< Isaiah 2 >

1 The thing that Isaiah son of Amoz has seen concerning Judah and Jerusalem:
Tala makambo oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na Yuda mpe Yelusalemi:
2 And it has come to pass, In the latter end of the days, The mountain of YHWH’s house is established, Above the top of the mountains, And it has been lifted up above the heights, And all the nations have flowed to it.
Na mikolo oyo ekoya, ngomba ya Tempelo ya Yawe ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna.
3 And many peoples have gone and said, “Come, and we go up to the mountain of YHWH, To the house of the God of Jacob, And He teaches us of His ways, And we walk in His paths, For a law goes forth from Zion, And a word of YHWH from Jerusalem.
Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba: « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. Akoteya biso banzela na Ye mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi.
4 And He has judged between the nations, And has given a decision to many peoples, And they have beat their swords to plowshares, And their spears to pruning-hooks, Nation does not lift up sword to nation, Nor do they learn anymore—war.
Akozala Mosambisi kati na bikolo, akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele. Bakotumba mipanga na bango na moto mpo na kosala bakongo, mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga mpo na kobundisa ekolo mosusu; bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba.
5 O house of Jacob, come, And we walk in the light of YHWH.”
Oh ndako ya Jakobi, yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe!
6 For You have left Your people, the house of Jacob. For they have been filled from the east, And [are] sorcerers like the Philistines, And strike hands with the children of strangers.
Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este; bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, bazali kosala boyokani elongo na bapagano.
7 And its land is full of silver and gold, And there is no end to its treasures, And its land is full of horses, And there is no end to its chariots,
Mokili na bango etondi na palata mpe wolo, bomengo na bango ezali na suka te. Mokili na bango etondi na bampunda mpe bakoki ata moke te kotanga bashar na bango ya bitumba.
8 And its land is full of idols, It bows itself to the work of its hands, To that which its fingers have made,
Mokili na bango etondi na banzambe ya bikeko, bato bakomi kofukamela biloko oyo esalemi na maboko na bango, oyo misapi na bango esili kosala.
9 And the low bows down, and the high is humbled, And You do not accept them.
Yango wana, bato bakokitisa mito, mpe bato ya lokumu bakotonda na soni; kolimbisa bango te!
10 Enter into a rock, and be hidden in dust, Because of the fear of YHWH, And because of the honor of His excellence.
Kimela na madusu ya mabanga, bombama na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye!
11 The haughty eyes of man have been humbled, And the loftiness of men has been bowed down, And YHWH alone has been set on high in that day.
Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi, bato ya lofundu bakokitisama; Yawe kaka nde akonetolama.
12 For a day [is] to YHWH of Hosts, For every proud and high one, And for every lifted up and low one,
Yawe, Mokonzi ya mampinga, abongisa mokolo moko mpo na kokitisa bato nyonso ya lolendo mpe ya lofundu, bato nyonso oyo bamimatisaka,
13 And for all cedars of Lebanon, The high and the exalted ones, And for all oaks of Bashan,
banzete nyonso ya sedele ya Libani, oyo eleki na molayi mpe na kotombwama, mpe banzete nyonso ya sheni ya Bashani;
14 And for all the high mountains, And for all the exalted heights,
bangomba nyonso ya milayi mpe bangomba nyonso ya mikuse,
15 And for every high tower, And for every fortified wall,
bandako nyonso ya milayi, bamir nyonso ya milayi oyo batonga makasi;
16 And for all ships of Tarshish, And for all desirable pictures.
bamasuwa nyonso ya Tarsisi mpe bomengo na yango nyonso ya kitoko.
17 And the haughtiness of man has been bowed down, And the loftiness of men humbled, And YHWH alone has been set on high in that day.
Lolendo ya moto ekosila mpe lofundu ya bato ekosuka; Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana.
18 And the idols—they completely pass away.
Banzambe nyonso ya bikeko bakobebisama nye.
19 And [men] have entered into caverns of rocks, And into caves of dust, Because of the fear of YHWH, And because of the honor of His excellence, In His rising to terrify the earth.
Bato bakokimela na madusu ya mabanga mpe na putulu ya mabele liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
20 In that day man casts his idols of silver, And his idols of gold, That they have made for him to worship, To moles, and to bats,
Na mokolo wana, bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembo banzambe na bango ya bikeko ya palata mpe banzambe na bango ya bikeko ya wolo, oyo basalaki mpo ete bafukamela bango.
21 To enter into cavities of the rocks, And into clefts of the high places, Because of the fear of YHWH, And because of the honor of His excellence, In His rising to terrify the earth.
Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, tango akotelema mpo na koningisa mokili.
22 Cease yourselves from man, Whose breath [is] in his nostrils, For—in what is he esteemed?
Botika kotia elikya na moto oyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye. Motuya nini azali na yango?

< Isaiah 2 >