< Job 9 >
1 Then Job answered and said,
Yobo azongisaki:
2 I know it is so of a truth: but how should man be just with God?
« Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba, mpe nayebi yango malamu! Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu akoki kozala sembo liboso ya Nzambe?
3 If he will contend with him, he cannot answer him one of a thousand.
Ata, na mbala nkoto moko, ameki kobeta tembe na Nzambe, akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te.
4 He is wise in heart, and mighty in strength: who has hardened himself against him, and has prospered?
Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, mpe nguya na Ye ezali monene; nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu?
5 Which removes the mountains, and they know not: which overturns them in his anger.
Alongolaka bangomba na bisika na yango, wana yango moko eyebaka te, mpe, kati na kanda na Ye, akweyisaka yango;
6 Which shakes the earth out of her place, and the pillars thereof tremble.
aningisaka mabele wuta na esika na yango mpe alengisaka makonzi na yango;
7 Which commands the sun, and it rises not; and seals up the stars.
apesaka mitindo na moyi, mpe moyi ebimaka te; atiaka kashe na minzoto.
8 Which alone spreads out the heavens, and treads on the waves of the sea.
Atandaki Ye moko Likolo mpe atambolaka likolo ya mbonge ya ebale;
9 Which makes Arcturus, Orion, and Pleiades, and the chambers of the south.
akelaki bangombolo minene, orioni, masanga ya minzoto mpe minzoto ya sude;
10 Which does great things past finding out; yes, and wonders without number.
asalaka makambo minene oyo elekelaka mayele ya bato, bikamwa ya somo oyo bakokaka kotanga te.
11 See, he goes by me, and I see him not: he passes on also, but I perceive him not.
Soki aleki pene na ngai, nakokoka te komona Ye; soki mpe akei, nakokoka te komona Ye.
12 Behold, he takes away, who can hinder him? who will say to him, What do you?
Soki azwi eloko, nani akoki kobotola Ye yango? Nani akoki koloba na Ye: ‹ Ozali kosala nini? ›
13 If God will not withdraw his anger, the proud helpers do stoop under him.
Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te; liboso na Ye, ezala bato ya lolendo balengaka.
14 How much less shall I answer him, and choose out my words to reason with him?
Bongo, ngai, nakokoka ndenge nini kobeta tembe na Ye? Nakolonga ndenge nini kopona maloba ya komekana na Ye?
15 Whom, though I were righteous, yet would I not answer, but I would make supplication to my judge.
Ezala soki nazalaki moto ya sembo, nalingaki na ngai kokoka te kopesa Ye eyano; nalingaki kokoka nde kaka kosenga mawa ya Mosambisi na ngai.
16 If I had called, and he had answered me; yet would I not believe that he had listened to my voice.
Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai, nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai,
17 For he breaks me with a tempest, and multiplies my wounds without cause.
pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi mpe akomisi bapota na ngai ebele na pamba,
18 He will not suffer me to take my breath, but fills me with bitterness.
aboyi kotikela ngai tango ya kopema, wana azali kaka kotondisa ngai na pasi.
19 If I speak of strength, see, he is strong: and if of judgment, who shall set me a time to plead?
Soki ezali likambo oyo esengi makasi, Ye nde Nkolo-Na-Nguya! Mpe soki ezali likambo ya bosembo, nani akoki kosambisa Ye?
20 If I justify myself, my own mouth shall condemn me: if I say, I am perfect, it shall also prove me perverse.
Ezala namemaki na ngai ngambo te, monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai; ezala nazalaki sembo, monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.
21 Though I were perfect, yet would I not know my soul: I would despise my life.
Atako nazali sembo, motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, nayini bomoi na ngai.
22 This is one thing, therefore I said it, He destroys the perfect and the wicked.
Nyonso ezali kaka ndenge moko! Yango wana nalobi: ‹ Abomaka bato ya sembo mpe bato mabe. ›
23 If the whip slay suddenly, he will laugh at the trial of the innocent.
Tango mopepe ya bokono ememaka kufa na mbalakata, Nzambe asekaka komekama ya bato ya sembo.
24 The earth is given into the hand of the wicked: he covers the faces of the judges thereof; if not, where, and who is he?
Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. Soki ezali Ye te, ezali nani?
25 Now my days are swifter than a post: they flee away, they see no good.
Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokende mbangu koleka mopoti mbangu, ezali kokende mbangu penza, kasi etikali komona esengo te.
26 They are passed away as the swift ships: as the eagle that hastens to the prey.
Ezali kokende penza mbangu koleka masuwa oyo esalema na papirisi, koleka mpongo oyo ezali kokitela bilei na yango.
27 If I say, I will forget my complaint, I will leave off my heaviness, and comfort myself:
Soki nalobi: ‹ Nabosana ata pasi na ngai, nabongola elongi na ngai mpe nakoma koseka, ›
28 I am afraid of all my sorrows, I know that you will not hold me innocent.
nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso, pamba te nayebi ete okozwa na Yo ngai te lokola moto ya sembo.
29 If I be wicked, why then labor I in vain?
Lokola esili komonana ete nasali mabe, mpo na nini namitungisa lisusu na pamba?
30 If I wash myself with snow water, and make my hands never so clean;
Ezala namisukoli nzoto na sabuni mpe nasukoli maboko na ngai na sabuni ya malonga,
31 Yet shall you plunge me in the ditch, and my own clothes shall abhor me.
okobwaka ngai kaka na libulu ya potopoto, mpe bilamba na ngai ekoyoka ngai nkele.
32 For he is not a man, as I am, that I should answer him, and we should come together in judgment.
Azali moto lokola ngai te mpo ete nazongisela Ye eyano to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi.
33 Neither is there any judge between us, that might lay his hand on us both.
Soki ezalaki ata na moto moko oyo akokaki komikotisa kati na likambo na biso mpe kotombola loboko na ye kati na ngai mpe Nzambe,
34 Let him take his rod away from me, and let not his fear terrify me:
moto oyo akokaki kolongola fimbu ya Nzambe mosika na ngai mpo ete somo na Ye ebangisa ngai lisusu te,
35 Then would I speak, and not fear him; but it is not so with me.
nalingaki kotombola mongongo na ngai liboso na Ye na kobanga te. Kasi ndenge ezali sik’oyo, nakokoka te.