< Haggai 2 >
1 In the seventh [month], in the one and twentieth [day] of the month, came the word of the LORD by the prophet Haggai, saying,
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na moko ya sanza ya sambo:
2 Speak now to Zerubbabel the son of Shealtiel, governor of Judah, and to Joshua the son of Josedech, the high priest, and to the residue of the people, saying,
« Loba na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda; na Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe na bato nyonso oyo batikali:
3 Who [is] left among you that saw this house in her first glory? and how do ye see it now? [is it] not in your eyes in comparison of it as nothing?
‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba?
4 Yet now be strong, O Zerubbabel, saith the LORD; and be strong, O Joshua, son of Josedech, the high priest; and be strong, all ye people of the land, saith the LORD, and work: for I [am] with you, saith the LORD of hosts:
Kasi sik’oyo, Zorobabeli, zala makasi, › elobi Yawe. ‹ Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, zala makasi. Bino nyonso bato ya ekolo, bozala makasi, › elobi Yawe, ‹ bosala mosala, pamba te nazali elongo na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
5 [According to] the word that I covenanted with you when ye came out of Egypt, so my spirit remaineth among you: fear ye not.
‹ Kolanda mokano oyo nazwaki mpo na bino tango bobimaki na Ejipito, Molimo na Ngai azali kati na bino. Bobanga te. ›
6 For thus saith the LORD of hosts; Yet once, it [is] a little while, and I will shake the heavens, and the earth, and the sea, and the dry [land; ]
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Na mwa tango moke, nakoningisa lisusu Likolo mpe mokili, ebale monene mpe mabele;
7 And I will shake all nations, and the desire of all nations shall come: and I will fill this house with glory, saith the LORD of hosts.
nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
8 The silver [is] mine, and the gold [is] mine, saith the LORD of hosts.
‹ Wolo mpe palata ezali ya Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
9 The glory of this latter house shall be greater than of the former, saith the LORD of hosts: and in this place will I give peace, saith the LORD of hosts.
‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
10 In the four and twentieth [day] of the ninth [month], in the second year of Darius, came the word of the LORD by Haggai the prophet, saying,
Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa:
11 Thus saith the LORD of hosts; Ask now the priests [concerning] the law, saying,
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Tuna Banganga-Nzambe makambo oyo osengeli kosala kolanda mobeko:
12 If one bear holy flesh in the skirt of his garment, and with his skirt do touch bread, or pottage, or wine, or oil, or any meat, shall it be holy? And the priests answered and said, No.
— Soki moto moko amemi na songe ya elamba mosuni oyo ebulisama, mpe songe yango etuti lipa to ndunda to vino to mafuta to bilei mosusu, boni, ekokoma bule? › » Banganga-Nzambe bazongisaki: — Te, ekokoma bule te!
13 Then said Haggai, If [one that is] unclean by a dead body touch any of these, shall it be unclean? And the priests answered and said, It shall be unclean.
Mosakoli Aje alobaki: — Soki moto oyo akomaki mbindo mpo ete asimbaki ebembe asimbi eloko moko kati na biloko wana, boni, eloko yango ekokoma mbindo? Banganga-Nzambe bazongisaki: — Iyo, ekokoma mbindo.
14 Then answered Haggai, and said, So [is] this people, and so [is] this nation before me, saith the LORD; and so [is] every work of their hands; and that which they offer there [is] unclean.
Mosakoli Aje alobaki lisusu: « Bato oyo mpe ekolo oyo bazali nde ndenge wana na miso na Ngai, » elobi Yawe, « misala nyonso oyo basalaka mpe biloko nyonso oyo babonzelaka Ngai ezalaka ya mbindo.
15 And now, I pray you, consider from this day and upward, from before a stone was laid upon a stone in the temple of the LORD:
Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe.
16 Since those [days] were, when [one] came to an heap of twenty [measures], there were [but] ten: when [one] came to the pressfat for to draw out fifty [vessels] out of the press, there were [but] twenty.
Tango moto moko azalaki koya mpo na kozwa bikolo tuku mibale ya ble na ebombelo, azalaki kokuta kaka bikolo zomi; tango moto moko azalaki kokende na ekamolelo masanga ya vino mpo na kozwa bambeki tuku mitano ya vino, azalaki kaka kokuta bambeki tuku mibale.
17 I smote you with blasting and with mildew and with hail in all the labours of your hands; yet ye [turned] not to me, saith the LORD.
Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe.
18 Consider now from this day and upward, from the four and twentieth day of the ninth [month, even] from the day that the foundation of the LORD’s temple was laid, consider [it].
« Kobanda lelo, mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, botala malamu miboko ya Tempelo ya Yawe, oyo batiaki; botala malamu penza makambo oyo ekoleka.
19 Is the seed yet in the barn? yea, as yet the vine, and the fig tree, and the pomegranate, and the olive tree, hath not brought forth: from this day will I bless [you].
Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. »
20 And again the word of the LORD came unto Haggai in the four and twentieth [day] of the month, saying,
Yawe alobaki, na mbala ya mibale, na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa:
21 Speak to Zerubbabel, governor of Judah, saying, I will shake the heavens and the earth;
« Loba na Zorobabeli, moyangeli ya Yuda, ete nakoningisa likolo mpe mabele,
22 And I will overthrow the throne of kingdoms, and I will destroy the strength of the kingdoms of the heathen; and I will overthrow the chariots, and those that ride in them; and the horses and their riders shall come down, every one by the sword of his brother.
nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga.
23 In that day, saith the LORD of hosts, will I take thee, O Zerubbabel, my servant, the son of Shealtiel, saith the LORD, and will make thee as a signet: for I have chosen thee, saith the LORD of hosts.
Na mokolo wana, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakozwa yo Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mosali na Ngai, mpe nakokomisa yo lokola kashe na Ngai, pamba te ezali yo nde Ngai napona, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.