< 1 Samuel 14 >

1 One day Jonathan, son of Saul, said to the young armor-bearer, “Come on, let's cross over to the Philistine garrison on the other side.” But he didn't let his father know his plans.
Mokolo moko, Jonatan, mwana mobali ya Saulo, alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: « Yaka! Tokatisa na ngambo mosusu epai wapi bato ya Filisitia bazali. » Kasi alobaki ata likambo moko te epai ya tata na ye.
2 Saul was staying near Gibeah under a pomegranate tree in Migron. He had about six hundred men with him,
Saulo avandaki na mondelo ya engumba Gibea, na se ya nzete ya grenade oyo ezali na Migironi, elongo na basoda pene nkama motoba.
3 including Ahijah, who was wearing an ephod. He was a son of Ichabod's brother Ahitub, son of Phinehas, son of Eli, priest of the Lord in Shiloh. No one realized Jonathan had left.
Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki.
4 Cliffs stood on both sides of the pass that Jonathan planned to cross to reach the Philistine garrison, one called Bozez and the other Seneh.
Na bangambo ya se ya lubwaku oyo Jonatan asengelaki kokatisa mpo na kokende kobundisa bato ya Filisitia, ezalaki na libanga moko na ngambo moko na moko. Babengaki moko Botsetsi, mpe mosusu, Sene.
5 The cliff to the north was on the Michmash side, the one to the south on the Geba side.
Libanga moko etelemaki na ngambo ya nor, na nzela oyo ekenda na Mikimasi, mpe mosusu etalanaki na Geba, na sude.
6 Jonathan said to the young armor-bearer, “Come on, let's cross over to the garrison of these heathen men. Maybe the Lord will help us out. It's not a problem for the Lord to win, whether by many or by few.”
Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: — Yaka! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke.
7 “You choose what you want to do,” the armor-bearer replied. “I'm with you whatever you decide!”
Elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azongisaki: — Sala nyonso oyo ozali na yango na makanisi. Kende! Nazali elongo na yo na motema mpe na molimo.
8 “Let's go then!” Jonathan said. “We'll cross over in their direction so they can see us.
Jonatan alobaki na ye: — Tokende kino na molako ya basoda yango mpe tomimonisa epai na bango.
9 If they tell us, ‘Wait there until we come down to you,’ we will wait where we are and we won't go up to them.
Soki balobi na biso: « Botelema wana, bozela kino biso moko tokoya epai na bino; » wana tokovanda na esika oyo tozali mpe tokokende epai na bango te.
10 But if they say, ‘Come on up to us,’ we'll climb up, for that will be the sign that the Lord has handed them over to us.”
Kasi soki balobi na biso: « Boya epai na biso, » tokokende epai na bango, pamba te yango ekozala elembo mpo na biso ete Yawe akabi bango na maboko na biso.
11 So both of them let themselves be seen by Philistine garrison. “Hey, look!” shouted the Philistines. “The Hebrews are coming out of the holes they were hiding in.”
Boye, bango mibale bamimonisaki na molako ya bato ya Filisitia. Mpe tango bato ya Filisitia bamonaki bango, balobaki: « Botala! Ba-Ebre babimi wuta na mabulu epai wapi babombamaki. »
12 The men from the garrison called down to Jonathan and his armor-bearer, “Come up here, and we'll teach you a thing or two!” “Follow me up,” Jonathan told his armor-bearer, “for the Lord has handed them over to Israel.”
Balobaki na Jonatan mpe na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: « Boya epai na biso, tokoteya bino likambo moko. » Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye: « Landa ngai na sima, pamba te Yawe asili kokaba bango na maboko ya Isalaele. »
13 So Jonathan climbed up on his hands and feet, with his armor-bearer right behind him. Jonathan attacked and killed them, and his armor-bearer followed doing the same.
Jonatan asalelaki makolo mpe maboko na ye mpo na komata, mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye alandaki ye na sima. Wana Jonatan azalaki kokweyisa bato ya Filisitia na liboso; na sima na ye, elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki koboma bango.
14 In this first attack, Jonathan and his armor-bearer killed about twenty men over an area of half an acre.
Na etumba oyo ya liboso, Jonatan elongo na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye babomaki bato pene tuku mibale, na etando oyo bangombe mibale ekoki kobalola na mokolo moko.
15 Then Philistines went into a panic, in the camp, in the field, and throughout their army. Even those in the outposts and the groups of raiders became terrified. The earth shook—this was a panic from God.
Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso: ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki.
16 Saul's lookouts at Gibeah in Benjamin saw the Philistine army melting away, scattering in all directions.
Bakengeli ya Saulo, oyo bazalaki na Gibea ya Benjame bamonaki mampinga kopalangana na bangambo nyonso.
17 Saul told the soldiers with him, “Do a roll-call and find out who isn't here with us.” When they did the roll-call, they discovered that Jonathan and his armor-bearer weren't there.
Bongo Saulo alobaki na basoda oyo bazalaki elongo na ye: « Botanga basoda mpo na koyeba banani basili kokima. » Tango batangaki, bamonaki ete Jonatan mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye bazali te.
18 Saul said to Ahijah, “Bring the Ark of God here.” (At the time the Ark of God traveled with the Israelites.)
Saulo alobaki na Ayiya: « Boya na Sanduku ya Nzambe. » Pamba te na tango wana, Sanduku ya Nzambe ezalaki elongo na bato ya Isalaele.
19 But as Saul was speaking to the priest, the commotion coming from the Philistine camp grew louder and louder. So Saul told the priest, “Forget it!”
Wana Saulo azalaki nanu kosolola na Nganga-Nzambe, mobulu ezalaki kaka kokoma makasi kati na molako ya bato ya Filisitia. Boye Saulo alobaki na Nganga-Nzambe: « Tika! Kotuna Yawe ezali lisusu na tina te. »
20 Then Saul and all his army assembled and went into battle. They discovered the Philistines were in total disarray, attacking each other with swords.
Bongo Saulo elongo na bato na ye nyonso basanganaki mpe bakendeki na bitumba; bamonaki ete bato ya Filisitia bazali na mobulu makasi, bazali kobomana bango na bango na mipanga.
21 The Hebrews who had previously sided with the Philistines, and who were with them in their camp, switched sides and joined the Israelites who were with Saul and Jonathan.
Ba-Ebre oyo basalelaki liboso bato ya Filisitia mpe bakendeki elongo na bango na bitumba mosusu, bango basanganaki na bato ya Isalaele, oyo bazalaki elongo na Saulo mpe Jonatan.
22 When all the Israelites who had been hiding in the hill country of Ephraim heard that the Philistines were running away, they also joined in chasing after the Philistines to attack them.
Tango bato nyonso ya Isalaele oyo babombamaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi bayokaki ete bato ya Filisitia bazali kokima, bango mpe balandaki mpe babundisaki bato ya Filisitia.
23 On that day the Lord saved Israel, and the battle extended past Beth-aven.
Ezalaki ndenge wana nde Yawe abikisaki na mokolo wana bato ya Isalaele, mpe bitumba ekobaki kino ekatisaki Beti-Aveni.
24 It was difficult for the men of Israel that day because Saul had ordered the army to take an oath, saying, “Cursed is anyone who eats anything before evening, before I have avenged myself on my enemies.” So no one in the army had eaten anything.
Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki: « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » Boye moto moko te amekaki kolia.
25 When they all entered the forest they found honeycomb on the ground.
Bato nyonso bakotaki na zamba mpe bamonaki mafuta ya nzoyi, na mabele.
26 While they were in the forest they saw the honey running out, but no one picked it up to eat it because they were all afraid of the oath they had taken.
Tango bakotaki na zamba, bamonaki mafuta ya nzoyi kotanga, mpe moko te asimbaki mpe aliaki yango mpo na kotosa ndayi.
27 But Jonathan hadn't heard that his father had ordered the army to take this oath. So he stuck the end of his stick into the honeycomb, picked up a piece to eat, and he felt much better.
Kasi Jonatan ayokaki te ete tata na ye atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi; apusaki nzete oyo azalaki na yango na loboko, azindisaki yango na mafuta ya nzoyi mpe aliaki yango, elongi na ye engengaki.
28 But one of the soldiers told him, “Your father made the army take a solemn oath, saying, ‘Cursed is anyone who eats anything today!’ That is why the men are exhausted.”
Bongo moko kati na basoda alobaki na ye: — Tata na yo atiaki mampinga nyonso na se ya mokumba ya ndayi na koloba: « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei na mokolo ya lelo. » Yango wana bato nyonso balembi.
29 “My father has caused a whole lot of trouble for everyone,” Jonathan replied. “See how well I am because I've eaten a little of this honey.
Jonatan alobaki: — Solo, tata na ngai akotisaki pasi kati na mokili. Botala ndenge nini elongi na ngai engengi! Ezali mpo ete nalie mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi.
30 It would have been so much better if only the army had eaten plenty today from the plunder taken from their enemies! How many more Philistines would have been killed?”
Bongo soki bato na biso baliaki na mokolo ya lelo mafuta ya nzoyi oyo bamonaki epai ya banguna na biso, kokweyisama ya bato ya Filisitia elingaki kozala monene!
31 After defeating the Philistines that day, killing them from Michmash to Aijalon, the Israelites were totally exhausted.
Na mokolo wana, sima na bato ya Isalaele kosilisa koboma bato ya Filisitia wuta na Mikimasi kino na Ayaloni, balembaki makasi.
32 They grabbed the plunder, taking sheep, cattle, and calves, and slaughtered them right there on the ground. But they ate them with the blood.
Bamibwakaki na bomengo ya bitumba mpe bakamataki biloko oyo: bameme, bangombe mpe bana ngombe. Bakataki yango kingo na mabele mpe baliaki yango na likolo ya makila na yango.
33 Saul was told, “Look, the men are sinning against the Lord by eating meat with the blood.” “Law-breakers!” said Saul. “Roll a large stone over here right now!”
Moto moko alobaki na Saulo: — Tala! Bato bazali kosala masumu liboso ya Yawe na ndenge bazali kolia nyama na likolo ya makila. Saulo alobaki: — Bokweyisi kondima! Botindika sik’oyo libanga moko ya monene kino awa.
34 Then he said, “Go around the soldiers and tell them, ‘Every man must bring me his cattle or his sheep and slaughter them here, and then eat. Don't sin against the Lord by eating meat with the blood.’” Everyone in the army brought what he had and slaughtered it there that night.
Saulo abakisaki: Bokende kati na bato mpe boloba na bango ete moko na moko amemela ngai ngombe na ye mpe meme na ye, mpe akata yango kingo na esika oyo. Bongo bokolia yango mpe bokosala masumu te liboso ya Yawe na kolia nyama na likolo ya makila kati na yango. Boye moko na moko amemaki ngombe na ye na butu mpe akataki yango kingo na esika yango.
35 So Saul built an altar to the Lord. This was the first altar he had built to the Lord.
Bongo Saulo atongaki etumbelo mpo na Yawe; ezalaki mbala na ye ya liboso ya kosala likambo ya boye.
36 Saul said, “Let's go and chase down the Philistines during night and plunder them till dawn, leaving no survivors.” “Do what you think best,” they replied. But the priest said, “Let's ask God first.”
Saulo alobaki: — Tokita mpe tolanda bato ya Filisitia na butu ya lelo, tobebisa bango kino na tongo mpe totika ata moto moko te ya bomoi kati na bango. Bato bazongisaki: — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu. Kasi Nganga-Nzambe alobaki: — Totuna Nzambe na esika oyo.
37 Saul asked God, “Shall I go down and chase down the Philistines? Will you hand them over to Israel?” But that day God didn't answer him.
Boye Saulo atunaki Nzambe: « Nakoki na ngai kokita mpo na kolanda bato ya Filisitia? Okokaba bango solo na maboko ya bato ya Isalaele? » Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana.
38 So Saul gave the order, “All you army commanders, come here so we can investigate what sin has happened today.
Saulo alobaki: — Bino nyonso oyo bozali bakambi ya bato, boya awa! Toluka koyeba lisumu nini oyo esalemi na mokolo ya lelo.
39 I swear on the life of the Lord who saves Israel, that even if it's my son Jonathan, he will have to die!” But no one of the whole army said anything.
Na Kombo na Yawe, Mobikisi ya Isalaele, ata ezali Jonatan, mwana na ngai ya mobali, nde asali lisumu yango, asengeli kokufa. Kasi kati na bato, moko te alobaki ata liloba moko.
40 Saul told them all, “You stand over to one side, and I and my son Jonathan will stand on the opposite side.” “Do what you think best,” the army replied.
Bongo Saulo alobaki na bato nyonso ya Isalaele: — Bozala ngambo moko. Ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali, tokozala ngambo mosusu. Bato bazongisaki: — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu.
41 Saul prayed to the Lord, the God of Israel, “Let the Thummin show.” Jonathan and Saul were identified, while everyone else was cleared.
Bongo Saulo asambelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele: « Oh Nzambe, talisa ngai eyano ya malamu. » Boye zeke ekweyaki epai ya Jonatan mpe Saulo, mpe bato bazalaki na mbeba te.
42 Then Saul said, “Cast lots between me and my son Jonathan.” Jonathan was selected.
Saulo alobaki: « Bobeta zeke kati na ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali. » Mpe zeke ekweyaki epai ya Jonatan.
43 “Tell me what you have done,” Saul asked Jonathan. “I just tasted a little honey with the end of my stick,” Jonathan told him. “Here I am, and I have to die.”
Bongo Saulo alobaki na Jonatan: — Yebisa ngai likambo oyo osalaki. Jonatan alobaki: — Namekaki ndambo ya mafuta ya nzoyi na songe ya nzete oyo nazalaki na yango na maboko. Mpe sik’oyo nasengeli kokufa!
44 Saul said, “May God punish me very severely if you do not die, Jonathan!”
Saulo alobaki: — Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te.
45 But the people told Saul, “Does Jonathan have to die, the one who achieved this great victory in Israel? Absolutely not! We swear on the life of the Lord, not a single hair of his head will fall to the ground, for it was with God's help that he achieved this today.” The people saved Jonathan, and he didn't die.
Kasi bato balobaki na Saulo: — Boni, Jonatan akokufa! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye! Te! Na Kombo na Yawe, akokufa te! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te.
46 Saul stopped chasing down the Philistines, and the Philistines went to their own country.
Saulo atikaki kolanda bato ya Filisitia, mpe bato ya Filisitia bazongaki na mboka na bango.
47 After Saul had made his hold over Israel secure, he fought against all his enemies all around: Moabites, Ammonites, Edomites, the kings of Zobah, and the Philistines. Whatever direction he went he defeated them all.
Tango Saulo azwaki bokonzi mpo na koyangela Isalaele, abundisaki banguna na bango na bangambo nyonso: Moabi, bato ya Amoni, Edomi, bakonzi ya Tsoba, mpe bato ya Filisitia. Bisika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kolonga bato wana.
48 He fought bravely, conquering the Amalekites, saving Israel from those who plundered them.
Abundisaki na makasi nyonso bato ya Amaleki mpe alongaki bango, akangolaki Isalaele na maboko ya bato oyo bazalaki kobotola bango biloko.
49 Saul's sons were Jonathan, Ishvi, and Malchishua. The names of his two daughters were Merab, (the firstborn), and Michal, (the younger one).
Bana mibali ya Saulo bazalaki: Jonatan, Yishivi mpe Maliki-Shuwa. Azalaki na bana mibale ya basi: ya mokolo, kombo na ye ezalaki « Merabi; » mpe ya leki, « Mikali. »
50 The name of his wife was Ahinoam, daughter of Ahimaaz. The name of Saul's army commander was Abner, son of Ner, and Ner was Saul's uncle.
Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Ayinoami, » mwana mwasi ya Ayimaatsi. Abineri, mwana mobali ya Neri, Noko ya Saulo, azalaki mokonzi ya mampinga ya Saulo.
51 Saul's father Kish and Abner's father Ner were sons of Abiel.
Kishi, tata ya Saulo, mpe Neri, tata ya Abineri, bazalaki bana mibali ya Abieli.
52 Throughout Saul's lifetime there was constant war with the Philistines. Saul recruited into his army every strong warrior and every brave fighter that he met.
Na mikolo nyonso ya bomoi ya Saulo, bitumba ezalaki makasi na bato ya Filisitia; mpe bisika nyonso oyo Saulo azalaki komona bato ya makasi to ya mpiko, azalaki kozwa mpe kokotisa bango kati na mampinga na ye.

< 1 Samuel 14 >