< Obadiah 1 >

1 The vision of Obadiah. Thus saith the Lord Yhwh concerning Edom; We have heard a rumour from Yhwh, and an ambassador is sent among the heathen, Arise ye, and let us rise up against her in battle.
Emoniseli ya mosakoli Abidiasi. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na Edomi: « Toyoki sango moko kowuta na Yawe; mpe ntoma moko atindami na bikolo mpo na koloba: ‹ Botelema. Tokende kobundisa Edomi. ›
2 Behold, I have made thee small among the heathen: thou art greatly despised.
Tala, nakokomisa yo moke kati na bikolo, mpe okosambwa makasi.
3 The pride of thine heart hath deceived thee, thou that dwellest in the clefts of the rock, whose habitation is high; that saith in his heart, Who shall bring me down to the ground?
Lolendo ya motema na yo ekosaki yo, yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba mpe omilobelaka: ‹ Nani akokweyisa ngai na se? ›
4 Though thou exalt thyself as the eagle, and though thou set thy nest among the stars, thence will I bring thee down, saith Yhwh.
Ata soki omati likolo makasi lokola mpongo mpe otongi zala na yo kati na minzoto, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.
5 If thieves came to thee, if robbers by night, ( how art thou cut off!) would they not have stolen till they had enough? if the grapegatherers came to thee, would they not leave some grapes?
« Soki miyibi to babebisi babimeli yo na butu, likama ya ndenge nini ezali kozela yo? Boni, bakozwa kaka biloko oyo bazali na yango posa te? Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino bayei epai na yo, boni, bakotika ata ndambo ya maboke ya vino?
6 How are the things of Esau searched out! how are his hidden things sought up!
Kasi tala ndenge babimeli Ezawu! Babotoli ye biloko na ye ya motuya oyo ebombama!
7 All the men of thy confederacy have brought thee even to the border: the men that were at peace with thee have deceived thee, and prevailed against thee; they that eat thy bread have laid a wound under thee: there is none understanding in him.
Bikolo nyonso oyo osalaki elongo na yango boyokani ekobengana yo na mokili na yo; baninga na yo bakokosa yo, bakokonza yo. Ba-oyo bazalaki kolia lipa na yo bakotiela yo motambo. Kasi yo, okoyeba yango te mpo ete okozala lisusu na mayele te.
8 Shall I not in that day, saith Yhwh, even destroy the wise men out of Edom, and understanding out of the mount of Esau?
Na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakoboma bato ya bwanya ya Edomi mpe nakolongola bato ya mayele na etuka ya bangomba ya Ezawu.
9 And thy mighty men, O Teman, shall be dismayed, to the end that every one of the mount of Esau may be cut off by slaughter.
Temani, basoda na yo ya mpiko bakolenga na somo, mpe bavandi nyonso ya bangomba ya Ezawu bakokufa na mopanga!
10 For thy violence against thy brother Jacob shame shall cover thee, and thou shalt be cut off for ever.
Mpo na mabe oyo osalaki Jakobi, ndeko na yo, okotonda na soni okobebisama mpo na libela.
11 In the day that thou stoodest on the other side, in the day that the strangers carried away captive his forces, and foreigners entered into his gates, and cast lots upon Jerusalem, even thou wast as one of them.
Ozalaki kotala kaka bongo tango bato mosusu bazalaki kokende mpe komema bozwi na ye nyonso. Mpe tango bapaya bakotaki kati na engumba na ye, babetaki zeke mpo na kokabola bomengo ya bitumba ya Yelusalemi. Yo mpe osalaki kaka lokola bango.
12 But thou shouldest not have looked on the day of thy brother in the day that he became a stranger; neither shouldest thou have rejoiced over the children of Judah in the day of their destruction; neither shouldest thou have spoken proudly in the day of distress.
Nzokande, osengelaki te kosepela komona pasi ya ndeko na yo to kosepela komona kobebisama ya bato ya Yuda to mpe kosala lofundu na mokolo ya pasi na bango.
13 Thou shouldest not have entered into the gate of my people in the day of their calamity; yea, thou shouldest not have looked on their affliction in the day of their calamity, nor have laid hands on their substance in the day of their calamity;
Osengelaki te kokota na engumba ya bato na Ngai na mokolo ya pasi na bango to kosepela komona kobebisama na bango to mpe kobotola bozwi na bango nyonso na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.
14 Neither shouldest thou have stood in the crossway, to cut off those of his that did escape; neither shouldest thou have delivered up those of his that did remain in the day of distress.
Osengelaki te kotelema na esika oyo banzela ekutana mpo na koboma bato na bango, oyo bazalaki kokima pasi to mpe kokaba na maboko ya banguna bato na bango, oyo babikaki na mokolo oyo bazalaki na pasi makasi.
15 For the day of Yhwh is near upon all the heathen: as thou hast done, it shall be done unto thee: thy reward shall return upon thine own head.
Mokolo ya Yawe ekomi pene mpo na bikolo nyonso. Bakosala yo kaka makambo oyo yo osalaki, bongo mabe oyo osalaki ekozongela yo.
16 For as ye have drunk upon my holy mountain, so shall all the heathen drink continually, yea, they shall drink, and they shall swallow down, and they shall be as though they had not been.
Ndenge ozalaki komela na likolo ya ngomba na Ngai ya bule, ndenge wana mpe bikolo bakokoma komela tango nyonso; bakomela, bakomela lisusu koleka mpe bakosila lokola nde batikala kozala te.
17 But upon mount Zion shall be deliverance, and there shall be holiness; and the house of Jacob shall possess their possessions.
Kasi bato oyo bakobika bakokimela na ngomba Siona; ngomba yango ekokoma lisusu bule, mpe bato ya Jakobi bakozongela lisusu libula na bango.
18 And the house of Jacob shall be a fire, and the house of Joseph a flame, and the house of Esau for stubble, and they shall kindle in them, and devour them; and there shall not be any remaining of the house of Esau; for Yhwh hath spoken it.
Bato ya Jakobi bakokoma lokola moto, libota ya Jozefi ekokoma lokola lolemo ya moto. Kasi libota ya Ezawu ekokoma lokola matiti, bongo moto ya libota ya Jakobi mpe ya Jozefi ekozikisa yango. Boye, kati na bana ya Ezawu, moto ata moko te akotikala na bomoi, » elobi Yawe.
19 And they of the south shall possess the mount of Esau; and they of the plain the Philistines: and they shall possess the fields of Ephraim, and the fields of Samaria: and Benjamin shall possess Gilead.
Bato oyo bakowuta na Negevi bakovanda na etuka ya bangomba ya Ezawu, mpe ba-oyo bavandaka na etando ya se ya lubwaku bakozwa mokili ya bato ya Filisitia. Bakozwa etuka ya Efrayimi mpe ya Samari, mpe bato ya Benjame bakozwa Galadi.
20 And the captivity of this host of the children of Israel shall possess that of the Canaanites, even unto Zarephath; and the captivity of Jerusalem, which is in Sepharad, shall possess the cities of the south.
Bato ya Isalaele oyo bazalaki na bowumbu bakozwa mokili ya bato ya Kanana kino na Sarepita; bongo bato ya Yelusalemi oyo bazalaki na bowumbu na Sefaradi bakozwa bingumba ya Negevi.
21 And saviours shall come up on mount Zion to judge the mount of Esau; and the kingdom shall be Yhwh's.
Babikisi bakomata na ngomba Siona mpo na koyangela bangomba ya Ezawu, mpe Yawe akokoma Mokonzi.

< Obadiah 1 >