< Genesis 42 >

1 And Jacob sees that there is grain in Egypt, and Jacob says to his sons, “Why do you look at each other?”
Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, alobaki na bana na ye ya mibali: « Mpo na nini bozali kotalana bino na bino?
2 He also says, “Behold, I have heard that there is grain in Egypt, go down there, and buy for us from there, and we live and do not die”;
Nayoki ete ble ezali na Ejipito. Bokende kuna mpe bosomba ndambo mpo na biso mpo ete towumela na bomoi mpe tokufa te na nzala. »
3 and the ten brothers of Joseph go down to buy grain in Egypt,
Bandeko mibali zomi ya Jozefi bakendeki na Ejipito mpo na kosomba ble.
4 and Benjamin, Joseph’s brother, Jacob has not sent with his brothers, for he said, “Lest harm meet him.”
Kasi Jakobi atikaki te Benjame, ndeko ya Jozefi ya mobali, ete akende elongo na bango, pamba te azalaki kobanga ete likama ekweyela ye.
5 And the sons of Israel come to buy in the midst of those coming, for the famine has been in the land of Canaan,
Kati na bato oyo bakendeki kosomba ble na Ejipito, bana mibali ya Isalaele mpe bazalaki; pamba te nzala makasi ekotaki mpe na mokili ya Kanana.
6 and Joseph is the ruler over the land, he who is selling to all the people of the land, and Joseph’s brothers come and bow themselves to him—face to the earth.
Jozefi azalaki moyangeli ya mokili. Ye nde azalaki koteka ble epai ya bato na ye nyonso. Bongo tango bandeko ya Jozefi bakomaki, bagumbamaki liboso na ye mpe bakitisaki mito na se.
7 And Joseph sees his brothers, and discerns them, and makes himself strange to them, and speaks sharp things with them, and says to them, “From where have you come?” And they say, “From the land of Canaan—to buy food.”
Tango kaka Jozefi amonaki bango, asosolaki mbala moko ete bazali bandeko na ye. Kasi asalaki lokola nde azali mopaya liboso na bango mpe azalaki na maloba makasi epai na bango. Atunaki bango: — Bowuti wapi? Bazongisaki: — Towuti na mokili ya Kanana; toyei nde kosomba biloko ya kolia.
8 And Joseph discerns his brothers, but they have not discerned him,
Atako Jozefi asosolaki ete bazali bandeko na ye, kasi bango basosolaki ye te.
9 and Joseph remembers the dreams which he dreamed of them and says to them, “You [are] spies; you have come to see the nakedness of the land.”
Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango: — Bino bozali penza banongi! Boyei nde kotala bisika nini mokili na biso ebatelami malamu te!
10 And they say to him, “No, my lord, but your servants have come to buy food;
Bazongisaki: — Te nkolo na ngai, basali na yo bayei nde kosomba biloko ya kolia.
11 we [are] all of us sons of one man, we [are] right men; your servants have not been spies”;
Tozali biso nyonso bana ya moto moko. Basali na yo bazali bato ya sembo, kasi bazali banongi te.
12 and he says to them, “No, but you have come to see the nakedness of the land”;
Alobaki na bango: — Te! Boyei na mokili na biso mpo na kotala bisika oyo ebatelami malamu te!
13 and they say, “Your servants [are] twelve brothers; we [are] sons of one man in the land of Canaan, and behold, the young one [is] with our father today, and one is not.”
Kasi bango bazongisaki: — Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te.
14 And Joseph says to them, “This [is] that which I have spoken to you, saying, You [are] spies,
Kasi Jozefi alobaki na bango: — Ezali ndenge kaka nalobaki na bino: bozali banongi.
15 by this you are proved: [as] Pharaoh lives, if you go out from this—except by your young brother coming here;
Tala ndenge nakomeka bino: Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te!
16 send one of you, and let him bring your brother, and you, remain bound, and let your words be proved, whether truth be with you: and if not, [as] Pharaoh lives, surely you [are] spies”;
Botinda moko kati na bino ete akende kozwa ndeko na bino ya mobali; mpe bino oyo bokotikala, bokozala na boloko mpo na komeka maloba na bino mpe kotala soki bolobi solo. Soki te, na kombo ya Faraon, bozali banongi!
17 and he gathers them into confinement [for] three days.
Atiaki bango nyonso na boloko mikolo misato.
18 And Joseph says to them on the third day, “Do this and live; I fear God!
Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango: — Nazali moto oyo abangaka Nzambe. Bosala oyo nazali koloba mpe bokozala na bomoi.
19 If you [are] right men, let one of your brothers be bound in the house of your confinement, and you, go, carry in grain [for] the famine of your houses,
Soki bozali bato ya sembo, tika ete moko kati na bino atikala awa kati na boloko; bongo bino bamosusu bokende, bomema ble oyo esengeli mpo na mabota na bino, oyo ezali na nzala makasi.
20 and you bring your young brother to me, and your words are established, and you do not die”; and they do so.
Kasi bomemela ngai leki na bino ya suka. Yango ekolakisa ete bolobaki solo mpe bokokufa te. Basalaki bongo.
21 And they say to one another, “Truly we [are] guilty concerning our brother, because we saw the distress of his soul, in his making supplication to us, and we did not listen: therefore this distress has come on us.”
Balobanaki bango na bango: — Solo, tozwi etumbu mpo na makambo oyo tosalaki ndeko na biso; pamba te tomonaki pasi na ye tango azalaki kobondela biso, kasi toyokaki ye te. Yango wana pasi oyo ekomeli biso.
22 And Reuben answers them, saying, “Did I not speak to you, saying, Do not sin against the boy? And you did not listen; and his blood also, behold, it is required.”
Ribeni alobaki na bango: — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye!
23 And they have not known that Joseph understands, for the interpreter [is] between them;
Bayebaki te ete Jozefi akokaki kososola maloba na bango, mpo ete azalaki kosalela molimboli mpo na kosolola na bango.
24 and he turns around from them, and weeps, and turns back to them, and speaks to them, and takes Simeon from them, and binds him before their eyes.
Jozefi apesaki mokongo, apusanaki mosika mpe abandaki kolela. Bongo azongelaki bango mpe asololaki lisusu na bango. Azwaki Simeoni kati na bango mpe akangaki ye na miso na bango.
25 And Joseph commands, and they fill their vessels [with] grain, also to put back the money of each of them into his sack, and to give to them provision for the way; and one does to them so.
Jozefi apesaki mitindo ete batondisa ble na basaki na bango, bazongisa mbongo ya moto na moto na saki na ye mpe bapesa bango bilei mpo na nzela. Esalemelaki bango bongo.
26 And they lift up their grain on their donkeys, and go from there,
Batiaki ble na bango likolo ya ba-ane na bango mpe bakendeki.
27 and the one opens his sack to give provender to his donkey at a lodging-place, and he sees his money, and behold, it [is] in the mouth of his bag,
Na esika oyo batelamaki mpo na kolekisa butu, moko na bango afungolaki saki na ye mpo na koleisa ane na ye mpe amonaki mbongo na ye na moto ya saki na ye.
28 and he says to his brothers, “My money has been put back, and also, behold, in my bag”: and their heart goes out, and they tremble, to one another saying, “What [is] this God has done to us!”
Ayebisaki bandeko na ye: — Bazongiseli ngai mbongo na ngai, tala yango oyo na saki na ngai! Mitema na bango ebetaki mpe babandaki kolenga, balobanaki bango na bango: — Likambo nini oyo Nzambe asali biso!
29 And they come to their father Jacob, to the land of Canaan, and they declare to him all the things meeting them, saying,
Tango bakomaki epai ya tata na bango Jakobi na mokili ya Kanana, bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango. Balobaki:
30 “The man, the lord of the land, has spoken with us sharp things, and makes us as spies of the land;
— Moto oyo azali mokonzi ya mokili alobelaki biso na maloba makasi. Azwaki biso lokola banongi.
31 and we say to him, We [are] right men, we have not been spies,
Kasi tolobaki na ye: « Tozali bato ya sembo, tozali banongi te.
32 we [are] twelve brothers, sons of our father, one is not, and the young one [is] today with our father in the land of Canaan.
Tozalaki bandeko mibali zomi na mibale, bana ya tata moko. Moko azalaka lisusu te mpe oyo ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, na mokili ya Kanana. »
33 And the man, the lord of the land, says to us, By this I know that you [are] right men—leave one of your brothers with me, and take [for] the famine of your houses and go,
Na boye, moto oyo azali mokonzi ya mokili azongiselaki biso: « Tala lolenge nakoyeba ete bozali bato ya sembo: ‹ Botikela ngai awa ndeko moko kati na bino. Bozwa biloko ya kolia oyo esengeli mpo na mabota na bino oyo ezali na nzala makasi mpe bokende.
34 and bring your young brother to me, and I know that you [are] not spies, but you [are] right men; I give your brother to you, and you trade with the land.”
Boyela ngai leki na bino ya suka. Na bongo, nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bato ya sembo; mpe ngai nakozongisela bino ndeko na bino, sima nakotika bino mpo ete bokoka kosala mombongo na mokili. › »
35 And it comes to pass, they are emptying their sacks, and behold, the bundle of each man’s silver [is] in his sack, and they see their bundles of silver, they and their father, and are afraid;
Tango bafungolaki basaki na bango, moko na moko amonaki mbongo na ye na saki. Bango na tata na bango bamonaki mbongo mpe bango nyonso babangaki.
36 and their father Jacob says to them, “You have bereaved me; Joseph is not, and Simeon is not, and Benjamin you take—all these [things] have been against me.”
Tata na bango Jakobi alobaki na bango: — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali: Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai!
37 And Reuben speaks to his father, saying, “You put to death my two sons, if I do not bring him to you; give him into my hand, and I bring him back to you”;
Ribeni alobaki na tata na ye: — Pesa ngai Benjame, mpe nakomemela yo ye. Soki namemeli yo ye te, boma bana na ngai mibale ya mibali.
38 and he says, “My son does not go down with you, for his brother [is] dead, and he by himself is left; when harm has met him in the way in which you go, then you have brought down my grey hairs in sorrow to Sheol.” (Sheol h7585)
Jakobi azongisaki: — Te! Mwana na ngai akokende elongo na bino te. Ndeko na ye ya mobali akufa; natikala kaka na ye. Soki likama ekweyeli ye na mobembo oyo bozali kokende, wana bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai! (Sheol h7585)

< Genesis 42 >