< Psalms 141 >

1 [A Psalm by David.] Jehovah, I have called on you. Come to me quickly. Listen to my voice when I call to you.
Nzembo ya Davidi. Yawe, nazali kobelela Yo; yaka noki epai na ngai! Yoka mongongo na ngai, wana nazali kobelela Yo!
2 Let my prayer be set before you like incense; the lifting up of my hands like the evening sacrifice.
Liboso na Yo, tika ete libondeli na ngai ezala lokola mbeka ya malasi, mpe botombwami ya maboko na ngai ezala lokola mbeka ya pokwa!
3 Set a watch, Jehovah, before my mouth. Keep the door of my lips.
Yawe, kengela monoko na ngai, batela malamu ekuke ya bibebu na ngai!
4 Do not incline my heart to any evil thing, to practice deeds of wickedness with men who work iniquity. Do not let me eat of their delicacies.
Kotindika motema na ngai te na mabe, mpo ete namipesa te na mobulu elongo na bato ya misala mabe mpe nalia bilei te elongo na bango.
5 Let the righteous strike me, it is kindness; let him reprove me, it is like oil on the head; do not let my head refuse it; Yet my prayer is always against evil deeds.
Soki moto ya sembo abeti ngai, ezali elembo ya bolingo; soki apameli ngai, ezali mafuta na moto na ngai; moto na ngai ekoboya yango te. Kasi libondeli na ngai ekotelemelaka bato ya misala mabe.
6 Their judges are thrown down by the sides of the rock. They will hear my words, for they are well spoken.
Tika ete bilombe na bango babwakama na mabanga; na bongo, maloba na ngai ekoyokana, pamba te ezali kitoko.
7 "As when one plows and breaks up the earth, our bones are scattered at the mouth of Sheol." (Sheol h7585)
Lokola tango babalolaka mpe batimolaka mabele, mikuwa na biso epanzani liboso ya mboka ya bakufi. (Sheol h7585)
8 For my eyes are on you, Jehovah. In you, I take refuge. Do not leave my soul destitute.
Yawe, Nkolo na ngai, miso na ngai ebaluki mpo na kotala Yo; nazali kobombama kati na Yo, kotindika ngai na kufa te!
9 Keep me from the snare which they have laid for me, from the traps of evildoers.
Batela ngai mpo ete nakangama te na motambo na bango mpe nakweya te na mabulu ya bato ya misala mabe.
10 Let the wicked fall together into their own nets, while I pass by.
Tika ete bato mabe bakangama na mitambo na bango moko, mpe ete ngai naleka na kimia!

< Psalms 141 >