< Isaiah 50 >

1 Thus saith the LORD: Where is the bill of your mother's divorcement, wherewith I have put her away? Or which of My creditors is it to whom I have sold you? Behold, for your iniquities were ye sold, and for your transgressions was your mother put away.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye? Botekamaki mpo na masumu na bino; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino.
2 Wherefore, when I came, was there no man? when I called, was there none to answer? Is My hand shortened at all, that it cannot redeem? Or have I no power to deliver? Behold, at My rebuke I dry up the sea, I make the rivers a wilderness; their fish become foul, because there is no water, and die for thirst.
Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki? Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki? Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino? Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino? Na pamela na Ngai, nakawusaka ebale monene, nakomisaka bibale esobe; mbisi na yango ekomaka kolumba solo mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi.
3 I clothe the heavens with blackness, and I make sackcloth their covering.
Nalatisaka likolo elamba ya mwindo mpe nazipaka yango na bilamba ya saki. »
4 The Lord GOD hath given me the tongue of them that are taught, that I should know how to sustain with words him that is weary; He wakeneth morning by morning, He wakeneth mine ear to hear as they that are taught.
Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba moto oyo alembi; alamusaka ngai tongo nyonso, alamusaka litoyi na ngai mpo ete nayoka lokola moyekoli.
5 The Lord GOD hath opened mine ear, and I was not rebellious, neither turned away backward.
Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi, mpe ngai natiaki moto makasi te; namizongisaki sima te.
6 I gave my back to the smiters, and my checks to them that plucked off the hair; I hid not my face from shame and spitting.
Napesaki mokongo na ngai epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, matama na ngai, epai ya bato oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. Nabombaki elongi na ngai te na kotiolama mpe na basoyi.
7 For the Lord GOD will help me; therefore have I not been confounded; therefore have I set my face like a flint, and I know that I shall not be ashamed.
Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai, nakoyokisama soni te. Yango wana, nakomisi elongi na ngai makasi lokola libanga, mpe nayebi ete nakoyokisama soni te.
8 He is near that justifieth me; who will contend with me? let us stand up together; who is mine adversary? let him come near to me.
Ye oyo alongisaka ngai azali pene, nani akokoka kotelemela bosembo na ngai? Tika ete tosamba elongo! Nani akofunda ngai ete tosamba na ye? Tika ete apusana pene na ngai!
9 Behold, the Lord GOD will help me; who is he that shall condemn me? Behold, they all shall wax old as a garment, the moth shall eat them up.
Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai; nani akolonga ngai na esambiselo? Tala, bango nyonso bakokweya lokola bilamba ya kala oyo ebeba, bongo nseka ekolia bango.
10 Who is among you that feareth the LORD, that obeyeth the voice of His servant? though he walketh in darkness, and hath no light, let him trust in the name of the LORD, and stay upon his God.
Ezali na moto kati na bino oyo atosaka Yawe mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye, bongo atambola kati na molili mpe atikala komona pole te? Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe mpe atalela Nzambe na ye.
11 Behold, all ye that kindle a fire, that gird yourselves with firebrands, begone in the flame of your fire, and among the brands that ye have kindled. This shall ye have of My hand; ye shall lie down in sorrow.
Kasi sik’oyo, bino nyonso oyo bopelisi moto mpe bosimbi bakoni oyo ezali kopela moto, bokende, botambola na pole ya moto na bino mpe ya bakoni oyo bopelisi. Tala oyo bokozwa na maboko na ngai: Bokokufa na pasi!

< Isaiah 50 >