< Acts 6 >

1 At this time, when the number of believers was increasing rapidly, the Greek-speaking believers started arguing with the Aramaic-speaking believers. They complained that their widows were being discriminated against in the daily distribution of food.
Na mikolo wana, motango ya bayekoli ezalaki kaka kobakisama. Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Greki bakomaki koyimayima mpo na kotelemela Bayuda oyo bazalaki koloba lokota ya Ebre, pamba te basi na bango oyo bakufisa mibali bazalaki kozangela na tango ya kokabola bilei ya mokolo na mokolo.
2 The twelve apostles called all the believers together, and told them, “It's not appropriate for us to give up spreading the word of God so we can wait at tables.
Boye, bantoma zomi na mibale basangisaki bayekoli nyonso mpe balobaki na bango: — Ekozala malamu te mpo na biso kotika mosala ya koteya Liloba na Nzambe mpo na komipesa na mosala ya kokabola bilei.
3 Brothers, choose from among you seven trustworthy men full of the Spirit and wisdom. We will hand this responsibility over to them.
Yango wana bandeko, bopona mibali sambo kati na bino, oyo bayebana na bizaleli na bango ya malamu, oyo batonda na Molimo Mosantu mpe na bwanya mpo ete topesa bango mokumba yango.
4 We ourselves will give our full attention to prayer and the ministry of spreading the word.”
Boye, biso tokomipesa na mabondeli mpe na mosala ya koteya Liloba na Nzambe.
5 Everybody was happy with the arrangement, and they chose Stephen, (a man full of trust in God and of the Holy Spirit), Philip, Prochorus, Nicanor, Timon, Parmenas, and Nicolaus (originally a Jewish convert from Antioch).
Likanisi yango esepelisaki lisanga mobimba. Boye, baponaki Etieni, moto oyo atonda na kondima mpe na Molimo Mosantu; Filipo, Prokore, Nikanori, Timoni, Parimenasi mpe Nikola, moto ya Antioshe, oyo akotaki na lingomba ya Bayuda.
6 These men were presented to the apostles who prayed for them and placed their hands on them in blessing.
Balakisaki bango epai ya Bantoma; Bantoma basambelaki mpo na bango mpe batiaki bango maboko.
7 The word of God continued to spread, and the number of disciples in Jerusalem greatly increased, with a large number of priests committing themselves to trusting in Jesus.
Boye, Liloba na Nzambe ezalaki kokoba kopanzana, motango ya bayekoli ezalaki mpe kobakisama makasi na Yelusalemi mpe Banganga-Nzambe ebele bakomaki kondimela Yesu.
8 Stephen, full of grace and God's power, performed wonderful miracles among the people.
Nzokande, Etieni, moto oyo atondaki na ngolu mpe na nguya ya Nzambe, azalaki kosala bikamwa mpe bilembo minene kati na bato.
9 But some started arguing with him. They were from the synagogue called “the Free,” as well as Cyrenians, Alexandrians, and people from Cilicia and Asia Minor.
Bongo bato mosusu ya ndako ya mayangani oyo ebengamaka Ndako ya mayangani ya bansomi: Bayuda ya Sirene, ya Alekizandri, ya bituka ya Silisi mpe ya Azia; bakomaki kotia tembe na miso ya Etieni.
10 But they weren't able to stand against Stephen's wisdom or the Spirit with which he was speaking.
Kasi bazangaki makoki ya kotelemela bwanya mpe Molimo oyo azalaki kotinda ye koloba.
11 So they bribed some men to say, “We heard this man blaspheme Moses, and God too!”
Bongo, bapesaki kanyaka epai ya bato mpo ete baloba: « Toyokaki Etieni koloba maloba ya kofinga Moyize mpe Nzambe. »
12 They stirred up the people, and together with the elders and the teachers of the law, they came and arrested him. They brought him before the council,
Batombokisaki bato, bakambi mpe balakisi ya Mobeko. Boye, bayaki kokanga Etieni na mbalakata mpe bamemaki ye na Likita-Monene.
13 and called false witnesses who testified against him. “This man is always slandering the holy Temple and the law,” they said.
Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki: — Moto oyo azali kotika te koloba mabe mpo na kobebisa lokumu ya esika oyo ya bule mpe ya mibeko;
14 “We've heard him say that this Jesus of Nazareth will destroy the Temple, and will change the laws we received from Moses.”
pamba te toyokaki ye koloba ete Yesu ya Nazareti akobuka Tempelo oyo mpe akobongola bizaleli oyo Moyize atikela biso.
15 Everyone sitting on the council looked closely at Stephen, and his face shone like the face of an angel.
Bato nyonso oyo bavandaki na Likita-Monene batalaki Etieni malamu penza, mpe bamonaki ete elongi na ye ekomaki lokola elongi ya anjelu.

< Acts 6 >