< 2 Samuel 22 >

1 And David spoke unto the LORD the words of this song in the day that the LORD delivered him out of the hand of all his enemies, and out of the hand of Saul;
Davidi ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.
2 and he said: The LORD is my rock, and my fortress, and my deliverer;
Alobaki: Yawe azali libanga na ngai, ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai;
3 The God who is my rock, in Him I take refuge; my shield, and my horn of salvation, my high tower, and my refuge; my saviour, Thou savest me from violence.
azali Nzambe na ngai, libanga na ngai mpe ebombamelo na ngai; azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai, ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai. Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe.
4 Praised, I cry, is the LORD, and I am saved from mine enemies.
Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai.
5 For the waves of Death compassed me. The floods of Belial assailed me.
Mbonge ya kufa efinaki ngai, mpela ya libebi epesaki ngai somo,
6 The cords of Sheol surrounded me; the snares of Death confronted me. (Sheol h7585)
basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, mitambo ya kufa ekangaki ngai. (Sheol h7585)
7 In my distress I called upon the LORD, yea, I called unto my God; and out of His temple He heard my voice, and my cry did enter into His ears.
Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye, koganga na ngai mpo na kosenga lisungi ekomaki kino na matoyi na Ye.
8 Then the earth did shake and quake, the foundations of heaven did tremble; they were shaken, because He was wroth.
Mabele ekomaki koningana makasi, miboko ya Lola elengaki mpe ebukanaki, pamba te Yawe asilikaki.
9 Smoke arose up in His nostrils, and fire out of His mouth did devour; coals flamed forth from Him.
Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye, moto makasi elongo na makala ya moto ekomaki kobima na monoko na Ye.
10 He bowed the heavens also, and came down; and thick darkness was under His feet.
Afungolaki Lola mpe akitaki, mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye.
11 And He rode upon a cherub, and did fly; yea, He was seen upon the wings of the wind.
Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki, apepaki na mapapu ya mopepe.
12 And He made darkness pavilions round about Him, gathering of waters, thick clouds of the skies.
Akomisaki molili oyo ezingelaki Ye mpe mapata ya mwindo ya likolo, Ndako na Ye.
13 At the brightness before Him coals of fire flamed forth.
Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye ezalaki kobimisa makala ya moto.
14 The LORD thundered from heaven, and the Most High gave forth His voice.
Yawe agangaki wuta na Lola, mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki.
15 And He sent out arrows, and scattered them; lightning, and discomfited them.
Abwakaki makonga na Ye, mpe atindaki yango na bangambo nyonso; abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango.
16 And the channels of the sea appeared, the foundations of the world were laid bare by the rebuke of the LORD, at the blast of the breath of His nostrils.
Na koganga ya Yawe mpe na pema ya zolo na Ye, nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, mpe miboko ya mokili emonanaki na libanda.
17 He sent from on high, He took me; He drew me out of many waters;
Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi.
18 He delivered me from mine enemy most strong, from them that hated me, for they were too mighty for me.
Akangolaki ngai wuta na maboko ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai, pamba te balekaki ngai na makasi.
19 They confronted me in the day of my calamity; but the LORD was a stay unto me.
Babundisaki ngai na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai.
20 He brought me forth also into a large place; He delivered me, because He delighted in me.
Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai.
21 The LORD rewarded me according to my righteousness; according to the cleanness of my hands hath He recompensed me.
Yawe asalelaki ngai makambo wana kolanda bosembo na ngai, afutaki ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai.
22 For I have kept the ways of the LORD, and have not wickedly departed from my God.
Pamba te nabateli banzela ya Yawe, napesi Nzambe na ngai mokongo te lokola bato mabe.
23 For all His ordinances were before me; and as for His statutes, I did not depart from them.
Natosaka mibeko na Ye nyonso mpe nabatelaka bikateli na Ye.
24 And I was single-hearted toward Him, and I kept myself from mine iniquity.
Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te.
25 Therefore hath the LORD recompensed me according to my righteousness, according to my cleanness in His eyes.
Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bopeto na ngai na miso na Ye.
26 With the merciful Thou dost show Thyself merciful, with the upright man Thou dost show Thyself upright,
Solo, otalisaka bosembo na Yo epai ya moto oyo atambolaka na bosembo, mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela.
27 With the pure Thou dost show myself pure; and with the crooked Thou dost show Thyself subtle.
Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto, kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka.
28 And the afflicted people Thou dost save; but Thine eyes are upon the haughty, that Thou mayest humble them.
Obikisaka banyokolami, otalaka mpe okitisaka bato na lofundu.
29 For Thou art my lamp, O LORD; and the LORD doth lighten my darkness.
Oh Yawe, ozali mwinda na ngai; obongolaka molili na ngai pole.
30 For by Thee I run upon a troop; by my God do I scale a wall.
Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli; mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir.
31 As for God, His way is perfect; the word of the LORD is tried; He is a shield unto all them that take refuge in Him.
Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, Liloba na Yawe ezali na mbeba te; azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
32 For who is God, save the LORD? and who is a Rock, save our God?
Nani azali Nzambe soki Yawe te? Nani azali libanga soki Nzambe na biso te?
33 The God who is my strong fortress, and who letteth my way go forth straight;
Ezali Nzambe nde azali ndako na ngai ya makasi, abatelaka nzela na ngai mpe akomisaka yango polele liboso na ngai;
34 Who maketh my feet like hinds', and setteth me upon my high places;
akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo;
35 Who traineth my hands for war, so that mine arms do bend a bow of brass.
alakisaka ngai kobunda, mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze.
36 Thou hast also given me Thy shield of salvation; and Thy condescension hath made me great.
Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai, mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi.
37 Thou hast enlarged my steps under me, and my feet have not slipped.
Otambolisaka ngai na kimia, mpe makolo na ngai elengaka te.
38 I have pursued mine enemies, and destroyed them; neither did I turn back till they were consumed.
Nalandaka banguna na ngai mpe nabomaka bango, nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango.
39 And I have consumed them, and smitten them through, that they cannot arise; yea, they are fallen under my feet.
Nabebisaka bango nye, mpe bakokaka lisusu kotelema te; bakweyaka na se ya matambe na ngai.
40 For Thou hast girded me with strength unto the battle; Thou hast subdued under me those that rose up against me.
Opesaka ngai makasi ya bitumba, ogumbaka banguna na ngai mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai.
41 Thou hast also made mine enemies turn their backs unto me; yea, them that hate me, that I might cut them off.
Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, mpe nabebisaka bayini na ngai.
42 They looked, but there was none to save; even unto the LORD, but He answered them not.
Bagangaka mpo na koluka lisungi, kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te; babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te.
43 Then did I beat them small as the dust of the earth, I did stamp them as the mire of the streets, and did tread them down.
Nanikaka bango lokola putulu ya mabele, nafinaka bango, nanyataka bango lokola potopoto ya nzela.
44 Thou also hast delivered me from the contentions of my people; Thou hast kept me to be the head of the nations; a people whom I have not known serve me.
Olongisaka ngai na bitumba ya bato, obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai.
45 The sons of the stranger dwindle away before me; as soon as they hear of me, they obey me.
Bapaya bazali koya mpo ete nasepela na bango; soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai.
46 The sons of the stranger fade away, and come halting out of their close places.
Bango nyonso balembi nzoto mpe bakomi kobima na kolenga wuta na bandako na bango ya makasi.
47 The LORD liveth, and blessed be my Rock; and exalted be the God, my Rock of salvation;
Longonya na Yawe! Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama! Tika ete Nzambe, libanga ya lobiko na ngai, anetolama!
48 Even the God that executeth vengeance for me, and bringeth down peoples under me,
Azali Nzambe oyo abundelaka ngai, oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai,
49 And that bringeth me forth from mine enemies; yea, Thou liftest me up above them that rise up against me; Thou deliverest me from the violent man.
akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai.
50 Therefore I will give thanks unto Thee, O LORD, among the nations, and will sing praises unto Thy name.
Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo, nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.
51 A tower of salvation is He to His king; and showeth mercy to His anointed, to David and to his seed, for evermore.
Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, epai ya Davidi mpe libota na ye mpo na libela.

< 2 Samuel 22 >