< Jeremiah 7 >
1 The word that came to Jeremiah from the LORD, saying,
Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi:
2 Stand in the gate of the LORD’s house, and proclaim there this word, and say, Hear the word of the LORD, all you of Judah, that enter in at these gates to worship the LORD.
« Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo: ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe.
3 Thus says the LORD of hosts, the God of Israel, Amend your ways and your doings, and I will cause you to dwell in this place.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bobongola bizaleli mpe misala na bino, mpe Ngai nakotika bino ete bowumela na esika oyo.
4 Trust you not in lying words, saying, The temple of the LORD, The temple of the LORD, The temple of the LORD, are these.
Botia motema te na maloba ya lokuta oyo ezali kolobama: ‘Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe! Yawe azali awa.’
5 For if you thoroughly amend your ways and your doings; if you thoroughly execute judgment between a man and his neighbor;
Soki solo bobongoli bizaleli mpe misala na bino mpe bokomi kokata bino na bino makambo na bosembo;
6 If you oppress not the stranger, the fatherless, and the widow, and shed not innocent blood in this place, neither walk after other gods to your hurt:
soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi,
7 Then will I cause you to dwell in this place, in the land that I gave to your fathers, for ever and ever.
nakotika bino ete bowumela na esika oyo, kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino wuta kala mpe mpo na libela.
8 Behold, you trust in lying words, that cannot profit.
Kasi botala ndenge bozali kotia motema na maloba ya lokuta oyo ezali ata na litomba moko te.
9 Will you steal, murder, and commit adultery, and swear falsely, and burn incense to Baal, and walk after other gods whom you know not;
Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te;
10 And come and stand before me in this house, which is called by my name, and say, We are delivered to do all these abominations?
bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba: ‘Tobiki na biso!’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele?
11 Is this house, which is called by my name, become a den of robbers in your eyes? Behold, even I have seen it, says the LORD.
Boni, bokomisi Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai ekimelo ya miyibi? Ngai nazali komona ete bozali kozwa yango bongo, elobi Yawe.
12 But go you now to my place which was in Shiloh, where I set my name at the first, and see what I did to it for the wickedness of my people Israel.
Eleki malamu bokende nanu na Silo epai wapi natiaki liboso Esika na Ngai ya bule mpe botala makambo oyo nasalaki kuna mpo na mabe ya bana ya Isalaele.
13 And now, because you have done all these works, says the LORD, and I spoke to you, rising up early and speaking, but you heard not; and I called you, but you answered not;
Lokola nazalaki kokebisa bino mbala na mbala tango bozalaki kosala makambo oyo nyonso, elobi Yawe, kasi botikalaki koyokela Ngai te; lokola nabengaki bino, kasi boyanolaki Ngai te,
14 Therefore will I do to this house, which is called by my name, wherein you trust, and to the place which I gave to you and to your fathers, as I have done to Shiloh.
makambo oyo nasalaki na Silo, nakosala yango mpe sik’oyo na Ndako na Ngai, na Tempelo oyo bozali kotiela motema, esika oyo napesaki bino elongo na batata na bino.
15 And I will cast you out of my sight, as I have cast out all your brothers, even the whole seed of Ephraim.
Nakobwaka bino mosika na Ngai ndenge nabwakaki bandeko na bino nyonso ya Efrayimi. ›
16 Therefore pray not you for this people, neither lift up cry nor prayer for them, neither make intercession to me: for I will not hear you.
Bongo yo Jeremi, komeka kobondela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango ata moke te, komeka kutu te kosengela bango eloko: kotungisa Ngai te, pamba te nakotikala koyokela yo te.
17 See you not what they do in the cities of Judah and in the streets of Jerusalem?
Boni, ozali komona te makambo oyo bazali kosala kati na bingumba ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi?
18 The children gather wood, and the fathers kindle the fire, and the women knead their dough, to make cakes to the queen of heaven, and to pour out drink offerings to other gods, that they may provoke me to anger.
Bana bazali kolokota bakoni, batata bazali kopelisa moto, mpe basi bazali kosangisa farine mpo na kosala mapa mpo na Ishitari; bazali kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe mosusu, bongo ezali kopesa Ngai kanda.
19 Do they provoke me to anger? says the LORD: do they not provoke themselves to the confusion of their own faces?
Boni, bakanisi ete bazali kosala Ngai mabe, etuni Yawe? Te! Bazali nde komisala bango moko mabe, mpo na soni na bango moko.
20 Therefore thus says the Lord GOD; Behold, my anger and my fury shall be poured out on this place, on man, and on beast, and on the trees of the field, and on the fruit of the ground; and it shall burn, and shall not be quenched.
‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele: kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te.
21 Thus says the LORD of hosts, the God of Israel; Put your burnt offerings to your sacrifices, and eat flesh.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bokoba kaka na makambo oyo bozali kosala, bobakisa mbeka na bino ya kotumba mpe makabo mosusu, mpe bolia misuni yango bino moko!
22 For I spoke not to your fathers, nor commanded them in the day that I brought them out of the land of Egypt, concerning burnt offerings or sacrifices:
Pamba te, tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito, nalobaki na bango likambo moko te na oyo etali mbeka ya kotumba mpe makabo mosusu.
23 But this thing commanded I them, saying, Obey my voice, and I will be your God, and you shall be my people: and walk you in all the ways that I have commanded you, that it may be well to you.
Nzokande, napesaki bango kaka mobeko oyo: Botosa Ngai, bongo Ngai nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na Ngai; botambola na nzela nyonso oyo nakolakisa bino mpo ete bozala bato ya esengo.
24 But they listened not, nor inclined their ear, but walked in the counsels and in the imagination of their evil heart, and went backward, and not forward.
Kasi batiaki matoyi te mpo na koyoka Ngai; balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Boye, na esika ete babonga, babebaki lisusu koleka.
25 Since the day that your fathers came forth out of the land of Egypt to this day I have even sent to you all my servants the prophets, daily rising up early and sending them:
Wuta tango batata na bino babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo, natindelaka bino basali na Ngai, basakoli, tango nyonso mpe mikolo nyonso.
26 Yet they listened not to me, nor inclined their ear, but hardened their neck: they did worse than their fathers.
Kasi bayokaki Ngai te mpe bapesaki Ngai matoyi na bango te; bazalaki kaka mito makasi mpe basalaki lisusu mabe koleka bakoko na bango. ›
27 Therefore you shall speak all these words to them; but they will not listen to you: you shall also call to them; but they will not answer you.
Ata oyebisi bango makambo oyo nyonso, bakotikala koyoka yo te; ata mpe obengi bango, bakoyanola te.
28 But you shall say to them, This is a nation that obeys not the voice of the LORD their God, nor receives correction: truth is perished, and is cut off from their mouth.
Yango wana, loba na bango: ‹ Tala ekolo oyo eyokaka te maloba ya Yawe, Nzambe na yango, mpe eyokaka pamela te; solo ezali lisusu te na minoko na bango mpe elimwe penza na bibebu na bango.
29 Cut off your hair, O Jerusalem, and cast it away, and take up a lamentation on high places; for the LORD has rejected and forsaken the generation of his wrath.
Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye.
30 For the children of Judah have done evil in my sight, says the LORD: they have set their abominations in the house which is called by my name, to pollute it.
Bato ya Yuda basali mabe na miso na Ngai, elobi Yawe, batie banzambe na bango ya bikeko ya mbindo kati na Ndako na Ngai mpe bakomisi Ndako na Ngai mbindo.
31 And they have built the high places of Tophet, which is in the valley of the son of Hinnom, to burn their sons and their daughters in the fire; which I commanded them not, neither came it into my heart.
Batongi bisambelo ya likolo ya bangomba, ya Tofeti, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo ete batumba bana na bango ya mibali mpe ya basi mpo na kobonza bango lokola mbeka: nzokande wana ezali likambo oyo Ngai natindaki bango te mpe natikalaki ata kokanisa yango te.
32 Therefore, behold, the days come, says the LORD, that it shall no more be called Tophet, nor the valley of the son of Hinnom, but the valley of slaughter: for they shall bury in Tophet, till there be no place.
Yango wana, bosala keba, elobi Yawe: na mikolo ekoya, bato bakobenga lisusu te esika oyo Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, kasi bakobenga yango lubwaku oyo babomelaka bato, pamba te bakokunda bato na Tofeti kino tango esika ekotikala lisusu te.
33 And the carcasses of this people shall be meat for the fowls of the heaven, and for the beasts of the earth; and none shall fray them away.
Bongo bibembe ya bato oyo ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba; mpe moto moko te akobengana yango.
34 Then will I cause to cease from the cities of Judah, and from the streets of Jerusalem, the voice of mirth, and the voice of gladness, the voice of the bridegroom, and the voice of the bride: for the land shall be desolate.
Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba.