< 1 Timothy 2 >
1 I exhort, then, first of all, there be made supplications, prayers, intercessions, thanksgivings, for all men—
Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso,
2 for kings, and all who are in authority, that we may lead a quiet and peaceable life in all piety and gravity,
mpo na bakonzi mpe mpo na bakambi nyonso, mpo ete tokoka kobika bomoi ya boboto, ya kimia, ya botosi kati na makambo ya Nzambe, mpe bomoi ya bosantu.
3 for this [is] right and acceptable before God our Savior,
Pamba te yango nde ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso,
4 who wills all men to be saved, and to come to the full knowledge of the truth;
oyo alingi ete bato nyonso babikisama mpe bayeba solo.
5 for [there is] one God, also one mediator of God and of men—the man Christ Jesus,
Solo, ezali na Nzambe kaka moko. Ndenge moko mpe ezali na Moyokanisi kaka moko kati na Nzambe mpe bato: ezali moto moko, Yesu-Klisto
6 who gave Himself [as] a ransom for all—the testimony in its own times—
oyo amikabaki lokola mbeka mpo na kokangola bato nyonso. Yango nde litatoli oyo epesamaki na tango oyo abongisa.
7 in regard to which I was set a preacher and apostle—truth I say in Christ, I do not lie—a teacher of nations, in faith and truth.
Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.
8 I intend, therefore, that men pray in every place, lifting up holy hands, apart from anger and deliberation;
Yango wana nalingi ete mibali basambelaka na bisika nyonso, na kotombola maboko ya bule, na kanda te mpe na koswana te.
9 also the women in like manner, in orderly apparel, to adorn themselves with modesty and sobriety, not in braided hair, or gold, or pearls, or clothing of great price,
Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi,
10 but—which becomes women professing godly piety—through good works.
kasi balata nde misala ya malamu, misala oyo ebongi mpo na basi oyo batatolaka polele ete bagumbamelaka Nzambe.
11 Let a woman learn in quietness in all subjection,
Na tango ya mateya, basi basengeli kovanda nye mpe kozala na botosi.
12 and I do not allow a woman to teach, nor to rule a husband, but to be in quietness,
Napesi te na mwasi nzela ya koteya to ya kozala na bokonzi na likolo ya mobali; mwasi asengeli nde kovanda nye.
13 for Adam was formed first, then Eve,
Solo Nzambe asalaki liboso Adamu, mpe sima, Eva.
14 and Adam was not deceived, but the woman, having been deceived, came into transgression,
Ezali Adamu te moto akosamaki; ezali mwasi nde akosamaki mpe abukaki mobeko ya Nzambe,
15 and she will be saved through the childbearing, if they remain in faith, and love, and sanctification, with sobriety.
kasi mwasi akobikisama na nzela ya kobota. Basi bakobikisama soki bakobi kati na kondima, kati na bolingo mpe kati na bosantu oyo ezangi lolendo.