< 2 Chronicles 30 >

1 Hezekiah sent to all Israel and Judah, and wrote letters also to Ephraim and Manasseh, that they should come to the house of the LORD at Jerusalem, to keep the Passover to the LORD, the God of Israel.
Ezekiasi atindaki bamemi sango kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, mpe akomelaki Efrayimi mpe Manase mikanda mpo na kosenga na bango ete baya na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, mpo na kosepela feti ya Pasika ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
2 For the king had taken counsel, and his officials, and all the assembly in Jerusalem, to keep the Passover in the second month.
Mokonzi elongo na bakalaka na ye mpe lisanga mobimba ya Yelusalemi bazwaki mokano ya kosepela feti ya Pasika na sanza ya mibale.
3 For they could not keep it at that time, because the priests had not sanctified themselves in sufficient number, neither had the people gathered themselves together to Jerusalem.
Balongaki te kosepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama, pamba te Banganga-Nzambe oyo bamibulisaki bazalaki mingi te, mpe bato basanganaki te na Yelusalemi.
4 The thing was right in the eyes of the king and of all the assembly.
Mokonzi mpe lisanga mobimba bandimaki mabongisi yango,
5 So they established a decree to make proclamation throughout all Israel, from Beersheba even to Dan, that they should come to keep the Passover to the LORD, the God of Israel, at Jerusalem: for they had not kept it in great numbers in such sort as it is written.
bazwaki mokano ya kopesa mayebisi kati na Isalaele mobimba, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpo na kosenga na bato nyonso ete baya kosepela feti ya Pasika, na Yelusalemi mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Pamba te bato moke kaka basepelaki yango kolanda ndenge ekomama kati na makomi.
6 So the couriers went with the letters from the king and his officers throughout all Israel and Judah, and according to the commandment of the king, saying, "children of Israel, turn again to the LORD, the God of Abraham, Isaac, and Israel, that he may return to the remnant of you who have escaped out of the hand of the kings of Assyria.
Na etinda ya mokonzi, bamemi sango bakendeki kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, na mikanda oyo ewutaki epai ya mokonzi mpe bakalaka na ye. Tala makambo oyo ezalaki kati na mikanda yango: « Bana ya Isalaele, bozongela Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele, mpo ete Ye mpe azongela bino oyo bobiki na maboko ya bakonzi ya mboka Asiri!
7 Do not be like your fathers, and like your brothers, who trespassed against the LORD, the God of their fathers, so that he gave them up to desolation, as you see.
Bozala te lokola batata mpe bandeko na bino oyo bazangaki boyengebene liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango. Yango wana asalaki ete babebisama ndenge bozali komona.
8 Now do not be stiff-necked, as your fathers were; but yield yourselves to the LORD, and enter into his sanctuary, which he has sanctified forever, and serve the LORD your God, that his fierce anger may turn away from you.
Bozala moto makasi te lokola batata na bino; bomipesa epai na Yawe, boya na Esika ya bule oyo Ye moko abulisi mpo na libela mpe bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete kanda makasi na Ye ezala mosika na bino!
9 For if you turn again to the LORD, your brothers and your children shall find compassion before those who led them captive, and shall come again into this land: for the LORD your God is gracious and merciful, and will not turn away his face from you, if you return to him."
Soki solo bozongeli Yawe, bandeko mpe bana na bino oyo bakendeki na bowumbu bakozwa ngolu liboso ya bato oyo bakangaki bango, mpe bakozonga na mokili oyo; pamba te Yawe, Nzambe na bino, atonda na ngolu mpe na mawa. Solo, soki bozongeli Ye, akobalola te elongi na Ye mosika na bino. »
10 So the couriers passed from city to city through the country of Ephraim and Manasseh, even to Zebulun: but they ridiculed them, and mocked them.
Bamemi sango batambolaki kati na bingumba nyonso ya Efrayimi mpe ya Manase kino na Zabuloni. Kasi bato bazalaki koseka mpe kotiola bango.
11 Nevertheless some from Asher and from Manasseh and from Zebulun humbled themselves, and came to Jerusalem.
Nzokande, ndambo ya bato ya Aseri, ya Manase mpe ya Zabuloni bamikitisaki mpe bakendeki na Yelusalemi.
12 Also in Judah came the hand of God to give them one heart, to do the commandment of the king and of the leaders by the word of the LORD.
Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe.
13 Many people assembled at Jerusalem to keep the feast of unleavened bread in the second month, a very great assembly.
Bato ebele basanganaki na Yelusalemi mpo na kosepela feti ya Mapa ezanga levire, na sanza ya mibale: bazalaki penza ebele ya bato.
14 They arose and took away the altars that were in Jerusalem, and all the altars for incense took they away, and cast them into the Kidron Valley.
Babukaki bitumbelo kati na Yelusalemi mpe balimwisaki bambabola nyonso ya malasi na kobwaka yango na lubwaku ya Sedron.
15 Then they killed the Passover lamb on the fourteenth day of the second month: and the priests and the Levites were ashamed, and sanctified themselves, and brought burnt offerings into the house of the LORD.
Bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale. Banganga-Nzambe elongo na Balevi bayokaki soni, bamibulisaki mpe babonzaki bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe.
16 They stood in their place after their order, according to the law of Moses the man of God: the priests sprinkled the blood which they received of the hand of the Levites.
Bazongelaki misala na bango ndenge ekomama na mibeko ya Moyize, moto na Nzambe. Balevi bazalaki kopesa makila ya bambeka epai ya Banganga-Nzambe; mpe bango, Banganga-Nzambe, bazalaki kosopa yango na etumbelo.
17 For there were many in the assembly who had not sanctified themselves: therefore the Levites were in charge of killing the Passovers for everyone who was not clean, to sanctify them to the LORD.
Lokola bato mingi kati na lisanga bamibulisaki te, Balevi bazwaki mokumba ya kokata bakingo ya bampate ya Pasika mpo na bato wana nyonso oyo bazalaki peto te; mpe na bongo, bakokaki te kobulisa bampate na bango epai na Yawe.
18 For a multitude of the people, even many of Ephraim and Manasseh, Issachar and Zebulun, had not cleansed themselves, yet they ate the Passover otherwise than it is written. For Hezekiah had prayed for them, saying, "May the good LORD pardon everyone
Atako bato ebele oyo bawutaki na Manase, na Efrayimi, na Isakari mpe na Zabuloni bamipetolaki te, kasi baliaki Pasika na kozanga kolanda oyo ekomama. Yango wana Ezekiasi abondelaki boye mpo na bango: « Yawe, Yo oyo ozali malamu, tika ete olimbisa
19 who sets his heart to seek God, the LORD, the God of his fathers, even if they aren't clean according to the purification of the sanctuary."
moto nyonso oyo amipesi na koluka Nzambe, Yawe, Nzambe ya bakoko na ye, na motema na ye mobimba atako amipetolaki te kolanda mibeko ya Esika ya bule! »
20 The LORD listened to Hezekiah, and healed the people.
Yawe ayokaki libondeli ya Ezekiasi mpe abetaki bato te.
21 The children of Israel who were present at Jerusalem kept the feast of unleavened bread seven days with great gladness; and the Levites and the priests praised the LORD day by day, singing with loud instruments to the LORD.
Boye bato ya Isalaele oyo bazalaki na Yelusalemi basepelaki mikolo sambo mpe na esengo makasi feti ya Mapa ezanga levire wana Balevi mpe Banganga-Nzambe bazalaki kokumisa Yawe mikolo nyonso na kobeta makasi bibetelo mindule na bango mpo na lokumu ya Yawe.
22 Hezekiah spoke comfortably to all the Levites who had good understanding in the service of the LORD. So they completed the seven days of the feast, offering sacrifices of peace offerings, and making confession to the LORD, the God of their fathers.
Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe. Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.
23 The whole assembly took counsel to keep other seven days; and they kept another seven days with gladness.
Lisanga mobimba eyokanaki kobakisa mikolo mosusu sambo mpo na kokoba kosepela feti. Boye, basalaki feti na esengo na mikolo yango sambo.
24 For Hezekiah king of Judah gave to the assembly for offerings one thousand bulls and seven thousand sheep, and the leaders gave to the assembly a thousand bulls and ten thousand sheep. And a great number of priests sanctified themselves.
Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, apesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto sambo; mpe bakalaka bapesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto zomi. Banganga-Nzambe ebele bamibulisaki.
25 All the assembly of Judah, with the priests and the Levites, and all the assembly who came out of Israel, and the foreigners who came out of the land of Israel, and who lived in Judah, rejoiced.
Lisanga mobimba ya Yuda, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Isalaele mpe bapaya oyo bawutaki na Isalaele to bavandi ya Yuda bazalaki na esengo.
26 So there was great joy in Jerusalem; for since the time of Solomon the son of David king of Israel there was not the like in Jerusalem.
Esengo ezalaki makasi kati na Yelusalemi, pamba te wuta na tango ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, likambo ya boye etikala nanu kosalema te kati na Yelusalemi.
27 Then the priests the Levites arose and blessed the people: and their voice was heard, and their prayer came up to his holy habitation, even to heaven.
Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule.

< 2 Chronicles 30 >