< Exodus 2 >

1 A man of the house of Levi went and took a daughter of Levi as his wife.
Mobali moko ya libota ya Levi abalaki mwasi kati na libota ya Levi.
2 The woman conceived, and bore a son. When she saw that he was a fine child, she hid him three months.
Mwana mwasi yango azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Wana amonaki ete mwana yango azali kitoko, abombaki ye basanza misato.
3 When she could no longer hide him, she took a papyrus box for him and coated it with bitumen and with pitch. And she put the child in it and put it among the rushes by the bank of the river.
Lokola amonaki ete akokoka lisusu te kobomba ye, azwaki kitunga moko basala na poso ya nzete oyo babengaka papirisi, apakolaki yango gudron mpe potopoto ya mwindo; bongo atiaki mwana kati na yango. Sima, atiaki kitunga yango kati na matiti ya ebale Nili, pembeni ya mokili.
4 And his sister stood at a distance, to see what would be done to him.
Ndeko mwasi ya mwana yango atelemaki mosika mpo na kotala likambo oyo ekokaki kokomela ye.
5 Pharaoh's daughter came down to bathe at the river. Her maidens walked along by the riverside. She saw the box among the rushes, and sent her handmaid to get it.
Tango mwana mwasi ya Faraon akendeki kosukola na ebale Nili, wana basi basali na ye bazalaki kotambola pembeni ya ebale Nili, amonaki kitunga kati na matiti ya ebale; mpe atindaki mwasi mosali na ye kozwa yango.
6 She opened it, and saw the child, and look, the baby cried. And she had compassion on him, and said, "This is one of the Hebrews' children."
Afungolaki yango mpe amonaki kati na yango mwana moko ya mobali azali kolela. Ayokelaki ye mawa mpe alobaki: « Oyo azali solo mwana ya Ba-Ebre. »
7 Then his sister said to Pharaoh's daughter, "Should I go and call a nurse for you from the Hebrew women, that she may nurse the child for you?"
Boye, ndeko na ye ya mwasi alobaki na mwana mwasi ya Faraon: — Boni, nakoki kokende kolukela yo kati na basi ya Ba-Ebre mwasi oyo akoki komelisa mwana oyo mabele mpo na yo?
8 Pharaoh's daughter said to her, "Go." The maiden went and called the child's mother.
Mwana mwasi ya Faraon azongiselaki ye: — Iyo, kende! Elenge mwasi akendeki mpe azwaki mama ya mwana mobali yango.
9 Pharaoh's daughter said to her, "Take this child away, and nurse him for me, and I will give you your wages." The woman took the child, and nursed it.
Mwana mwasi ya Faraon alobaki na mama yango: « Kamata mwana oyo, melisa ye mabele mpo na ngai, mpe nakofuta yo. » Bongo mama yango azwaki mwana mpe akomaki komelisa ye mabele.
10 The child grew, and she brought him to Pharaoh's daughter, and he became her son. She named him Moses, and said, "Because I drew him out of the water."
Tango mwana akolaki, amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Faraon oyo akomisaki ye mwana na ye ya mobali. Apesaki ye kombo « Moyize, » pamba te alobaki: « Nazwaki ye na mayi. »
11 It happened in those days, when Moses had grown up, that he went out to his brothers, and looked at their burdens. He saw an Egyptian striking a Hebrew, one of his brothers.
Mokolo moko, wana Moyize akomaki mokolo, akendeki na esika oyo bandeko na ye bazalaki mpe amonaki bango kosala misala makasi oyo bapesaki bango mpo na konyokola bango. Amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moko kati na bato na ye Ba-Ebre.
12 He looked this way and that way, and when he saw that there was no one, he killed the Egyptian, and hid him in the sand.
Atalaki ngambo na ngambo mpe amonaki moto te; bongo abomaki moto ya Ejipito mpe akundaki ye na zelo.
13 He went out the second day, and look, two men of the Hebrews were fighting with each other. He said to him who did the wrong, "Why do you strike your fellow?"
Mokolo oyo elandaki, Moyize abimaki mpe amonaki Ba-Ebre mibale bazali kobunda. Atunaki na moto oyo asalaki mabe: — Mpo na nini ozali kobeta moninga na yo?
14 He said, "Who made you a prince and a judge over us? Do you plan to kill me, as you killed the Egyptian yesterday?" Moses was afraid, and said, "Surely this thing is known."
Moto wana azongisaki: — Boni, nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso? Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito? Moyize abangaki mpe amilobelaki: « Solo, likambo oyo nasalaki, esili koyeba. »
15 Now when Pharaoh heard this thing, he sought to kill Moses. But Moses fled from the face of Pharaoh, and lived in the land of Midian, and he sat down by a well.
Tango Faraon ayokaki likambo yango, alukaki nzela ya koboma Moyize; kasi Moyize akimaki liboso ya Faraon mpe akendeki kovanda na mokili ya Madiani.
16 Now the priest of Midian had seven daughters. They came and drew water, and filled the troughs to water their father's flock.
Moyize avandaki pembeni ya libulu ya mayi. Nzokande, Nganga-Nzambe ya Madiani azalaki na bana basi sambo. Bayaki kotoka mayi mpe batondisaki bimelelo mpo ete bamelisa bibwele ya tata na bango.
17 The shepherds came and drove them away; but Moses stood up and helped them, and drew water for them, and watered their flock.
Kasi babateli bibwele bayaki mpe babenganaki bango. Moyize atelemaki, akotelaki bango mpe amelisaki bibwele na bango mayi.
18 When they came to Reuel, their father, he said, "How is it that you have returned so early today?"
Tango bana basi bazongaki epai ya tata na bango Reweli, atunaki bango: — Mpo na nini lelo bozongi noki?
19 They said, "An Egyptian delivered us out of the hand of the shepherds, and moreover he drew water for us, and watered the flock."
Bango bazongisaki: — Moto moko ya Ejipito abundelaki biso liboso ya babateli bibwele, atokelaki biso mayi mpe amelisaki bibwele.
20 He said to his daughters, "Where is he? Why is it that you have left the man? Call him, that he may eat bread."
Reweli atunaki bana na ye ya basi: — Moto yango ya Ejipito azali wapi? Mpo na nini botiki ye kuna? Bobenga ye mpo ete aya kolia.
21 And Moses was content to dwell with the man. And he gave Moses Zipporah his daughter in marriage.
Moyize andimaki kovanda elongo na Reweli; bongo Reweli apesaki Sefora, mwana na ye ya mwasi, mpo ete azala mwasi ya Moyize.
22 She bore a son, and he named him Gershom, for he said, "I have lived as a foreigner in a foreign land."
Sefora abotaki mwana mobali mpe Moyize apesaki ye kombo « Gerishomi, » pamba te alobaki: « Nazali mopaya na mboka mopaya. »
23 It happened in the course of those many days, that the king of Egypt died, and the children of Israel sighed because of the bondage, and they cried, and their cry came up to God because of the bondage.
Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe.
24 God heard their groaning, and God remembered his covenant with Abraham, with Isaac, and with Jacob.
Nzambe ayokaki koganga na bango mpe akanisaki boyokani na Ye oyo asalaki elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
25 God saw the children of Israel, and God took notice.
Nzambe atalaki bana ya Isalaele mpe asosolaki pasi na bango.

< Exodus 2 >