< Amos 2 >

1 Thus saith the LORD; For three transgressions of Moab, and for four, I will not turn away [the punishment] thereof; because he burned the bones of the king of Edom into lime:
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Moabi, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batumbaki mikuwa ya mokonzi ya Edomi mpe bakomisaki yango putulu.
2 But I will send a fire upon Moab, and it shall devour the palaces of Kerioth: and Moab shall die with tumult, with shouting, [and] with the sound of the trumpet:
Nakotia moto kati na ekolo ya Moabi, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba ya Kerioti, oyo batonga makasi. Moabi ekokufa kati na lokito ya makasi, na makelele ya bitumba mpe ya kelelo.
3 And I will cut off the judge from the midst thereof, and will slay all the princes thereof with him, saith the LORD.
Nakobebisa mokonzi na yango mpe nakoboma ye elongo na bakalaka na ye, » elobi Yawe.
4 Thus saith the LORD; For three transgressions of Judah, and for four, I will not turn away [the punishment] thereof; because they have despised the law of the LORD, and have not kept his commandments, and their lies caused them to err, after the which their fathers have walked:
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Yuda, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te babwakaki Mobeko na Ngai, babatelaki te bikateli na Ngai mpe babungaki nzela mpo na kolanda banzambe ya lokuta oyo bakoko na bango balandaki na tango ya kala.
5 But I will send a fire upon Judah, and it shall devour the palaces of Jerusalem.
Nakotia moto kati na ekolo ya Yuda, mpe moto yango ekozikisa bandako ya engumba Yelusalemi, oyo batonga makasi. »
6 Thus saith the LORD; For three transgressions of Israel, and for four, I will not turn away [the punishment] thereof; because they sold the righteous for silver, and the poor for a pair of shoes;
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Likolo ya masumu misato to minei ya Isalaele, nakozanga te kopesa bango etumbu, pamba te batekaki bato ya sembo mpo na kozwa kaka palata, mpe bato bakelela mpo na kozwa kaka mapapa mibale.
7 That pant after the dust of the earth on the head of the poor, and turn aside the way of the meek: and a man and his father will go in unto the [same] maid, to profane my holy name:
Bazali konyata mito ya babola ndenge banyataka putulu ya mabele, mpe bazali kokata na bosembo te makambo ya bato bakelela. Tata mpe mwana na ye ya mobali bazali kosangisa nzoto na mwasi moko ya makangu; mpe na bongo, bazali kotiola bosantu ya Kombo na Ngai.
8 And they lay [themselves] down upon clothes laid to pledge by every altar, and they drink the wine of the condemned [in] the house of their god.
Pene ya bitumbelo, bazali kolalela bilamba oyo bazwi na ndanga; mpe kati na ndako ya nzambe na bango, bazali komela vino oyo epesami lokola lomande.
9 Yet destroyed I the Amorite before them, whose height [was] like the height of the cedars, and he [was] strong as the oaks; yet I destroyed his fruit from above, and his roots from beneath.
Nzokande, Ngai, nabebisaki bato ya Amori liboso na bango, atako bazali milayi lokola banzete ya sedele mpe makasi lokola banzete ya sheni. Nabebisaki bambuma na yango na likolo, mpe misisa na yango na se.
10 Also I brought you up from the land of Egypt, and led you forty years through the wilderness, to possess the land of the Amorite.
Nabimisaki bino na Ejipito mpe natambolisaki bino mibu tuku minei kati na esobe mpo na kopesa bino mokili ya bato ya Amori.
11 And I raised up of your sons for prophets, and of your young men for Nazarites. [Is it] not even thus, O ye children of Israel? saith the LORD.
Kati na bana na bino ya mibali, nabimisaki basakoli; mpe kati na bilenge mibali na bino, nabimisaki banaziri. Oh bana ya Isalaele, boni, ezali solo te? » elobi Yawe.
12 But ye gave the Nazarites wine to drink; and commanded the prophets, saying, Prophesy not.
« Kasi bino, bolangwisi banaziri masanga mpe bopekisi basakoli ete basakola lisusu te.
13 Behold, I am pressed under you, as a cart is pressed [that is] full of sheaves.
Sik’oyo, nakonyata bino ndenge shar oyo etonda na maboke ya bambuma enyataka biloko.
14 Therefore the flight shall perish from the swift, and the strong shall not strengthen his force, neither shall the mighty deliver himself:
Moto oyo aleki na mbangu akobika te, moto oyo aleki makasi akokoka kobimisa makasi na ye te, mpe soda ya mpiko akokoka kobikisa bomoi na ye te.
15 Neither shall he stand that handleth the bow; and [he that is] swift of foot shall not deliver [himself: ] neither shall he that rideth the horse deliver himself.
Mobeti tolotolo akolonga te, soda ya mpiko akokoka kokima te, mpe soda oyo atambolaka likolo ya mpunda akobikisa bomoi na ye te;
16 And [he that is] courageous among the mighty shall flee away naked in that day, saith the LORD.
ezala basoda oyo baleki makasi, bakokima bolumbu na mokolo wana, » elobi Yawe.

< Amos 2 >