transgressions, and I hid my face from them.'
Napesaki bango etumbu kolanda mbindo mpe masumu na bango, mpe napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai.
25 "Therefore thus says the LORD: 'Now will I restore the fortunes of Jacob and have mercy on the whole house of Israel, and I will be jealous for my holy name.
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakozongisa sik’oyo bato ya Jakobi oyo bakangamaki na bowumbu, nakoyokela libota mobimba ya Isalaele mawa mpe nakozala na zuwa makasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai.
26 And they shall feel remorse for their disgrace and all the unfaithfulness they committed against me, when they dwell securely in their land with none to make them afraid.
Boye wana bakovanda na kimia na mabele na bango mpe ekozala na moto moko te mpo na kobangisa bango, bakobanda koyoka soni mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mabe nyonso oyo basalaki liboso na Ngai Yawe.
27 When I have brought them back from the peoples and gathered them out of their enemies' lands, then I will be sanctified through them in the sight of the many nations.
Tango nakozongisa bango epai na bango wuta na bikolo, tango nakosangisa bango wuta na mikili ya banguna na bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo ebele.
28 Then they will know that I am the LORD their God, because I sent them into exile among the nations, and then gathered them into their own land; and I will leave none of them there any more.
Boye, bakoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bango; pamba te atako natindaki bango na bowumbu kati na bikolo, nasangisi bango lisusu na mabele na bango moko mpe nakotika ata moto moko te kati na bango kuna.
29 And I will no longer hide my face from them, when I pour out my Spirit on the house of Israel,' says the LORD."
Nakopesa bango lisusu mokongo te, pamba te nakosopa Molimo na Ngai na libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. »

< Ezekiel 39 >