< James 1 >

1 James, a servant of God and of the Lord Jesus Christ, to the twelve tribes who are in the dispersion: Greetings!
Ngai Jake, mosali na Nzambe mpe na Nkolo Yesu-Klisto; Epai ya mabota zomi na mibale oyo epalangana kati na biloko: Napesi bino mbote.
2 Count [it] all joy, my brothers, when you may fall into manifold temptations,
Bandeko na ngai, bomona lokola likambo ya esengo, lolenge nyonso ya komekama oyo bozali kokutana na yango.
3 knowing that the proof of your faith works endurance,
Pamba te boyebi malamu ete komekama ya kondima na bino ebotaka kokanga motema.
4 and let the endurance have a perfect work, that you may be perfect and complete, lacking in nothing.
Nzokande kokanga motema na bino esengeli te kosuka na nzela mpo ete bokoma bato bakemba mpe bakoka kati na kondima, bato oyo bazangi pamela.
5 And if any of you lacks wisdom, let him ask from God, who is giving to all generously, and not reproaching, and it will be given to him;
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.
6 but let him ask in faith, doubting nothing, for he who is doubting has been like a wave of the sea, driven by wind and tossed;
Kasi asengeli kosenga na kondima, na kotia tembe te; pamba te moto oyo atiaka tembe azali lokola mbonge ya ebale oyo mopepe ezali koningisa mpe kobwaka epai na epai.
7 for do not let that man suppose that he will receive anything from the LORD—
Moto ya ndenge wana atia motema te ete akoki kozwa eloko kowuta na Nkolo:
8 a soul-split man [is] unstable in all his ways.
azali moto ya mitema mibale, moto oyo akangamaka na likanisi moko te na nyonso oyo asalaka.
9 And let the brother who is low rejoice in his exaltation,
Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye,
10 but the rich in his becoming low, because he will pass away as a flower of grass;
mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga.
11 for the sun rose with the burning heat, and withered the grass, and the flower of it fell, and the beauty of its appearance perished, so also the rich in his way will fade away!
Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso.
12 Blessed [is] the man who endures temptation, because, becoming approved, he will receive the garland of life, which the LORD promised to those loving Him.
Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.
13 Let no one who is being tempted say, “I am tempted from God,” for God is not tempted by evils, and Himself tempts no one,
Tika ete moto moko te, liboso ya komekama, aloba: « Nzambe nde azali kotindika ngai na kosala mabe. » Pamba te mabe ekoki te kotindika Nzambe na mabe, mpe Nzambe atindikaka moto moko te na kosala mabe.
14 but each one is tempted, being led away and enticed by his own desires;
Kasi moto nyonso atindikamaka na mabe soki abendami mpe akangami na motambo ya baposa mabe ya nzoto na ye moko.
15 afterward the desire having conceived, gives birth to sin, and sin having been perfected, brings forth death.
Bongo soki baposa mabe yango ekoli kati na moto, ebotaka lisumu; mpe lisumu ememaka na kufa.
16 Do not be led astray, my beloved brothers.
Bandeko balingami, bomikosa te:
17 Every good giving, and every perfect gift, is from above, coming down from the Father of lights, with whom is no variation, or shadow of turning;
bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.
18 having willed [it], He begot us with a word of truth, for our being a certain first-fruit of His creatures.
Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso.
19 So then, my beloved brothers, let every man be swift to hear, slow to speak, slow to anger,
Bandeko balingami, bosimba likambo oyo: tika ete moto nyonso awelelaka koyoka, kasi awelelaka te koloba mpe kosilika;
20 for the wrath of a man does not work the righteousness of God;
pamba te kanda ya moto ekokisaka te makambo ya sembo na miso ya Nzambe.
21 for this reason, having put aside all filthiness and superabundance of evil, receive the implanted word in meekness, that is able to save your souls;
Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.
22 and become doers of the word, and not hearers only, deceiving yourselves,
Botiaka na misala Liloba na Nzambe; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba.
23 because, if anyone is a hearer of the word and not a doer, this one has been like to a man viewing his natural face in a mirror,
Moto oyo ayokaka Liloba kasi atiaka yango te na misala, akokani na moto oyo amitali na talatala
24 for he viewed himself, and has gone away, and immediately he forgot what kind of [man] he was;
mpe, sima na ye komitala, akei mpe, kaka na tango yango, abosani ndenge azali.
25 but he who looked into [the] perfect law—that of liberty, and continued there, not becoming a forgetful hearer, but a doer of work—this one will be blessed in his doing.
Nzokande moto oyo amipesaka na koyekola mobeko oyo ekoka na nyonso mpe epesaka bonsomi, bongo atosaka yango tango nyonso, asukaka kaka na koyoka te, kasi atiaka na misala: moto yango akozala moto ya esengo na nyonso oyo akosala.
26 If anyone thinks to be religious among you, not bridling his tongue, but deceiving his heart, the religion of this one [is] vain;
Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.
27 religion pure and undefiled with the God and Father is this: to look after orphans and widows in their tribulation—to keep himself unspotted from the world.
Kosambela ya solo mpe ya peto na miso ya Nzambe, Tata na biso, ezali: kosunga bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kati na bapasi na bango, mpe komibatela peto liboso ya makambo ya mokili.

< James 1 >