< Luke 22 >

1 And the feast of the unleavened bread, called the passover, was nigh.
Wana feti ya Mapa ezanga levire, feti oyo babengaka Pasika, ekomaki pene,
2 And the chief priests and scribes were seeking how they might kill Him; for they feared the people.
bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato.
3 And Satan entered into Judas called Iscariot, being of the number of the twelve.
Bongo Satana akotaki kati na Yuda oyo bazalaki kobenga « Isikarioti » mpe azalaki moko kati na bantoma zomi na mibale.
4 And having gone away, he spoke with the chief priests and the magistrates, how he might betray Him to them.
Boye, Yuda akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpo na kobongisa elongo na bango ndenge nini akoteka Yesu epai na bango.
5 And they rejoiced, and promised to give him money.
Basepelaki mingi mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo.
6 And he promised them, and was seeking an opportunity to deliver Him unto them in the absence of the multitude.
Yuda andimaki mpe akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete ebele ya bato bayeba te.
7 And the day of the unleavened bread came, in which it behooved to slay the passover.
Awa ekomaki mokolo ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo basengeli koboma mpate lokola mbeka ya Pasika,
8 And He sent Peter and John, saying, Going prepare for us the passover, in order that we may eat it.
Yesu atindaki Petelo mpe Yoane; alobaki na bango: — Bokende kobongisela biso bilei ya Pasika.
9 And they said to Him, Where do you wish that we may prepare it?
Batunaki Ye: — Esika nini olingi ete tobongisa yango?
10 And He said to them, Behold, you having come into the city, a man will meet you carrying a pitcher of water; follow him into the house where he is going.
Yesu azongiselaki bango: — Tango bokokota na engumba, bokokutana na mobali moko amemi eloku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako epai wapi akokota.
11 And say to the landlord, The Teacher says to thee, Where is the guest-chamber, where I may eat the passover with my disciples?
Mpe boloba na nkolo ndako: « Moteyi atuni: ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai? › »
12 And he will show you a large upper room furnished: there prepare.
Akolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika.
13 And having gone away, they found as He told them; and prepared the passover.
Bakendeki, bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika.
14 And when the hour arrived, He sat down and the apostles along with Him.
Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma.
15 And He said to them, I desired with desire to eat this passover with you before I suffer: for I say to you,
Alobaki na bango: — Nayokaki posa makasi ya kolia Pasika oyo elongo na bino liboso ete namona pasi,
16 I eat this no more, until it may be fulfilled in the kingdom of God.
pamba te, nazali koloba na bino: nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe.
17 And receiving the cup, having given thanks, He said, Take this, and divide it among yourselves;
Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki: — Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino,
18 for I say to you, I shall from now drink no more from the fruit of the vine, until the kingdom of God may come.
pamba te nazali koloba na bino: nakomela lisusu te vino kowuta na bambuma ya vino, kino Bokonzi ya Nzambe eya.
19 And taking bread, blessing it, He broke it, and gave it to them, saying, This is my body given for you: do this in remembrance of me.
Bongo, azwaki lipa mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki bango yango; alobaki: — Oyo ezali nzoto na Ngai, epesami mpo na bino! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai.
20 Likewise also the cup after supper, saying, This cup is the new covenant in my blood, which is poured out in your behalf.
Sima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo; alobaki: — Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai, makila oyo esopani mpo na bino.
21 Moreover behold, the hand of the one betraying me is with me at the table.
Nzokande, moto oyo azali koteka Ngai azali awa, azali kolia mesa moko elongo na Ngai.
22 Indeed the Son of man goes, according to that which has been appointed: but woe to that man by whom He is betrayed!
Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye.
23 And they began to inquire among themselves, who then of them is the one of them about to do this.
Bongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango.
24 And there was a contention among them, which one of them seems to be the greater,
Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
25 And He said to them, The kings of the Gentiles domineer over them; and those exercising authority over them are called Benefactors.
Yesu alobaki na bango: — Bakonzi ya bikolo bakonzaka yango, mpe bayangeli na yango balingaka ete babenga bango bato malamu.
26 But you are not thus: but let the greater among you be as the younger; and the leader as the waiter.
Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.
27 For which is the greater, he that sitteth at the table, or the waiter? is not the one sitting? but I am in the midst of you as the waiter.
Pamba te nani aleki monene? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa? Ezali te oyo avandi na mesa? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.
28 But you are those who have remained with me in my temptations.
Bino nde bato oyo botikali ya kokangama na Ngai kati na pasi na Ngai.
29 And I appoint unto you a kingdom, as my Father appointed unto me,
Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi,
30 in order that you may eat and drink at my table in my kingdom; and you shall sit upon thrones judging the twelve tribes of Israel.
mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.
31 Simon, Simon, behold, Satan sought you out, to sift you as wheat:
Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble.
32 but I prayed for you, that your faith may not fail you: and thou, when having turned, strengthen thy brethren:
Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.
33 but he said to Him, Lord, I am ready to go with thee to prison and to death.
Kasi Petelo azongisaki: — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo.
34 And He said; I say unto thee, Peter, the cock shall not crow this day, before that thou shalt thrice deny that thou knowest me.
Yesu alobaki na ye: — Petelo, nazali koloba na yo: lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.
35 Then He said to them, When I sent you without purse, and valise, and sandals, did you lack anything? And they said; Nothing.
Bongo Yesu atunaki bango: — Tango natindaki bino maboko pamba, mbongo te, sakosi te, basandale te; boni, bozangaki eloko? Bazongisaki: — Tozangaki eloko te.
36 And He said to them; But now, let the one having a purse, take it, likewise also valise: and let the one having no sword, sell his cloak and buy one.
Alobaki na bango: — Kasi, sik’oyo, tika ete moto oyo azali na mbongo azwa yango, oyo azali na sakosi azwa yango, oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango!
37 For I say unto you, that it behooves that which has been written to be perfected in me, this, And He was numbered with the transgressors: for indeed that which is concerning me has an end.
Ekomama: « Batangaki Ye elongo na babomi bato; » mpe nazali koloba na bino: makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.
38 And they said, Lord, behold, here are two swords. And He said to them, It is sufficient.
Bayekoli balobaki: — Nkolo, tala mipanga mibale. Yesu azongisaki: — Ekoki!
39 And having gone out, He departed, according to custom, into the Mount of Olives; and His disciples followed Him.
Yesu abimaki mpe akendeki lokola momesano na ngomba ya banzete ya olive, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye.
40 He being at the place, He said to them, Pray that you enter not into temptation.
Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango: — Bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
41 And He was separated from them about a stone's cast; and putting down His knees, continued to pray,
Akendeki mwa mosika na bango, afukamaki mpe asambelaki boye:
42 saying, Father, if this cup is willing to pass from me; moreover let not my will, but thine be done.
« Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. » [
43 And an angel from heaven appeared unto Him, strengthening Him.
Anjelu moko awutaki na Likolo, abimelaki Ye mpe alendisaki Ye.
44 And being in agony He continued to pray the more earnestly. And His sweat was like drops of blood falling down upon the ground.
Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]
45 And having risen from prayer, having come to His disciples, He found them sleeping on account of weariness,
Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa.
46 and He said to them, Why do you sleep? Arising pray, that you may not enter into temptation.
Atunaki bango: — Mpo na nini bozali kolala? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.
47 And He still speaking, behold, a multitude and the one called Judas, one of the twelve, was coming before them; and he drew near to Jesus to kiss Him.
Wana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye,
48 And Jesus said to him, Judas, do you betray the Son of man with a kiss?
kasi Yesu atunaki ye: — Yuda, ozali penza koteka Mwana na Moto na nzela ya beze?
49 And those around Him seeing what was coming on Him, said, Lord, shall we smite with the sword?
Tango bato oyo bazalaki elongo na Yesu bamonaki makambo oyo ezali kosalema, batunaki Ye: — Nkolo, tobeta bango na nzela ya mipanga na biso?
50 And one of them smote the servant of the high priest, and cut off his right ear.
Mpe moko kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mopanga mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali.
51 And Jesus responding said, Hold on until this: and touching his ear, healed him.
Kasi Yesu alobaki: — Boye lisusu te! Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.
52 Jesus said to the high priests, and magistrates of the temple, and elders who were assembled to Him; You have come out as against a robber, with swords and clubs.
Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye: — Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete?
53 I being daily with you in the temple, you reached not out your hands unto me. But this is your hour, and the power of darkness.
Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.
54 And taking Him, they led Him away, and led Him into the house of the chief priest. And Peter followed Him a long way off.
Bakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika.
55 And having lighted a fire in the midst of the court, and they sitting together, Peter was sitting in the midst of them.
Mpe tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bavandaki lisanga, Petelo mpe avandaki elongo na bango.
56 And a certain maidservant, seeing him sitting at the fire, and fixing her eyes on him, said, This man was with Him.
Mwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki: — Tata oyo azalaki elongo na Yesu!
57 And he denied Him, saying, Woman, I know Him not.
Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki: — Mwasi, nayebi ye te.
58 And after a brief interval another seeing him, said, Truly, thou art one of them. And Peter said, Man, I am not.
Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki: — Yo mpe ozali moko kati na bango! Petelo azongisaki: — Tata, nazali moko te kati na bango.
59 And about one hour having elapsed, a certain other man accosted him, saying, He was truly with Him: for he is a Galilean.
Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende: — Ezali ya solo! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile.
60 And Peter said, Man, I know Him not. And immediately, he yet speaking, the cock crew.
Kasi Petelo azongisaki: — Nayebi te makambo oyo ozali kolobela! Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki.
61 And the Lord turning, looked upon Peter; and Peter remembered the word of the Lord, how He said to him, that, Before the cock shall crow thou shalt deny me thrice.
Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye: « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »
62 And having gone out, he wept bitterly.
Abimaki mpe alelaki makasi na libanda.
63 And the men having Him, began to mock, beating Him,
Bato oyo bazalaki kokengela Yesu babandaki koseka mpe kobeta Ye.
64 and covering Him, they continued to ask saying, Prophesy, who is the one smiting thee.
Bazipaki Ye elongi mpe basengaki na makasi: — Sakola: Nani abeti Yo?
65 And blaspheming, they continued to speak many other things against Him.
Mpe balobaki na Ye maloba mabe ebele mpo na kofinga Ye.
66 And when it was day, the eldership of the people was convened, and the chief priests and scribes, and they led Him into their sanhedrim.
Tango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango.
67 Saying, If thou art the Christ, tell us. And He said to them, If I may tell you, you will not believe:
Balobaki: — Soki ozali Klisto, yebisa biso. Yesu azongisaki: — Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te;
68 and if indeed I will ask you, you will not respond to me, or release me.
mpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te.
69 And from now the Son of man shall be sitting on the right hand of the power of God.
Kasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
70 And all said, Art thou the Son of God? And He said to them, You say that I am.
Bango nyonso batunaki: — Ozali Mwana na Nzambe? Yesu azongisaki: — Bino nde bolobi ete nazali Mwana na Nzambe.
71 And they said, Why have we yet need of testimony? for we heard from His own mouth.
Bongo balobaki: — Mpo na nini koluka matatoli mosusu? Toyoki yango na monoko na ye moko.

< Luke 22 >