< Psalms 134 >
1 A song for pilgrims going up to Jerusalem. Praise the Lord, all you servants of the Lord who worship at night in the house of the Lord.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Ndako ya Nkolo. Bopambola Yawe, bino nyonso, basali ya Nkolo, oyo botelemaka na butu kati na Ndako ya Nkolo.
2 Lift up your hands towards the holy place and praise the Lord.
Botombola maboko na bino na ngambo ya Esika ya bule mpe bopambola Yawe!
3 May the Lord bless you from Zion, he who made the heavens and the earth.
Tika ete Yawe apambola bino, wuta na Siona, Ye oyo asala likolo mpe mabele!