< Zacharias 14 >

1 Behold, the days of the Lord come, and your spoils shall be divided in you.
Tala, mokolo ya Yawe ezali koya; ezali mokolo oyo bakokabola bomengo ya bitumba kati na yo, Yelusalemi.
2 And I will gather all the Gentiles to Jerusalem to war, and the city shall be taken, and the houses plundered, and the women ravished; and half of the city shall go forth into captivity, but the rest of my people shall not be utterly cut off from the city.
Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala.
3 And the Lord shall go forth, and fight with those Gentiles as when he fought in the day of war.
Bongo Yawe akobima mpe akobundisa bikolo wana, ndenge asalaka na tango ya bitumba.
4 And his feet shall stand in that day on the mount of Olives, which is before Jerusalem on the east, and the mount of Olives shall cleave asunder, half of it toward the east and the west, a very great division; and half the mountain shall lean to the north, and half of it to the south.
Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale: eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema: eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude.
5 And the valley of my mountains shall be closed up, and the valley of the mountains shall be joined on to Jasod, and shall be blocked up as it was blocked up in the days of the earthquake, in the days of Ozias king of Juda; and the Lord my God shall come, and all the saints with him.
Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso.
6 And it shall come to pass in that day that there shall be no light,
Na mokolo wana, ezala pole to malili to mpe mvula, eloko moko te ekozala.
7 and there shall be for one day cold and frost, and that day [shall be] known to the Lord, and [it shall] not [be] day nor night: but towards evening it shall be light.
Ekozala mokolo ya ndenge mosusu, mokolo ezanga moyi mpe butu, mokolo oyo Ye moko kaka Yawe ayebi; pole ekobima soki pokwa ekoki.
8 And in that day living water shall come forth out of Jerusalem; half of it toward the former sea, and half of it toward the latter sea: and so shall it be in summer and spring.
Na mokolo wana, mayi oyo etiolaka ekobimela na Yelusalemi. Ndambo moko ekokende na ebale monene ya este mpe ndambo mosusu, na ebale monene ya weste, na eleko ya malili mpe ya molunge.
9 And the Lord shall be king over all the earth: in that day there shall be one Lord, and his name one,
Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye.
10 compassing all the earth, and the wilderness from Gabe to Remmon south of Jerusalem. And Rama shall remain in its place. From the gate of Benjamin to the place of the first gate, to the gate of the corners, and to the tower of Anameel, as far as the king's wine presses,
Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi.
11 they shall dwell in the city; and there shall be no more any curse, and Jerusalem shall dwell securely.
Bato bakozongela kovanda na Yelusalemi; Yelusalemi ekobebisama lisusu te mpe ekokoma na kimia.
12 And this shall be the overthrow with which the Lord will strike all the nations, as many as have fought against Jerusalem; their flesh shall consume away while they are standing upon their feet, and their eyes shall melt out of their holes, and their tongue shall consume away in their mouth.
Tala etumbu oyo Yawe akopesa na bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi: Misuni ya banzoto na bango ekobanda kopola wana bazali nanu na bomoi; miso na bango ekokufa na bilongi na bango mpe balolemo na bango ekokufa kati na minoko na bango.
13 And there shall be in that day a great panic from the Lord upon them; and they shall lay hold every man of the hand of his neighbor, and his hand shall be clasped with the hand of his neighbor.
Na mokolo wana, Yawe akosala ete mobulu ekota kati na bango, bakobetana makofi mpe bakobomana bango na bango.
14 Juda also shall fight in Jerusalem; and [God] shall gather the strength of all the nations round about, gold, and silver, and apparel, in great abundance.
Bato ya Yuda mpe bakobunda kati na Yelusalemi, bakokongola bomengo ya bikolo nyonso ya zingazinga: wolo, palata mpe bilamba mingi koleka.
15 And this shall be the overthrow of the horses, and mules, and camels, and asses, and all the beasts that are in those camps, according to this overthrow.
Etumbu ya ndenge moko kaka ekokweya likolo ya bampunda, ya bamile, ya bashamo, ya ba-ane mpe ya banyama nyonso oyo ekozala na molako.
16 And it shall come to pass, [that] whoever shall be left of all the nations that came against Jerusalem, shall even come up every year to worship the king, the Lord Almighty, and to keep the feast of tabernacles.
Boye, batikali kati na bikolo nyonso oyo ebundisaki Yelusalemi bakomata mibu nyonso na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mpe mpo na kosala feti ya Bandako ya kapo.
17 And it shall come to pass, [that] whoever of all the families of the earth shall not come up to Jerusalem to worship the king, the Lord Almighty, even these shall be added to the others.
Soki bato ya etuka moko ya mabele bakei te na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mvula ekonoka te na mokili na bango.
18 And if the family of Egypt shall not go up, nor come; then upon them shall be the overthrow with which the Lord shall strike all the nations, whichever of them shall not come up to keep the feast of tabernacles.
Soki bato ya Ejipito baboyi kokende kosala feti na Yelusalemi, mvula ekonoka te na mokili na bango. Boye, Yawe akopesa bango etumbu oyo abongisa mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo.
19 This shall be the sin of Egypt, and the sin of all the nations, whoever shall not come up to keep the feast of tabernacles.
Ekozala etumbu ya Ejipito mpe ya bikolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo.
20 In that day there shall be upon the bridle of every horse Holiness to the Lord Almighty; and the caldrons in the house of the Lord shall be as bowls before the altar.
Na mokolo wana, bakotia makomi na bangonga mike-mike ya bampunda: « Ebulisami mpo na Yawe! » Banzungu ya Tempelo ya Yawe ekozala mpe bule ndenge bakopo ezalaka bule liboso ya etumbelo.
21 And every pot in Jerusalem and in Juda shall be holy to the Lord Almighty: and all that sacrifice shall come and take of them, and shall seethe [meat] in them: and in that day there shall be no more the Chananite in the house of the Lord Almighty.
Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.

< Zacharias 14 >