< Ezra 7 >

1 Now after these things, in the reign of Arthasastha king of the Persians, came up Esdras the son of Saraias, the son of Azarias, the son of Chelcias,
Sima na makambo oyo, tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi ya Persi, Esidrasi, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Ilikia,
2 the son of Selum, the son of Sadduc, the son of Achitob,
mwana mobali ya Shalumi, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi,
3 the son of Samarias, the son of Esria, the son of Mareoth,
mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Merayoti,
4 the son of Zaraia, the son of Ozias, the son of Bokki,
mwana mobali ya Zerakia, mwana mobali ya Uzi, mwana ya Buki,
5 the son of Abisue, the son of Phinees, the son of Eleazar, the son of Aaron the first priest.
mwana mobali ya Abishuwa, mwana mobali ya Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, mokonzi ya Banganga-Nzambe,
6 This Esdras went up out of Babylon; and he was a ready scribe in the law of Moses, which the Lord God of Israel gave: and the king gave him [leave], for the hand of the Lord his God was upon him in all things which he sought.
alongwaki na Babiloni. Esidrasi yango azalaki molakisi malamu ya mibeko mpe ayebaki penza malamu Mobeko ya Moyize oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki na bato na Ye. Bongo lokola loboko ya Yawe, Nzambe na ye, ezalaki likolo na ye, mokonzi apesaki ye biloko nyonso oyo asengaki.
7 And [some] of the children of Israel went up, and [some] of the priests, and of the Levites, and the singers, and the doorkeepers, and the Nathinim, to Jerusalem, in the seventh year of Arthasastha the king.
Kati na bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, bayembi, bakengeli bikuke mpe basali ya Tempelo, ndambo bazongaki na Yelusalemi na mobu ya sambo ya mokonzi Aritakizerisesi.
8 And they came to Jerusalem in the fifth month, this [was] the seventh year of the king.
Esidrasi mpe akomaki elongo na bango na Yelusalemi na sanza ya mitano ya mobu ya sambo ya mokonzi.
9 For in the first [day] of the first month he began the going up from Babylon, and in the first day of the fifth month, they came to Jerusalem, for the good hand of his God was upon him.
Alongwaki na Babiloni na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe akomaki na Yelusalemi na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, pamba te loboko ya ngolu ya Nzambe na ye ezalaki likolo na ye,
10 For Esdras had determined in his heart to seek the law, and to do and teach the ordinances and judgments in Israel.
mpo ete Esidrasi amipesaki ye moko penza, na motema na ye mobimba, mpo na koyekola mpe kotia na misala mibeko ya Yawe mpe mpo na kolakisa na bana ya Isalaele bikateli mpe mitindo ya mibeko yango.
11 And this [is] the copy of the order which Arthasastha gave to Esdras the priest, the scribe of the book of the words of the commandments of the Lord, and of his ordinances to Israel.
Tala mokanda oyo mokonzi Aritakizerisesi apesaki epai ya Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, oyo ayebaki penza malamu makambo oyo etali mitindo mpe bikateli ya Yawe mpo na Isalaele:
12 Arthasastha, king of kings, to Esdras, the scribe of the law of the Lord God of heaven, Let the order and the answer be accomplished.
« Aritakizerisesi, mokonzi ya bakonzi; Epai ya Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo: Mbote na yo!
13 A decree is made by me, that every one who is willing in my kingdom of the people of Israel, and of the priests and Levites, to go to Jerusalem, [be permitted] to go with you.
Napesi mitindo ete, kati na bokonzi na ngai, moto nyonso kati na bato ya Isalaele, kati na Banganga-Nzambe mpe Balevi na bango, oyo alingi kokende na Yelusalemi akende elongo na yo.
14 [One] has been sent from the king and the seven councillors, to visit Judea and Jerusalem, according to the law of their God that is in your hand.
Ngai, mokonzi elongo na bapesi toli na ngai sambo, totindi yo koluka koyeba makambo oyo ezali koleka na Yuda mpe na Yelusalemi, kolanda Mobeko ya Nzambe na yo, oyo ezali na maboko na yo,
15 And for the house of the Lord [there have been sent] silver and gold, which the king and the councillors have freely given to the God of Israel, who dwells in Jerusalem.
mpe komema palata mpe wolo oyo mokonzi mpe bapesi toli na ye bapesi bango moko wuta na mokano ya mitema na bango, epai ya Nzambe ya Isalaele, oyo Ndako na Ye ezali na Yelusalemi;
16 And all the silver and gold, whatever you shall find in all the land of Babylon, with the free will offering of the people, and the priests that offer freely for the house of God which is in Jerusalem.
elongo na palata mpe wolo nyonso oyo okozwa na etuka ya Babiloni, makabo oyo bato mpe Banganga-Nzambe bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango, mpo na Tempelo ya Nzambe na bango kati na Yelusalemi.
17 And as for every one that arrives [there], speedily order him by this letter [to bring] calves, rams, lambs, and their meat-offerings, and their drink-offerings; and you shall offer them on the altar of the house of your God which is in Jerusalem.
Boye, okosala keba ete osomba bangombe, bameme ya mibali mpe bana meme elongo na nyonso oyo esengeli mpo na makabo na yango ya gato mpe ya masanga, mpe okobonza yango na etumbelo ya Nzambe na bino kati na Yelusalemi.
18 And whatever it shall seem good to you and to your brethren to do with the rest of the silver and the gold, do as it is pleasing to your God.
Na palata mpe wolo oyo etikali, yo mpe bandeko na yo, Bayuda, bokoki kosala nyonso oyo bokomona ete ezali malamu kolanda mokano ya Yawe, Nzambe na bino.
19 And deliver the vessels that are given you for the service of the house of God, before God in Jerusalem.
Okopesa epai ya Nzambe ya Yelusalemi, biloko nyonso oyo bakopesa yo mpo na mosala ya Tempelo ya Nzambe na yo.
20 And as to the rest of the need of the house of your God, you shall give from the king's treasure-houses,
Na nzela ya bomengo ya mokonzi, okoki kozwa biloko nyonso mosusu oyo okozala na yango na bosenga mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na yo.
21 and from me, whatever it shall seem [good] to you to give. I king Arthasastha have made a decree for all the treasuries that are in the [country] beyond the river, that whatever Esdras the priest and scribe of the God of heaven may ask you, it shall be done speedily,
Sik’oyo, ngai, mokonzi Aritakizerisesi, napesi mitindo epai ya babateli bomengo nyonso ya mokonzi kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, ete bopesa na lombangu eloko nyonso oyo Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo, akosenga bino
22 to [the amount of] a hundred talents of silver, and a hundred measures of wheat, and a hundred baths of wine, and a hundred baths of oil, and salt without reckoning.
kino na kilo ya palata nkoto misato na nkama mitano, kilo ya ble nkoto tuku minei na mitano, balitele ya vino nkoto minei na nkama mitano, balitele ya mafuta nkoto minei na nkama mitano mpe kilo ya mungwa oyo bakoki kotanga te.
23 Let whatever is in the decree of the God of heaven, be done: take heed lest any one make an attack on the house of the God of heaven, lest at any time there shall be wrath against the realm of the king and his sons.
Tika ete makambo nyonso oyo Nzambe ya Likolo atindi mpo na Tempelo na Ye esalema ndenge kaka atindi yango, mpo ete kanda na Ye ekitela te mokili ya mokonzi mpe bana na ye ya mibali.
24 Also this has been declared to you, with respect to all the priests, and Levites, the singers, porters, Nathinim and ministers of the house of God, let no tribute be [paid] to you; you shall not have power to oppress them.
Bosengeli lisusu koyeba ete bozali lisusu na ndingisa te ya kosenga na Nganga-Nzambe nyonso, Molevi nyonso, moyembi nyonso, mokengeli nyonso ya ekuke, mosali nyonso ya Tempelo, mpe na mosali nyonso mosusu ya Ndako ya Nzambe ete afuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.
25 And you, Esdras, as the wisdom of God [is] in your hand, appoint scribes and judges, that they may judge for all the people beyond the river, all that know the law of the Lord your God; and you shall make it known to him that knows not.
Bongo yo, Esidrasi, kolanda bwanya ya Nzambe na yo, oyo ozali na yango, pona bilombe mpe basambisi mpo na mosala ya kokata makambo ya bato nyonso oyo, kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, bayebi mibeko ya Nzambe na yo; mpe lakisa yango na bato oyo bayebi yango te.
26 And whoever shall not do the law of God, and the law of the king readily, judgment shall be taken upon him, whether for death or for chastisement, or for a fine of his property, or casting into prison.
Moto nyonso oyo akotosa te Mobeko ya Nzambe na yo mpe mobeko ya mokonzi asengeli bongo kozwa etumbu ya kufa to kokende na bowumbu to kokaba bomengo na ye mpo ete babotola yango to mpe kokota na boloko. »
27 Blessed [be] the Lord God of our fathers, who has put it thus into the heart of the king, to glorify the house of the Lord which is in Jerusalem;
Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi,
28 and has given me favor in the eyes of the king, and of his councillors, and all the rulers of the king, the exalted ones. And I was strengthened according to the good hand of God upon me, and I gathered chief men of Israel to go up with me.
mpe oyo asaleli ngai bolamu na Ye liboso ya mokonzi, ya bapesi toli na ye mpe ya bakalaka na ye nyonso, pamba te loboko ya Yawe, Nzambe na ngai, ezalaki likolo na ngai! Boye, nazwaki makasi mpe nasangisaki bakambi ya Isalaele mpo ete bazonga elongo na ngai.

< Ezra 7 >