< Psalms 69 >

1 For the music director. To the tune “Lilies.” A psalm of David. God, please save me, because the water is up to my neck!
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi: ezali ya koyemba lokola « lisi. » Nzambe, bikisa ngai, pamba te mayi ekomi na kingo na ngai.
2 I'm sinking deeper into the mud—there's no solid ground for me to stand. I find myself in deep water; floods wash over me.
Nazali kozinda na potopoto, na mozindo makasi epai wapi eloko ya kosimba ezali te; nakiti na mozindo ya mayi, mbonge ememi ngai.
3 I'm so tired of screaming out for help my throat is totally raw. My eyes are worn out looking for my God to help me.
Nalembi nzoto likolo ya kobelela lisungi; mongongo na ngai ekawuki, miso na ngai elembi mpo na kotalela Nzambe na ngai.
4 Those who hate me for no reason are more than the number of hairs on my head. Many enemies try to destroy me by telling lies. How can I give back what I didn't steal?
Bato oyo bayinaka ngai na kozanga tina bazali ebele koleka motango ya suki ya moto na ngai; ba-oyo balukaka kobebisa bomoi na ngai, oyo bazali banguna na ngai kaka pamba, bazali bato na nguya; bazali kosenga ngai na makasi ete nazongisa eloko oyo nayibaki te.
5 God, you know how foolish I am! My sins are not hidden from you.
Nzambe, oyebi bozoba na ngai, mpe mabe na ngai ezali ya kobombama te na miso na Yo.
6 Don't let those who trust you be ashamed because of me, Lord God Almighty. Don't let those who follow you be disgraced because of me, God of Israel.
Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, tika ete ba-oyo batiaka elikya kati na Yo basila lokumu te likolo na ngai! Nzambe ya Isalaele, tika ete bato oyo balukaka Yo bayokisama soni te likolo na ngai!
7 For your sake I put up with the insults; my face shows my embarrassment.
Pamba te nandimi kofingama mpo na Yo, mpe soni ezipi ngai elongi.
8 I have become a foreigner to my brother Israelites; a stranger to my very own brothers.
Bandeko na ngai bakomi kozwa ngai lokola moto oyo bayebi te, nakomi lokola mopaya na miso ya bana ya mama na ngai.
9 My devotion for your house is burning me up inside; the insults of those who insulted you have fallen on me.
Pamba te bolingo oyo nazali na yango mpo na ndako na Yo ezali kozikisa ngai, mpe mafinga ya bato oyo bafingaka Yo ezali kokweya na moto na ngai.
10 I wept and I fasted, but they mocked me;
Soki naleli mpe nakili bilei, nasengeli kaka kofingama;
11 I mourned in sackcloth, but they laughed at me.
soki nalati saki, bato basalaka masapo mpo na kotiola ngai.
12 People sitting by the town gate gossip about me. I'm the subject of rude songs sung by drunks.
Bato oyo bavandi na ekuke batiolaka ngai, balangwi masanga bayembaka kombo na ngai kati na banzembo na bango.
13 But my prayer is to you, Lord, believing this is a good time to respond to me. God, in your wonderful trustworthy love, answer me with your sure salvation.
Yawe, nabondeli Yo! Nzambe, tango ekoki, tango ya kotalisa ngai bolingo monene na Yo! Yanola ngai na nzela ya boyengebene mpe lobiko na Yo!
14 Please rescue me from the mud—don't let me sink! Save me from those who hate me and from drowning in the deep waters!
Bimisa ngai na potopoto, sala ete nazinda lisusu te, nakangolama wuta na maboko ya bayini na ngai mpe nabima na mayi ya mozindo!
15 Don't let the flood waters wash over me. Don't let the deep waters pull me down. Don't let the grave close over me.
Tika ete mbonge ya mayi emema ngai lisusu te, mozindo emela lisusu ngai te, mpe libulu ekangamela ngai te!
16 Please answer my prayers, Lord, for you are good and love me with your trustworthy love; because of your kindness, please help me.
Yawe, yanola ngai, pamba te bolingo na Yo ezali malamu; baluka epai na ngai, na mawa monene na Yo.
17 Don't turn away from me, your servant. Please answer me quickly because I'm in trouble.
Kobombela lisusu mosali na Yo te elongi na Yo. Yanola ngai noki, pamba te nazali na pasi.
18 Come here and rescue me; set me free from my enemies.
Pusana pene na ngai, mpe sikola ngai; kangola ngai wuta na maboko ya bayini na ngai.
19 You—you know my shame, my disgrace, my humiliation. You see everything my enemies are doing.
Oyebi ndenge nini nazali kofingama, oyebi soni mpe kosambwa na ngai; banguna na ngai nyonso bazali liboso na Yo.
20 Insults have broken my heart—I am so sick there is no cure. I looked for some sympathy, but there was no one! Nobody showed me any compassion.
Mafinga ezokisi motema na ngai, mpe pota yango ezali kosila te; nazelaki elembo ya mawa kowuta na bato, kasi namonaki yango te; nalukaki babondisi, kasi namonaki bango te.
21 Instead they gave me bitter herbs to eat and vinegar to drink.
Batiaki ngenge kati na bilei na ngai, mpe bamelisaki ngai vino ya ngayi tango nayokaki posa ya mayi.
22 May the table set before them become a trap for them, a net that catches them, bringing punishment.
Tika ete mesa na bango ekoma motambo liboso na bango, mpe kimia na bango ekoma monyama.
23 May their eyes become blind so they cannot see, and may their backs always be bent low in dejection.
Tika ete miso na bango ekufa mpo ete bamona lisusu te, mpe babela mikongo mpo na libela.
24 Pour out your judgment on them; chase them down in your fierce anger.
Sopela bango kanda makasi na Yo, mpe tika ete kanda na Yo ya makasi ekanga bango.
25 Let the places where they live be deserted. Let their homes be abandoned.
Tika ete molako na bango etikala polele, mpe ete moto moko te avanda na bandako na bango ya kapo.
26 For they persecute those you have punished, and make it even more painful for those you have disciplined.
Pamba te bazali konyokola bato oyo ozokisaki, mpe bazali kopanza sango ya pasi ya bato oyo oyokisaki pasi.
27 Punish them for the evil they have done. Don't acquit them.
Bakisa mabe na likolo ya mabe na bango, mpe kokota likambo na bango te na bosembo na Yo.
28 Blot out their names from the Book of Life. Don't let them be listed with those who do right.
Tika ete bakombo na bango elongwa na buku ya bomoi, mpe batangama te na molongo ya bato ya sembo.
29 But I am suffering and in physical pain. God, please save me and keep me safe.
Solo, nazali mobola mpe moto ya pasi; kasi lobiko na Yo, oh Nzambe, ebatelaka ngai.
30 I will praise God's character in song; I will say how incredible he is and how thankful I am.
Nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo ya Nzambe, mpe nakopesa Ye nkembo elongo na matondi.
31 The Lord is happier with this than with offering animals as sacrifices: cattle, or bulls with horns and hooves.
Yango nde ekosepelisa Yawe, koleka ngombe oyo ezali na maseke mpe na makolo ekabwana.
32 The humble will see this and be happy. May God encourage everyone who comes to him.
Babola bamoni mpe bazali kosepela. Tika ete mitema na bino oyo bolukaka Nzambe ezala na bomoi!
33 God hears the poor, and he does not ignore his people who are in prison.
Pamba te Yawe ayokaka bato oyo bakelela, mpe atiolaka bato na Ye te ata bazali bakangami kati na boloko.
34 Praise him heaven and earth, the seas and everything that lives in them!
Tika ete likolo mpe mabele, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ekumisa Ye!
35 For God will save Zion, and rebuild the cities of Judah. They will live there and own the land.
Pamba te Nzambe akobikisa Siona mpe akotonga lisusu bingumba ya Yuda. Bato bakovanda kuna mpe bakozwa yango lokola libula na bango.
36 The descendants of those who follow him will inherit the land, and those who love him will live there.
Bakitani ya basali na Ye bakozwa yango lokola libula, mpe bato oyo balingaka Kombo na Ye bakovanda kati na yango.

< Psalms 69 >