< Revelation 16 >

1 Then I heard a loud voice coming from the Temple telling the seven angels, “Go and pour out the seven bowls of God's judgment on the earth.”
Bongo nayokaki mongongo moko monene kobima wuta na Tempelo mpe koloba na ba-anjelu sambo: « Bokende kosopa na mokili bakopo sambo ya kanda ya Nzambe. »
2 So the first angel went and poured out his bowl on the earth, and terrible, painful sores broke out on those who had the mark of the beast and who worshiped his image.
Anjelu ya liboso akendeki mpe asopaki kopo na ye na mokili, mpe bapota ya somo mpe ya pasi ebimaki na banzoto ya bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango.
3 The second poured out his bowl on the sea, and it became like the blood of a corpse and everything living in the sea died.
Anjelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebale yango ekomaki lokola makila ya mowei; mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaki kati na ebale monene ekufaki.
4 The third poured out his bowl on the rivers and springs of water, and the water turned into blood.
Anjelu ya misato asopaki kopo na ye na bibale mpe na bitima ya mayi, mpe mayi ekomaki makila.
5 I heard the angel who had power over the waters declare, “You are truly right, you who are and was, the Holy One, as this judgment demonstrates.
Bongo nayokaki anjelu oyo azalaki na bokonzi likolo ya mayi koloba: « Oh Mosantu, Yo oyo ozali mpe ozalaki, ozali penza sembo, mpo ete okati bongo na bosembo na Yo!
6 These people shed the blood of believers. Now you've given them blood to drink, as they deserve!”
Mpo ete basopaki makila ya basantu mpe ya basakoli na Yo, mpe opesi bango makila mpo ete bamela ndenge ekoki mpo na bango. »
7 I heard a voice from the altar saying, “Yes, Lord God, the All-powerful One, your judgments are right and true!”
Bongo nayokaki etumbelo koloba: « Iyo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, okataka makambo na ndenge ya solo mpe ya sembo! »
8 The fourth angel poured out his bowl on the sun, and it was given the power to scorch people with fire.
Anjelu ya minei asopaki kopo na ye na likolo ya moyi, mpe moyi ezwaki ndingisa ya kozikisa bato na nzela ya moto na yango.
9 They were scorched by intense heat, and they cursed the name of God who controlled these plagues. They did not repent and give him glory.
Moto makasi etumbaki bato, mpe bakomaki kofinga Kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya pasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa Ye nkembo.
10 The fifth angel poured out his bowl on the beast's throne, and darkness fell over his kingdom. The people bit their tongues because of the pain they felt,
Anjelu ya mitano asopaki kopo na ye na likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama, mpe molili ezipaki bokonzi ya nyama yango. Bato bakomaki komiswa lolemo mpo na pasi,
11 and they cursed the God of heaven because of their pain and their sores, but they did not repent and stop what they were doing.
bafingaki Nzambe ya Lola mpo na pasi mpe bapota na bango ya minene. Kasi baboyaki kaka kotika misala na bango ya mabe.
12 The sixth angel poured out his bowl on the mighty River Euphrates, and its water was dried up, so that a way could be prepared for the kings that come from the east.
Anjelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale Efrate, mpe mayi na yango ekawukaki mpo ete nzela ya bakonzi oyo bakowuta na Este esalema.
13 Then I saw three evil spirits that looked like frogs coming out of the mouths of the dragon, the beast, and the false prophet.
Bongo namonaki milimo misato ya mbindo lokola magorodo kobima longwa na monoko ya dalagona, na monoko ya nyama mpe na monoko ya mosakoli ya lokuta.
14 These are demonic spirits that perform miracles, going out to gather together all the kings of the whole world for the battle on God the All-powerful One's great day of judgment.
Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
15 (Pay attention! I will come like a thief. Blessed are those who keep watch, and have their clothes ready so that they don't have to go out naked and be embarrassed.)
Tala, nazali koya lokola moyibi! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.
16 The evil spirits gathered the kings for battle at a place called Armageddon in Hebrew.
Milimo wana ya kindoki esangisaki bakonzi na esika oyo babengaka, na lokota ya Ebre, Armagedona.
17 The seventh angel poured out his bowl on the air, and a loud voice came from the Temple, from the throne, shouting out, “It's over!”
Anjelu ya sambo asopaki kopo na ye kati na mopepe, mpe mongongo moko ya monene kowuta na Kiti ya Bokonzi ebimaki longwa na Tempelo mpe elobaki: « Ekokisami! »
18 Lightning flashed and thunder boomed, and a massive earthquake shook the earth. It was the worst earthquake that had ever happened since people lived there.
Bongo mikalikali engengaki, mingongo eyokanaki, bakake ebetaki, mpe mabele eninganaki makasi; likambo ya somo boye etikala nanu kosalema te wuta moto azali na mokili.
19 The great city was split into three. The cities of the nations were destroyed. Babylon the great was remembered in God's presence so that she should be given the cup filled with the wine of his hostility.
Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi.
20 All the islands vanished, and all the mountains disappeared.
Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te.
21 Huge hailstones, each one weighing one hundred pounds, rained down from the sky on people. The people cursed God because the plague of hail was so terrible.
Bamvula minene ya mabanga enokaki; libanga moko na moko ezalaki na bakilo pene tuku minei na mitano, mpe ekweyelaki bato longwa na likolo. Mpe bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mvula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki ya somo makasi.

< Revelation 16 >