< Job 18 >

1 Then Bildad the Shuhite spoke up and said,
Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki:
2 “How long will you go on talking, hunting for the right words to say? Talk sense if you want us to reply!
« Kino tango nini okoloba maloba ya boye? Kanisa nanu malamu, bongo tokosolola.
3 Do you think we're dumb animals? Do we look stupid to you?
Mpo na nini komona biso lokola banyama? Boni, tozali nde bazoba na miso na yo?
4 You tear yourself apart with your anger. Do you think the earth has to be abandoned, or the mountains moved, just because of you?
Awa, likolo ya kanda na yo, ozali komipasola na biteni, basundola mokili to balongola mabanga na bisika na yango likolo na yo?
5 It's certain that the life of the wicked will end like a lamp that is snuffed out—their flame will shine no more.
Solo, mwinda ya moto mabe ekufaka, moto na yango etikaka kopela.
6 The light in their home goes out, the lamp hanging above is extinguished.
Pole ekomaka molili kati na ndako na ye, mpe mwinda oyo epelaka pembeni na ye ekufaka.
7 Instead of taking strong strides they stumble, and their own plans cause them to fall.
Makasi ya matambe na ye esilaka, makanisi na ye moko ekweyisaka ye.
8 Their own feet trip them up and they are caught in a net; as they walk along they fall into a pit.
Makolo na ye ekangisaka ye na monyama, bongo abundaka-bundaka kati na madusu na yango.
9 A trap grabs them by the heel; a snare tightens around them.
Motambo ekangaka matambe na ye, mpe singa na yango ekangaka ye makasi.
10 A noose is hidden on the ground for them; a rope is stretched across the path to trip them.
Singa ya motambo ebombama na se ya mabele mpo na ye, mpe batia motambo na nzela na ye.
11 Terrors scare the wicked, coming at them from every side, chasing them, biting at their heels.
Somo elandaka ye bisika nyonso oyo atambolaka.
12 Hunger robs them of strength; disaster waits for them when they fall.
Nzala esilisaka makasi na ye, mpe pasi ya ndenge na ndenge ezalaka pembeni na ye soki akweyi.
13 Disease devours their skin; deadly disease consumes their limbs.
Pasi eliaka poso ya nzoto na ye mpe bokono oyo ebomaka ebebisaka biteni ya nzoto na ye.
14 They are torn from the homes they trusted in and taken to the king of terrors.
Balongolaka kati na ndako na ye biloko nyonso ya motuya, oyo atielaka motema, mpe akendaka kokutana na bakonzi ya kufa.
15 People they don't know will live in their homes; sulfur will be scattered where they used to live.
Ndako na ye etikalaka na eloko moko te, mpe fofolo ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango.
16 They wither away, roots below and branches above;
Misisa na ye ekawukaka na se ya mabele, mpe, na likolo, bitape na ye elembaka.
17 the memory of them fades from the earth; nobody remembers their names any more.
Bakanisaka ye lisusu te na mokili, kombo na ye etangamaka lisusu te na mabele.
18 They are thrown out of light into darkness, driven from the world.
Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili, mpe balongolaka ye na mokili.
19 They have no children or descendants among their people, and no survivors where they used to live.
Azalaka na bana to bakitani te kati na bato na ye, azalaka ata na moto moko te oyo atikala na bomoi, na esika oyo avandaka.
20 People of the west are appalled at what happens to them. People of the east are shocked.
Bato ya weste bazalaka na somo ya kotala bomoi na ye, mpe bato ya este batondaka na kobanga.
21 This is what happens to the homes of the wicked, to the places of those who reject God.”
Tala, solo, ndenge suka ya moto mabe ezalaka, mpe bomoi ya moto oyo ayebi Nzambe te. »

< Job 18 >