< James 5 >
1 Go, now, you rich! Weep, howling over your miseries that are coming on [you];
Boyoka sik’oyo, bino bazwi: Boyoka mawa mpe bolela mpo na pasi oyo ekokweyela bino.
2 your riches have rotted, and your garments have become moth-eaten;
Bomengo na bino esili kopola, mpe mpese esili kolia bilamba na bino;
3 your gold and silver have rotted, and the rust of them will be to you for a testimony, and will eat your flesh as fire. You have stored up treasure in the last days!
wolo mpe palata na bino esili kobeba; mpe libebi na yango ekotatola mabe na bino mpe ekolia banzoto na bino lokola moto. Bozali kobakisa se kobakisa bomengo! Boyebi te ete tokomi na mikolo ya suka?
4 Behold, the reward of the workmen cries out, of those who in-gathered your fields, which has been fraudulently kept back by you, and the exclamations of those who reaped have entered into the ears of the LORD of Hosts;
Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.
5 you lived in luxury on the earth, and were wanton; you nourished your hearts, as in a day of slaughter;
Awa na mokili, bozali kobika bomoi ya bisengo mpe ya bofuluki, bozali komikomisa nzoto mafuta lokola banyama oyo babongisi mpo na koboma.
6 you condemned—you murdered the righteous; he does not resist you.
Bozali kokatela bato ya sembo etumbu mpe koboma bango, nzokande batelemeli bino te.
7 Be patient, then, brothers, until the coming of the LORD; behold, the farmer expects the precious fruit of the earth, being patient for it, until he may receive rain—early and latter;
Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele: akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma.
8 you also be patient; establish your hearts, because the coming of the LORD has drawn near;
Bino mpe, bokangaka mitema mpe boyikaka mpiko, pamba te koya ya Nkolo ekomi pene.
9 do not murmur against one another, brothers, that you may not be condemned; behold, the Judge has stood before the door.
Bandeko na ngai, botika kofundana bino na bino, noki te Nzambe akosambisa bino. Botala, Mosambisi azali ya kotelema liboso ya ekuke.
10 Brothers, [as] an example of the suffering of evil and of patience, take the prophets who spoke in the Name of the LORD;
Bandeko, mpo na oyo etali kokanga motema kati na pasi, bozwa ndakisa ya basakoli oyo basakolaki na Kombo ya Nkolo.
11 behold, we call those who are enduring blessed; you heard of the endurance of Job, and you have seen the end from the LORD, that the LORD is very compassionate, and pitying.
Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa.
12 And before all things, my brothers, do not swear, neither by Heaven, neither by the earth, neither by any other oath, but let your “Yes” be yes, and the “No,” no, that you may not fall under judgment.
Liboso na nyonso, bandeko na ngai, bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, ya mokili to mpe ya eloko nini. Tika ete « iyo » na bino etikala « iyo, » mpe « te » na bino etikala « te, » mpo ete bakatela bino etumbu te.
13 Does anyone suffer evil among you? Let him pray; is anyone of good cheer? Let him sing psalms;
Soki moko kati na bino azali na pasi, tika ete abondela; soki moko azali na esengo, tika ete ayemba banzembo mpo na kokumisa Nzambe;
14 is anyone sick among you? Let him call for the elders of the assembly, and let them pray over him, having anointed him with oil, in the Name of the LORD,
soki mpe mosusu kati na bino azali kobela, tika ete abenga bakambi ya Lingomba mpo ete babondela mpo na ye mpe bapakola ye mafuta na Kombo ya Nkolo,
15 and the prayer of faith will save the distressed one, and the LORD will raise him up, and if he may have committed sins, they will be forgiven to him.
pamba te libondeli oyo esalemi na kondima ekobikisa mobeli, mpe Nkolo akotelemisa ye. Soki asalaki masumu, Nzambe akolimbisa ye.
16 Be confessing to one another the trespasses, and be praying for one another, that you may be healed; very strong is a working supplication of a righteous man;
Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.
17 Elijah was a similar-feeling man as us, and with prayer he prayed—not to rain, and it did not rain on the land three years and six months;
Eliya azalaki moto lokola biso, abondelaki na molende nyonso mpo ete mvula enoka te, mpe mvula enokaki te na mabele mibu misato na basanza motoba;
18 and again he prayed, and the sky gave rain, and the land brought forth her fruit.
abondelaki lisusu, mpe Likolo epesaki lisusu mvula, mpe mabele ebotaki bambuma.
19 Brothers, if anyone among you may go astray from the truth, and anyone may turn him back,
Bandeko na ngai, soki moko kati na bino apengwi mosika ya bosolo mpe moto mosusu azongisi ye kati na yango,
20 let him know that he who turned back a sinner from the straying of his way will save a soul from death, and will cover a multitude of sins.
boyeba ete moto oyo azongisi mopengwi longwa na libunga abikisi ye na kufa mpe asali ete masumu ebele elimbisama.