< Numbers 22 >

1 And they went forward and encamped in the plains of Moab, over against where Jericho is situate beyond the Jordan.
Bana ya Isalaele batambolaki mobembo na bitando ya Moabi mpe batongaki molako na bango pembeni-pembeni ya ebale Yordani, oyo ezalaki etalana na Jeriko.
2 And Balac the son of Sephor, seeing all that Israel had done to the Amorrhite,
Boye Balaki, mwana mobali ya Tsipori, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo bana ya Isalaele basalaki bato ya Amori.
3 And that the Moabites were in great fear of him, and were not able to sustain his assault,
Mpe bato ya Moabi bakomaki kobanga makasi mpo ete bana ya Isalaele bazalaki ebele penza. Boye, bakomaki na somo mingi liboso ya bana ya Isalaele.
4 He said to the elders of Madian: So will this people destroy all that dwell in our borders, as the ox is wont to eat the grass to the very roots. Now he was at that time king in Moab.
Bongo bato ya Moabi balobaki na bakambi ya Madiani: « Ebele ya bato oyo bazali koya mpo na kobebisa biloko nyonso oyo ezingeli biso lokola ngombe oyo ezali kolia matiti ya elanga. » Na tango wana, ezalaki Balaki, mwana mobali ya Tsipori, nde azalaki mokonzi ya Moabi.
5 He sent therefore messengers to Balaam the son of Beer, a soothsayer, who dwelt by the river of the land of the children of Ammon, to call him, and to say: Behold a people is come out of Egypt, that hath covered the face of the earth, sitting over against me.
Atindaki bantoma kobenga Balami, mwana mobali ya Beori, oyo azalaki kovanda na Petori, pembeni ya ebale Efrate, mboka oyo ye abotama. Balaki alobaki na Balami: — Bato moko bawuti kobima na Ejipito, batondisi mokili mobimba mpe bayei sik’oyo kovanda pembeni na ngai.
6 Come therefore, and curse this people, because it is mightier than I: if by any means I may beat them and drive them out of my land: for I know that he whom thou shalt bless is blessed, and he whom thou shalt curse is cursed.
Nabondeli yo, yaka kolakela bango mabe, pamba te bazali makasi mingi koleka ngai, tango mosusu nakokoka kolonga bango mpe kobengana bango na mboka. Pamba te nayebi ete bato oyo opamboli, bapambolamaka; mpe ba-oyo olakeli mabe, balakelamaka mpe mabe.
7 And the ancients of Moab, and the elders of Madian, went with the price of divination in their hands. And when they were come to Balaam, and had told him all the words of Balac:
Bakambi ya Moabi mpe ya Madiani bakendeki mpe bamemaki makabo mpo na kopesa na Balami, momoni makambo. Tango bakomaki epai ya Balami, bayebisaki ye makambo oyo Balaki atindaki.
8 He answered: Tarry here this night, and I will answer whatsoever the Lord shall say to me. And while they stayed with Balaam, God came and said to him:
Balami alobaki na bango: — Bolekisa butu awa, mpe nakozongisela bino eyano oyo Yawe akopesa ngai. Boye bakambi ya Moabi bavandaki elongo na ye.
9 What mean these men that are with thee?
Nzambe ayaki epai ya Balami mpe atunaki ye: — Bato oyo bazali epai na yo bazali banani?
10 He answered: Balac the son of Sephor king of the Moabites hath sent to me,
Balami alobaki na Nzambe: — Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, atindeli ngai maloba oyo:
11 Saying: Behold a people that is come out of Egypt, hath covered the face of the land: come and curse them, if by any means I may fight with them and drive them away.
« Bato moko bawuti kobima na Ejipito mpe batondisi mokili mobimba. Sik’oyo yaka mpe lakela bango mabe mpo na ngai. Tango mosusu nakokoka kobundisa bango mpe kobengana bango. »
12 And God said to Balaam: Thou shalt not go with them, nor shalt thou curse the people: because it is blessed.
Kasi Nzambe alobaki na Balami: — Kokende elongo na bango te. Okoki kolakela bato wana mabe te, pamba te bazali bato bapambolama.
13 And he rose in the morning and said to the princes: Go into your country, because the Lord hath forbid me to come with you.
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki mpe alobaki na bakambi ya Balaki: — Bozonga na mboka na bino, pamba te Yawe aboyi ete nakende elongo na bino.
14 The princes returning, said to Balac: Balaam would not come with us.
Boye, bakambi ya Moabi bazongaki epai ya Balaki mpe balobaki: — Balami aboyi koya elongo na biso.
15 Then he sent many more and more noble than he had sent before:
Balaki atindaki bakambi mosusu oyo bazalaki mingi mpe na lokumu koleka bakambi oyo atindaki liboso.
16 Who, when they were come to Balaam, said: Thus saith Balac the son of Sephor, Delay not to come to me:
Bakomaki epai ya Balami mpe balobaki: — Tala liloba oyo Balaki, mwana ya mobali ya Tsipori alobi: « Tika ete eloko moko te epekisa yo koya epai na ngai!
17 For I am ready to honour thee, and will give thee whatsoever thou wilt: come and curse this people.
Pamba te nakopesa yo lifuti ya malamu mpe nakosala nyonso oyo okoloba. Yaka penza mpe lakela bato oyo mabe mpo na ngai. »
18 Balaam answered: If Balac would give me his house full of silver and gold, I cannot alter the word of the Lord my God, to speak either more or less.
Kasi Balami azongiselaki bango: — Ezala soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakokoka kosala eloko moko te ya monene to ya moke oyo ekokende libanda ya mibeko ya Yawe, Nzambe na ngai.
19 I pray you to stay here this night also, that I may know what the Lord will answer me once more.
Bino mpe lisusu bolekisa butu awa ndenge bandeko na bino basalaki, mpo ete naluka koyeba lisusu likambo oyo Yawe akoyebisa na ngai.
20 God therefore came to Balaam in the night, and said to him: It these men be come to call thee, arise and go with them: yet so, that thou do what I shall command thee.
Na butu wana, Nzambe ayaki epai na Balami mpe alobaki: — Lokola bato oyo bayei mpo na kobenga yo, kende elongo na bango. Kasi sala kaka makambo oyo nakoyebisa yo.
21 Balaam arose in the morning, and saddling his ass went with them.
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki, abongisaki ane na ye ya mwasi mpe akendeki elongo na bakambi ya Moabi.
22 And God was angry. And an angel of the Lord stood in the way against Balaam, who sat on the ass, and had two servants with him.
Kasi tango akendeki, Nzambe asilikaki makasi mpe anjelu ya Yawe atelemaki na nzela mpo na kokanga ye nzela tango azalaki kotambola likolo ya ane elongo na basali na ye mibale.
23 The ass seeing the angel standing in the way, with a drawn sword, turned herself out of the way, and went into the field. And when Balaam beat her, and had a mind to bring her again to the way,
Tango ane emonaki anjelu ya Yawe atelema na kati-kati ya nzela na mopanga ya minu na loboko na ye, ane ebimaki na nzela mpe ekimaki na elanga. Boye, Balami abetaki ane mpo ete ekoka kozonga na nzela.
24 The angel stood in a narrow place between two walls, wherewith the vineyards were enclosed.
Mpe lisusu, anjelu ya Yawe akendeki kotelema na nzela moko ya moke, oyo elekela na kati-kati ya bilanga mibale ya vino, oyo mopanzi moko na moko na yango ezalaki lokola na bamir mibale.
25 And the ass seeing him, thrust herself close to the wall, and bruised the foot of the rider. But he beat her again:
Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, epusanaki pembeni ya mir, efinaki lokolo ya Balami na mir. Balami abetaki yango lisusu.
26 And nevertheless the angel going on to a narrow place, where there was no way to turn aside either to the right hand or to the left, stood to meet him.
Anjelu ya Yawe alekaki liboso na bango mpe akendeki kotelema na esika moko ya moke penza, epai wapi nzela ya kobalukela na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi ezali te.
27 And when the ass saw the angel standing, she fell under the feet of the rider: who being angry beat her sides more vehemently with a staff.
Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, evandelaki Balami, nkolo na yango. Balami atombokaki makasi mpe akomaki kobamba ane lingenda na ye.
28 And the Lord opened the mouth of the ass, and she said: What have I done to thee? Why strikest thou me, lo, now this third time?
Bongo, Yawe afungolaki monoko ya ane, mpe elobaki na Balami: — Likambo nini nasali yo mpo ete okoka kobeta ngai mbala misato?
29 Balaam answered: Because thou hast deserved it, and hast served me ill: I would I had a sword that I might kill thee.
Balami azongiselaki ane: — Ozali kosakana na ngai! Soki nazalaki na mopanga na loboko na ngai, mbele nabomi yo kaka sik’oyo!
30 The ass said: Am not I thy beast, on which thou hast been always accustomed to ride until this present day? tell me if I ever did the like thing to thee. But he said: Never.
Ane elobi na Balami: — Boni, nazali ane na yo te oyo osalelaka tango nyonso kino na mokolo ya lelo? Nazalaka solo na momesano ya kosalela yo makambo ya boye? Balami azongisaki: — Te!
31 Forthwith the Lord opened the eyes of Balaam, and he saw the angel standing in the way with a drawn sword, and he worshipped him falling flat on the ground.
Boye, Yawe afungolaki miso ya Balami, mpe Balami amonaki anjelu ya Yawe atelema na nzela, na mopanga na ye ya monene. Bongo, Balami afukamaki mpe akweyaki elongi kino na mabele.
32 And the angel said to him: Why beatest thou thy ass these three times? I am come to withstand thee, because thy way is perverse, and contrary to me:
Anjelu ya Yawe atunaki ye: — Mpo na nini obeti ane na yo mbala misato? Nayaki awa mpo na kokanga yo nzela, pamba te nzela na yo ezali mabe liboso na Ngai.
33 And unless the ass had turned out of the way, giving place to me who stood against thee, I had slain thee, and she should have lived.
Ane emonaki Ngai mpe ekimaki Ngai mbala misato. Soki ekimaki Ngai te, solo penza, nalingaki koboma yo, kasi nalingaki kotika yango na bomoi.
34 Balaam said: I have sinned, not knowing that thou didst stand against me: and now if it displease thee that I go, I will return.
Balami alobaki na anjelu ya Yawe: — Nasali masumu. Nayebaki te ete otelemaki na nzela mpo na kokanga ngai nzela. Kasi soki osepeli na mobembo oyo te, nakozonga na ngai.
35 The angel said: Go with these men, and see thou speak no other thing than what I shall command thee. He went therefore with the princes.
Anjelu ya Yawe alobaki na Balami: — Kende elongo na bato oyo kasi okoloba kaka makambo oyo nakoloba na yo. Boye, Balami akendeki elongo na bakambi ya Balaki.
36 And when Balac heard it he came forth to meet him in a town of the Moabites, that is situate in the uttermost borders of Arnon.
Tango Balaki ayokaki sango ete Balami azali koya, akendeki kokutana na ye na engumba ya bato ya Moabi, oyo ezalaka na mondelo ya Arinoni, na suka ya mokili na ye.
37 And he said to Balaam: I sent messengers to call thee, why didst thou not come immediately to me? was it because I am not able to reward thy coming?
Balaki alobaki na Balami: — Boni, natindaki te bato na lombangu mpo na kobenga yo? Mpo na nini oyaki epai na ngai te? Okanisaki ete nazangi makoki ya kofuta yo?
38 He answered him: Lo, here I am: shall I have power to speak any other thing but that which God shall put in my mouth?
Balami azongiselaki Balaki: — Malamu, nayei sik’oyo epai na yo. Kasi nakoki solo koloba na yo kaka likambo moko? Nakoloba kaka makambo oyo Nzambe akotia na monoko na ngai.
39 So they went on together, and came into a city, that was in the uttermost borders of his kingdom.
Boye, Balami akendeki nzela moko na Balaki kino na Kiriati-Utsoti.
40 And when Balac had killed oxen and sheep, he sent presents to Balaam, and to the princes that were with him.
Balaki abonzaki mbeka ya ngombe mpe ya meme, apesaki ndambo epai ya Balami mpe ndambo mosusu epai ya bakambi oyo bazalaki na ye elongo.
41 And when morning was come, he brought him to the high places of Baal, and he beheld the uttermost part of the people.
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balaki amemaki Balami, mpe bamataki na Bamoti-Bala; mpe wuta kuna, bakokaki komona ndambo ya bana ya Isalaele.

< Numbers 22 >