< Isaiah 26 >
1 In that day shall this song be sung in the land of Judah; We have a strong city; salvation will God appoint for walls and bulwarks.
Na mokolo wana, bakoyemba nzembo oyo kati na mokili ya Yuda: Tozali na engumba moko ya makasi; Nzambe akomisi lobiko lokola mir mpe ebombamelo na yango.
2 Open you the gates, that the righteous nation which keeps the truth may enter in.
Bofungola bikuke mpo ete ekolo ya sembo, ekolo oyo ebatelaka boyokani, ekoka kokota!
3 You will keep him in perfect peace, whose mind is stayed on you: because he trusts in you.
Ndenge esila kokatama, ye oyo akomitika epai na Yo, okobatela ye na kimia, na kimia penza, mpo ete amipesi mobimba epai na Yo.
4 Trust you in the LORD for ever: for in the LORD JEHOVAH is everlasting strength:
Botia tango nyonso elikya na Yawe, pamba te Yawe azali penza Libanga ya tango nyonso.
5 For he brings down them that dwell on high; the lofty city, he lays it low; he lays it low, even to the ground; he brings it even to the dust.
Akitisaka bavandi ya likolo, akweyisaka engumba oyo batonga makasi, alalisaka yango penza na mabele mpe akomisaka yango putulu.
6 The foot shall tread it down, even the feet of the poor, and the steps of the needy.
Makolo ya bato ekonyata-nyata yango: makolo ya babola, matambe ya bato pamba.
7 The way of the just is uprightness: you, most upright, do weigh the path of the just.
Nzela ya moto ya sembo, ezali alima; Yo oyo ozali Sembo, okomisaka kitoko nzela ya moto ya sembo.
8 Yes, in the way of your judgments, O LORD, have we waited for you; the desire of our soul is to your name, and to the remembrance of you.
Oh Yawe, tango totambolaka na nzela oyo mibeko na Yo etalisaka, totalelaka Yo; Kombo na Yo mpe kotatola yango, yango nde posa ya mitema na biso.
9 With my soul have I desired you in the night; yes, with my spirit within me will I seek you early: for when your judgments are in the earth, the inhabitants of the world will learn righteousness.
Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo; kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo tango opesaka mabele bitumbu.
10 Let favor be showed to the wicked, yet will he not learn righteousness: in the land of uprightness will he deal unjustly, and will not behold the majesty of the LORD.
Soki basaleli moto mabe ngolu, akoyekola bosembo te; ezala kati na mokili ya bosembo, asalaka kaka mabe mpe amonaka na ye monene ya Yawe te.
11 LORD, when your hand is lifted up, they will not see: but they shall see, and be ashamed for their envy at the people; yes, the fire of your enemies shall devour them.
Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, kasi bazali komona yango te. Tika ete bayokisama soni tango bakomona bolingo makasi na Yo, oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo; tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo etumba bango!
12 LORD, you will ordain peace for us: for you also have worked all our works in us.
Yawe, okopesa biso kimia, pamba te okokiselaka biso misala nyonso oyo tosalaka.
13 O LORD our God, other lords beside you have had dominion over us: but by you only will we make mention of your name.
Oh Yawe, Nzambe na biso, atako bakonzi mosusu bakambaki biso, kasi biso, topesaka lokumu kaka na Kombo na Yo.
14 They are dead, they shall not live; they are deceased, they shall not rise: therefore have you visited and destroyed them, and made all their memory to perish.
Bakufi bakozala lisusu na bomoi te, milimo ya bakufi ekozonga lisusu na bomoi te; opesaki bango etumbu mpe obomaki bango nye; osalaki ete ata moto moko te akanisa bango lisusu!
15 You have increased the nation, O LORD, you have increased the nation: you are glorified: you had removed it far to all the ends of the earth.
Oh Yawe, okomisi ekolo na Yo monene! Solo, okomisi ekolo na Yo monene, omipesi penza lokumu; opusi bandelo nyonso ya mokili mosika penza.
16 LORD, in trouble have they visited you, they poured out a prayer when your chastening was on them.
Yawe, kati na pasi na bango, balukaki Yo; tango opesaki bango etumbu, bamikabaki na mabondeli makasi.
17 Like as a woman with child, that draws near the time of her delivery, is in pain, and cries out in her pangs; so have we been in your sight, O LORD.
Oh Yawe, tozalaki liboso na Yo lokola mwasi ya zemi oyo akomi pene ya kobota, bongo azali kobaluka mpe koganga na pasi.
18 We have been with child, we have been in pain, we have as it were brought forth wind; we have not worked any deliverance in the earth; neither have the inhabitants of the world fallen.
Tozalaki na zemi, tozalaki mpe kobaluka na pasi; kasi tango tobotaki, tobotaki kaka mopepe: tomemelaki mabele lobiko te, mpe tomemelaki mokili bato ya sika te.
19 Your dead men shall live, together with my dead body shall they arise. Awake and sing, you that dwell in dust: for your dew is as the dew of herbs, and the earth shall cast out the dead.
Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, bibembe na bango ekosekwa. Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, bolamuka mpe boganga na esengo! Pamba te mamwe na Yo ezali lokola mamwe ya tongo; mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi.
20 Come, my people, enter you into your chambers, and shut your doors about you: hide yourself as it were for a little moment, until the indignation be over.
Bato na ngai, bokende, bokota na bashambre na bino mpe bokanga bikuke sima na bino; bomibomba nanu mwa tango moke kino tango kanda ekoleka.
21 For, behold, the LORD comes out of his place to punish the inhabitants of the earth for their iniquity: the earth also shall disclose her blood, and shall no more cover her slain.
Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye mpo na kopesa bato ya mokili etumbu mpo na masumu na bango; mabele ekobimisa makila oyo basopa likolo na yango, ekobomba lisusu te bato oyo baboma.