< Genesis 29 >

1 And Jacob lifts up his feet, and goes toward the land of the sons of the east;
Jakobi akobaki mobembo na ye mpe akomaki na mokili ya bato ya este.
2 and he looks, and behold, a well in the field, and behold, there [are] three droves of a flock crouching by it, for they water the droves from that well, and the great stone [is] on the mouth of the well.
Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu.
3 (When all the droves have been gathered there, and they have rolled the stone from off the mouth of the well, and have watered the flock, then they have turned back the stone on the mouth of the well to its place.)
Tango bibwele nyonso ezalaki kosangana wana, babateli bibwele bazalaki kolongola libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe komelisa bameme. Mpe na sima, bazalaki kozongisa libanga na esika na yango, na monoko ya libulu.
4 And Jacob says to them, “My brothers, where [are] you from?” And they say, “We [are] from Haran.”
Jakobi atunaki babateli bibwele: — Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi? Bazongisaki: — Towuti na Arani.
5 And he says to them, “Have you known Laban, son of Nahor?” And they say, “We have known.”
Atunaki bango lisusu: — Boyebi Labani, koko ya Naori? Bazongisaki: — Iyo, toyebi ye.
6 And he says to them, “Does he have peace?” And they say, “Peace; and behold, his daughter Rachel is coming with the flock.”
Jakobi abakisaki lisusu: — Boni, azali malamu? Bazongisaki: — Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme.
7 And he says, “Behold, the day [is] still great, [it is] not time for the livestock to be gathered; water the flock, and go, delight yourselves.”
Kasi Jakobi alobaki: — Tala, moyi ezali nanu makasi; tango ekoki nanu te mpo na kozongisa bibwele. Bomelisa bameme mpe bozonga lisusu koleisa yango matiti.
8 And they say, “We are not able, until all the droves be gathered together, and they have rolled away the stone from the mouth of the well, and we have watered the flock.”
Bazongisaki: — Tokoki kosala yango kaka soki bibwele nyonso esangani; bongo tokolongola libanga na monoko ya libulu mpe tokomelisa bameme mayi.
9 He is yet speaking with them, and Rachel has come with the flock which her father has, for she [is] shepherdess;
Wana azalaki nanu kosolola na bango, Rasheli ayaki elongo na bameme ya tata na ye, pamba te azalaki mwasi mobateli bibwele.
10 and it comes to pass, when Jacob has seen Rachel, daughter of his mother’s brother Laban, and the flock of his mother’s brother Laban, that Jacob comes near and rolls the stone from off the mouth of the well, and waters the flock of his mother’s brother Laban.
Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi.
11 And Jacob kisses Rachel, and lifts up his voice, and weeps,
Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi.
12 and Jacob declares to Rachel that he [is] her father’s brother, and that he [is] Rebekah’s son, and she runs and declares [it] to her father.
Jakobi ayebisaki Rasheli: « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye.
13 And it comes to pass, when Laban hears the report of his sister’s son Jacob, that he runs to meet him, and embraces him, and kisses him, and brings him into his house; and he recounts to Laban all these things,
Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki.
14 and Laban says to him, “You [are] surely my bone and my flesh”; and he dwells with him a month of days.
Labani alobaki na ye: « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba.
15 And Laban says to Jacob, “Is it because you [are] my brother that you have served me for nothing? Declare to me what your hire [is].”
Labani alobaki na Jakobi: — Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai? Yebisa ngai: olingi ete lifuti na yo ezala nini?
16 And Laban has two daughters, the name of the older [is] Leah, and the name of the younger Rachel,
Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo: Lea mpe leki na ye Rasheli.
17 and the eyes of Leah [are] tender, and Rachel has been beautiful of form and beautiful of appearance.
Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko.
18 And Jacob loves Rachel and says, “I serve you seven years for Rachel your younger daughter”:
Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki: — Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai.
19 and Laban says, “It is better for me to give her to you than to give her to another man; dwell with me”;
Labani alobaki: — Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai.
20 and Jacob serves for Rachel seven years; and they are in his eyes as some days, because of his loving her.
Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli.
21 And Jacob says to Laban, “Give up my wife, for my days have been fulfilled, and I go in to her”;
Sima, Jakobi alobaki na Labani: — Mikolo na ngai ekoki; pesa ngai mwasi na ngai, pamba te nalingi kozala na ye.
22 and Laban gathers all the men of the place, and makes a banquet.
Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti.
23 And it comes to pass in the evening, that he takes his daughter Leah, and brings her to him, and he goes in to her;
Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto.
24 and Laban gives his maidservant Zilpah to her, to his daughter Leah, [for] a maidservant.
Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.
25 And it comes to pass in the morning, that behold, it [is] Leah; and he says to Laban, “What [is] this you have done to me? Have I not served with you for Rachel? And why have you deceived me?”
Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani: — Likambo nini oyo osali ngai? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo? Mpo na nini okosi ngai?
26 And Laban says, “It is not done so in our place, to give the younger before the firstborn;
Labani azongisaki: — Na bokoko na biso awa, topesaka te leki na libala liboso ya kulutu.
27 fulfill the period of seven [for] this one, and we also give to you this one, for the service which you serve with me yet seven other years.”
Silisa nanu poso ya babalani elongo na ye. Bongo sima, oyo ya leki mpe akopesamela yo soki osaleli ngai lisusu mibu sambo.
28 And Jacob does so, and fulfills the period of seven [for] this one, and he gives his daughter Rachel to him for a wife for him;
Jakobi asalaki bongo: asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye.
29 and Laban gives his maidservant Bilhah to his daughter Rachel for a maidservant for her.
Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye.
30 And he also goes in to Rachel, and he also loves Rachel more than Leah; and he serves with him yet seven other years.
Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo.
31 And YHWH sees that Leah [is] the hated one, and He opens her womb, and Rachel [is] barren;
Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota; kasi Rasheli azalaki kobota te.
32 and Leah conceives, and bears a son, and calls his name Reuben, for she said, “Because YHWH has looked on my affliction; because now does my husband love me.”
Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni; » alobaki: « Yawe amoni pasi na ngai; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. »
33 And she conceives again, and bears a son, and says, “Because YHWH has heard that I [am] the hated one, He also gives to me even this [one]”; and she calls his name Simeon.
Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki: « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. »
34 And she conceives again and bears a son, and says, “Now [is] the time, my husband is joined to me, because I have born to him three sons,” therefore has [one] called his name Levi.
Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki: « Na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, pamba te naboteli ye bana mibali misato. » Boye bapesaki ye kombo « Levi. »
35 And she conceives again and bears a son, and this time says, “I praise YHWH”; therefore has she called his name Judah; and she ceases from bearing.
Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki: « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota.

< Genesis 29 >