< Deuteronomy 33 >
1 And this [is] the blessing [with] which Moses the man of God blessed the sons of Israel before his death,
Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa.
2 and he says: “YHWH has come from Sinai, And has risen from Seir for them; He has shone from Mount Paran, And has come [with] myriads of holy ones; At His right hand [came] a fiery law [[or a flaming fire]] for them.
Alobaki: « Yawe awutaki na Sinai; wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.
3 Indeed, He [is] loving the peoples; All His holy ones [are] in Your hand, And they sat down at Your foot, [Each] lifts up Your words.
Solo, olingaka bato, basantu nyonso basimbami na loboko na Yo. Na makolo na Yo, bango nyonso bagumbamaka. Ezali epai na Yo nde bazwaka mateya.
4 Moses has commanded a law for us, A possession of the assembly of Jacob.
Moyize apesa biso Mobeko oyo ezali bozwi ya lisanga ya Jakobi.
5 And He is King in Yeshurun, In the heads of the people gathering together, The tribes of Israel!
Azalaki mokonzi ya Yeshuruni tango bakambi ya bato basanganaki elongo na mabota ya Isalaele.
6 Let Reuben live, and not die, And let his men be an [incalculable] number.
Tika ete Ribeni awumela na bomoi mpe akufa te, mpe tika ete bato na ye bazala moke te! »
7 And this [is] for Judah, and he says: Hear, O YHWH, the voice of Judah, And You bring him in to his people; His hand has striven for him, And You are a help from his adversaries.
Tala mapomboli oyo alobaki mpo na Yuda: « Oh Yawe, yoka koganga ya Yuda; zongisa ye epai ya bato na ye! Tika ete maboko na ye elongisa banzela na ye, mpe tika ete osunga ye liboso ya banguna na ye! »
8 And of Levi he said: Your Perfections and your Lights [are] for your pious one, Whom You have tried in Massah, You strive with him at the waters of Meribah;
Mpo na Levi, alobaki: « Urimi mpe Tumimi na Yo ezali mpo na moyengebene oyo omekaki ye motema na Masa, mpe oyo owelanaki na ye na mayi ya Meriba,
9 Who is saying of his father and his mother, I have not seen him; And he has not discerned his brothers, And he has not known his sons; For they have observed Your saying, And they keep Your covenant.
oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka, bolingo epai ya baboti na ye, bandeko na ye mpe bana na ye moko, mpo na kotosa maloba na Yo mpe kobatela boyokani na Yo.
10 They teach Your judgments to Jacob, And Your law to Israel; They put incense in Your nose, And whole burnt-offering on Your altar.
Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi, mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele; abonzaka ansa liboso na Yo, mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo.
11 Bless, O YHWH, his strength, And accept the work of his hands, Strike the loins of his withstanders, And of those hating him—that they do not rise!
Oh Yawe, pambola makasi na ye na mosala, mpe sepela na mosala ya maboko na ye. Buka loketo ya bato oyo bazali kotelemela ye, mpe loketo ya bayini na ye kino bakoka lisusu te kotelema. »
12 Of Benjamin he said: The beloved of YHWH dwells confidently by Him, Covering him over every day; Indeed, he dwells between His shoulders.
Mpo na Benjame, alobaki: « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia pembeni na Ye, pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba; mpe moto oyo Yawe alingaka apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye! »
13 And of Joseph he said: His land [is] blessed [by] YHWH, By a precious thing of the heavens, By dew, and by the deep crouching beneath,
Mpo na Jozefi, alobaki: « Tika ete Yawe apambola mokili na ye na nzela ya mamwe ya motuya, oyo ewutaka na likolo, mpe na nzela ya mayi ya mozindo oyo etiolaka na se ya mabele
14 And by a precious thing—fruits of the sun, And by a precious thing—cast forth by the months,
elongo na biloko oyo eleki motuya, oyo mayi ekolisaka mpe oyo eleki kitoko, oyo ebimaka sanza na sanza;
15 And by a chief thing—of the ancient mountains, And by a precious thing—of the continuous heights,
na nzela ya bakado ya kitoko ya bangomba ya kala, mpe na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko ya bangomba mike oyo ewumelaka mobu na mobu;
16 And by a precious thing—of earth and its fullness, And the good pleasure of Him who is dwelling in the bush; Let it come for the head of Joseph, And for the crown of him [who is] separate from his brothers.
na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko, bambuma oyo etondi kati na mokili! Tika ete Nzambe oyo avandaka kati na nzete moke oyo ezali kopela moto apambola moto ya Jozefi mpe elongi ya moto oyo babulisi kati na bandeko na ye!
17 His splendor [is] a firstling of his ox, And his horns [are] horns of a wild ox; With them he pushes the peoples Altogether to the ends of the earth; And they [are] the myriads of Ephraim, And they [are] the thousands of Manasseh.
Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe; maseke na ye ezali lokola ya mpakasa. Na nzela na yango nde ebetaka bikolo, ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili. Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza, tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele! »
18 And of Zebulun he said: Rejoice, O Zebulun, in your going out, And, O Issachar, in your tents;
Mpo na Zabuloni, alobaki: « Oh Zabuloni, sepela na kobima na yo! Mpe yo Isakari, tika ete osepela kati na bandako na yo ya kapo.
19 They call peoples [to] the mountain, There they sacrifice righteous sacrifices; For they suck up the abundance of the seas, And hidden things hidden in the sand.
Bakobengisa bato na likolo ya ngomba, mpe bakobonza kuna bambeka ya bosembo, bakosala feti mpo na bomengo ya bibale minene, mpe mpo na bozwi oyo ebombama na zelo ya libongo. »
20 And of Gad he said: Blessed is he who is enlarging Gad, He dwells as a lioness, And has torn the arm—also the crown!
Mpo na Gadi, alobaki: « Tika ete apambolama, moto oyo akoyeisa mokili ya Gadi monene! Gadi akowumela kuna lokola nkosi oyo ezali kopasola banda na lokolo kino na moto.
21 And he provides the first part for himself, For there the portion of the lawgiver is covered, And he comes [with] the heads of the people; He has done the righteousness of YHWH, And His judgments with Israel.
Aponaki mabele ya kitoko mpo na ye moko, bapesaki ye eteni oyo ebongi na mokambi. Atambolaki liboso ya bato; mpe asalaki mosala kolanda bosembo ya Yawe mpe bikateli na Ye liboso ya Isalaele. »
22 And of Dan he said: Dan [is] a lion’s whelp; He leaps from Bashan.
Mpo na Dani, alobaki: « Dani azali mwana ya nkosi oyo epumbwaka wuta na Bashani. »
23 And of Naphtali he said: O Naphtali, satisfied with pleasure, And full of the blessing of YHWH, Possess [the] west and [the] south.
Mpo na Nefitali alobaki: « Nefitali atondi na bolamu mpe na mapamboli na Yawe, akozwa libula ya weste mpe ya sude. »
24 And of Asher he said: Asher [is] blessed with sons, Let him be accepted by his brothers, And dipping his foot in oil.
Mpo na Aseri, alobaki: « Aseri azali mwana mobali oyo aleki na mapamboli. Tika ete bandeko na ye basalela ye mpe tika ete makolo na ye ezinda na mafuta.
25 Iron and bronze [are] your shoes, And as your days—your strength.
Bikangelo ya bikuke na yo ekozala ya bibende mpe ya bronze. Mpe tika ete makasi na yo ewumela ndenge mikolo na yo ezali.
26 [There is] none like the God of Yeshurun, Riding the heavens to your help, And in His excellence the skies.
Moko te akokani na Nzambe ya Yeshuruni, Nzambe oyo atambolaka na likolo lokola mpunda mpo na kosunga yo, mpe na mapata, kati na nkembo na Ye.
27 The eternal God [is] a habitation, And beneath [are] continuous arms. And He casts out the enemy from your presence and says, Destroy!
Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, azali tango nyonso Mosungi awa na se. Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango.
28 And Israel dwells [in] confidence alone; The eye of Jacob [is] to a land of grain and wine; Also His heavens drop down dew.
Boye Isalaele akowumela na kimia, mpe etima ya Jakobi ezali kotiola kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika, epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe.
29 O your blessedness, O Israel! Who is like you? A people saved by YHWH, The shield of your help, And He who [is] the sword of your excellence! And your enemies are subdued for you, And you tread on their high places.”
Oh Isalaele, ozali solo libota ya esengo! Libota nini ekokani na yo, yo libota oyo Yawe abikisi? Ye azali nde nguba na yo mpe mosungi na yo ya nkembo. Banguna na yo bakokima liboso na yo, mpe okonyata bisika na bango, oyo eleki likolo. »