< 2 Kings 17 >

1 Hoshea, son of Elah, became king of Israel, in the twelfth year of the reign of King Ahaz of Judah. He reigned in Samaria for nine years.
Tango Akazi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Oze, mwana mobali ya Ela, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Akonzaki mibu libwa.
2 He did what was evil in the Lord's sight, but not in the same way the kings of Israel who were before him.
Oze asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na bakonzi ya Isalaele, oyo bazalaki liboso na ye.
3 Shalmaneser, king of Assyria, came and attacked him, and Hoshea submitted to him and paid him tribute.
Salimanasari, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Oze. Mpe Oze akomaki mowumbu mpe akomaki kofuta mpako epai ya Salimanasari.
4 But then the king of Assyria discovered that Hoshea was being disloyal. Hoshea had sent messengers to So, king of Egypt, asking for help, and he also had stopped sending annual tribute to the king of Assyria as he had done previously. So the king of Assyria arrested Hoshea and put him in prison.
Kasi mokonzi ya Asiri asosolaki ete Oze asaleli ye likita, pamba te Oze atindaki bantoma epai ya So, mokonzi ya Ejipito, mpe atikaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Asiri ndenge azalaki kosala mobu na mobu. Boye Salimanasari akangaki Oze mpe atiaki ye na boloko.
5 Then the king of Assyria invaded the whole country, and attacked Samaria, besieging it for three years.
Mokonzi ya Asiri akotaki na makasi na mokili mobimba, abundisaki Samari mpe azingelaki yango mibu misato.
6 In the ninth year of the reign of Hoshea, the king of Assyria captured Samaria and deported the Israelites to Assyria. He settled them in Halah, in Gozan on the Habor River, and in the towns of the Medes.
Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi.
7 All this happened because the people of Israel had sinned against the Lord their God, the one who had led them out of Egypt, saving them from the power of Pharaoh, king of Egypt. They had worshiped other gods,
Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele basalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na bango, oyo abimisaki bango wuta na bokonzi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito; bagumbamelaki banzambe mosusu.
8 adopting the ways of the nations the Lord had driven out before the Israelites, and the pagan practices introduced by the kings of Israel.
Balandaki bizaleli ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango mpe makambo oyo bakonzi ya Isalaele bakotisaki.
9 Secretly the Israelites did things that were not right against the Lord their God. They built high places in all their towns, from watchtowers to fortified cities.
Bato ya Isalaele basalaki na nkuku makambo ya nkele na miso ya Yawe, Nzambe na bango. Batongaki bisambelo ya likolo ya bangomba kati na bingumba na bango nyonso, kobanda na likolo ya bamir ya lopango kino na bingumba batonga makasi.
10 They set up pagan stone pillars and Asherah poles on every high hill and under every green tree.
Batelemisaki mabanga ya bule mpe makonzi ya nzambe mwasi Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu.
11 They offered sacrifices on all the high places, just like the nations the Lord drove out before them. They did evil things, angering the Lord.
Batumbaki ansa na bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba, ndenge bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango ezalaki kosala. Basalaki makambo mabe oyo etumbolaki kanda ya Yawe.
12 They worshiped idols, even though the Lord had told them, “You are not to do this.”
Bagumbamelaki banzambe ya bikeko oyo na tina na yango Yawe alobaki: « Bokosala bongo te. »
13 Yet the Lord had warned Israel and Judah repeatedly through all his prophets and seers, saying, “Leave your wicked ways and keep my commandments and instructions. Follow the whole law that I ordered your forefathers to obey, and gave to you through my servants the prophets.”
Yawe akebisaki Isalaele mpe Yuda na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli mpe bamoni makambo, na maloba oyo: « Botika banzela na bino ya mabe, bobatela mibeko mpe bikateli na Ngai kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bino mpe bakoko na bino na nzela ya basali na Ngai, basakoli. »
14 But they refused listen, and they were as stubborn as their forefathers who did not trust the Lord their God.
Kasi bayokaki te; batiaki moto makasi lokola bakoko na bango, oyo baboyaki kondimela Yawe, Nzambe na bango.
15 They gave up on his regulations and the covenant he had made with their forefathers, as well as the decrees he had given them. They followed pointless idols and they became pointless themselves, copying the nations around them that the Lord ordered them not to copy.
Babwakaki bikateli na Ye, boyokani oyo asalaki elongo na bakoko na bango mpe makebisi oyo apesaki bango. Balandaki bikolo oyo ezalaki zingazinga na bango. Yawe apesaki bango mitindo ete basala te lokola bango, kasi bango basalaki kaka makambo oyo Yawe apekisaki bango kosala.
16 They ignored all the commandments of the Lord their God, and they made themselves two metal idols of calves and an Asherah pole. They bowed down in worship to the sun, moon, and stars and served Baal.
Batikaki mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, mpe bamisalelaki banzambe ya bikeko ya bana ngombe mibale basala na bibende oyo banyangwisa na moto, mpe likonzi ya nzambe mwasi Ashera. Bango nyonso bagumbamelaki mampinga nyonso ya likolo, mpe basambelaki nzambe Bala.
17 They sacrificed their sons and daughters as pagan burnt offerings, and practiced fortune-telling and witchcraft. They gave themselves over to doing what was evil in the Lord's sight, making him angry.
Batumbaki na moto lokola mbeka bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi. Basalelaki soloka mpe kindoki, mpe bamikabaki mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe. Boye batumbolaki kanda ya Yawe.
18 So the Lord was extremely angry with Israel, and he banished them from his presence. Only the tribe of Judah was left,
Yawe asilikelaki makasi bana ya Isalaele mpe abenganaki bango mosika na Ye. Kaka libota ya Yuda nde batikalaki.
19 but even Judah did not keep the commandments of the Lord their God, but followed the idolatry that Israel had introduced.
Nzokande, libota yango mpe ya Yuda babatelaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bango, balandaki bizaleli oyo Isalaele akotisaki.
20 The Lord gave up on all the descendants of Israel. He punished them and handed them over to their enemies, until he had banished them from his presence.
Boye, Yawe abwakaki bana nyonso ya Isalaele, ayokisaki bango pasi, akabaki bango na maboko ya bato ya mobulu, mpe abenganaki bango mosika na Ye.
21 When the Lord ripped Israel away from the house of David, they made Jeroboam, son of Nebat, their king. Jeroboam led Israel away from the Lord and made them commit terrible sins.
Tango Yawe alongolaki Isalaele na se ya bokonzi ya Davidi, bana ya Isalaele bakomisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mokonzi na bango. Jeroboami atindikaki Isalaele ete balanda Yawe te, mpe amemisaki bango lisumu ya monene.
22 The Israelites continued to practice all the sins that Jeroboam committed. They did not stop doing them,
Bato ya Isalaele bakangamaki na masumu nyonso ya Jeroboami mpe batikaki yango te
23 so the Lord eventually expelled them from his presence, just as he had said he would through all his servants, the prophets. So the Israelites were deported from their land and taken to Assyria, where they are to this day.
kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo.
24 The king of Assyria brought people from Babylon, Kuthah, Avva, Hamath, and Sepharvaim and settled them in the towns of Samaria instead of the Israelites. They took over ownership of Samaria and lived in its towns.
Mokonzi ya Asiri amemaki bato wuta na bingumba ya Babiloni, ya Kuti, ya Ava, ya Amati mpe ya Sefarivayimi; mpe atiaki bango na Samari, na esika ya bana ya Isalaele. Bato yango bazwaki Samari mpe bavandaki kati na bingumba na yango.
25 When they first started living there they did not worship the Lord, so he sent lions there among them, killing some of them.
Liboso, tango bazalaki kovanda kuna, bato yango bazalaki kogumbamela Yawe te. Boye Yawe atindaki nkosi kati na bango, mpe ebomaki ndambo ya bato kati na bango.
26 The king of Assyria was told, “The peoples that you brought and settled in the towns of Samaria they don't not know the rules of the God of the land. As a result, he has sent lions among them, which are killing them off because they don't know what the God of the land requires.”
Bayebisaki mokonzi ya Asiri: — Bikolo oyo omemaki na bowumbu mpe otiaki kati na bingumba ya Samari bayebi te makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka. Boye Nzambe atindi kati na bango nkosi oyo ezali koboma bango, pamba te bato yango bayebi te makambo oyo Nzambe yango alingaka.
27 The king of Assyria gave the order: “Send back one of the priests you deported from Samaria, and let him go back and live there and teach the rules of the God of the land.”
Boye mokonzi ya Asiri apesaki mitindo oyo: — Botinda kuna moko kati na Banganga-Nzambe oyo bomemaki na bowumbu wuta na Samari mpo ete avanda kuna mpe alakisa bato makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka.
28 So one of the priests who had been deported from Samaria returned to live in Bethel, and taught them how to worship the Lord.
Boye moko kati na Banganga-Nzambe oyo bamemaki na bowumbu wuta na Samari ayaki kovanda na Beteli mpe alakisaki bango kogumbamela Yawe.
29 But the people of the different nations went on making their own gods in the towns where they had settled, and they placed them in the shrines of the high places that the people of Samaria had made.
Kasi ekolo na ekolo esalaki banzambe na yango kati na bingumba nyonso oyo bazalaki kovanda, mpe batiaki banzambe yango kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bato ya Samari batongaki.
30 Those from Babylon made Sukkoth Benoth, those from Kuthah made Nergal, and those from Hamath made Ashima.
Bato oyo bawutaki na Babiloni basalaki ekeko ya nzambe Sukoti-Benoti; ba-oyo bawutaki na Kuti basalaki ekeko ya nzambe Nerigali; ba-oyo bawutaki na Amati basalaki ekeko ya nzambe Ashima;
31 The Avvites made Nibhaz and Tartak, and the Sepharvites sacrificed their children as burnt offerings to their gods Adrammelech and Anammelech.
ba-oyo bawutaki na Ava basalaki bikeko ya nzambe Nibikazi mpe nzambe Taritaki; ba-oyo bawutaki na Sefarivayimi bazalaki kokoba kotumba bana na bango na moto lokola mbeka epai ya Adrameleki mpe Anameleki, banzambe ya bato ya Sefarivayimi.
32 While they worshiped the Lord, they also appointed priests from all kinds of their own people to offer sacrifices for them in the shrines of the high places.
Bato ya bikolo yango bazalaki na bango kotosa Yawe, kasi baponaki lisusu kati na bango bato mpo na kosala mosala ya bonganga-nzambe kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba.
33 So even though they worshiped the Lord, they also worshiped their own gods following the practices of the nations they had come from.
Atako bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango kolanda bizaleli ya bikolo epai wapi bawutaki.
34 Even to this day they are still following their former practices. None of them truly worship the Lord or observe the regulations, requirements, laws, and commandments that the Lord gave to the descendants of Jacob, the one he named Israel.
Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. »
35 For the Lord had made an agreement with the Israelites, ordering them, “Don't worship other gods or bow down to them; don't serve them or offer sacrifices to them.
Tango Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele, alobaki na bango: « Bokogumbamela banzambe mosusu te, bokofukamela yango te, bokosalela yango te mpe bokobonzela yango bambeka te;
36 You must worship only the Lord, who led you out of Egypt, helping you with his great power and strong arm. Only bow down to him; only offer sacrifices to him.
kaka Yawe oyo abimisaki bino wuta na Ejipito, na nguya mpe na loboko esembolama, nde bosengeli kogumbamela. Liboso na Ye kaka nde bosengeli kogumbama mpe kobonza bambeka.
37 Always pay attention to observe the regulations, requirements, laws, and commandments he gave you in writing, and don't worship other gods.
Bosengeli tango nyonso kozala na bokebi mpo na kobatela bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe akomaki mpo na bino. Bogumbamela banzambe mosusu te,
38 Don't forget the agreement I have made with you, and don't worship other gods.
bobosana te boyokani oyo nasalaki elongo na bino, mpe bogumbamela banzambe mosusu te.
39 You must worship only the Lord your God, and he will save you from all your enemies.”
Kaka Yawe, Nzambe na bino, nde bosengeli kogumbamela, pamba te Ye nde akangolaki bino na maboko ya banguna na bino nyonso. »
40 But they refused to listen, and continued their former idolatrous practices.
Kasi bato ya bikolo wana bayokaki te mpe batingamaki kaka na bizaleli na bango ya kala.
41 Even while these people from different nations were worshiping the Lord, they were actually worshiping their idols. Their children and grandchildren continue to do as their forefathers did to this day.
Atako bato ya bikolo yango bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko. Kino lelo, bana na bango mpe bakitani na bango bazali kokoba kosala makambo oyo bakoko na bango bazalaki kosala.

< 2 Kings 17 >