< Numbers 13 >

1 And there the Lord spoke to Moses, saying:
Yawe alobaki na Moyize:
2 Send men to view the land of Chanaan, which I will give to the children of Israel, one of every tribe, of the rulers.
« Tinda bato mpo na kononga mokili ya Kanana oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. Kati na libota moko na moko, pona mpe tinda moto moko kati na bakambi. »
3 Moses did what the Lord had commanded, sending from the desert of Pharan, principal men, whose names are these:
Na mitindo ya Yawe, Moyize atindaki bango wuta na esobe ya Parani. Bango nyonso bazalaki bakambi ya mabota ya bana ya Isalaele.
4 Of the tribe of Ruben, Sammua the son of Zechur.
Tala bakombo na bango: mpo na libota ya Ribeni: Chamuwa, mwana mobali ya Zakuri;
5 Of the tribe of Simeon, Saphat the son of Hurl.
mpo na libota ya Simeoni: Shafati, mwana mobali ya Ori;
6 Of the tribe of Juda, Caleb the son of Jephone.
mpo na libota ya Yuda: Kalebi, mwana mobali ya Yefune;
7 Of the tribe of Issachar, Igal the son of Joseph.
mpo na libota ya Isakari: Yigali, mwana mobali ya Jozefi;
8 Of the tribe of Ephraim, Osee the son of Nun.
mpo na libota ya Efrayimi: Oze, mwana mobali ya Nuni;
9 Of the tribe of Benjamin, Phalti the son of Raphu.
mpo na libota ya Benjame: Paliti, mwana mobali ya Rafu;
10 Of the tribe of Zabulon, Geddiel the son of Sodi.
mpo na libota ya Zabuloni: Gadieli, mwana mobali ya Sodi;
11 Of the tribe of Joseph, of the sceptre of Manasses, Gaddi the son of Susi.
mpo na libota ya Jozefi na nzela ya Manase: Gaadi, mwana mobali ya Susi;
12 Of the tribe of Dan, Ammiel the son of Gemalli.
mpo na libota ya Dani: Amieli, mwana mobali ya Gemali;
13 Of the tribe of Aser, Sthur the son of Michael.
mpo na libota ya Aseri: Seturi, mwana mobali ya Mikaeli;
14 Of the tribe of Nephtali, Nahabi the son of Vapsi.
mpo na libota ya Nefitali: Nakibi, mwana mobali ya Vofisi;
15 Of the tribe of Gad, Guel the son of Machi.
mpo na libota ya Gadi: Geweli, mwana mobali ya Maki.
16 These are the names of the men, whom Moses sent to view the land: and he called Osee the son of Nun, Josue.
Oyo nde bakombo ya bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili ya Kanana. Moyize apesaki Oze, mwana mobali ya Nuni, kombo « Jozue. »
17 And Moses sent them to view the land of Chanaan, and said to them: Go you up by the south side. And when you shall come to the mountains,
Tango Moyize atindaki bango mpo na kononga mokili ya Kanana, alobaki: « Bolekela na nzela ya etuka ya Negevi mpe bokotela na nzela ya mokili ya bangomba.
18 View the land, of what sort it is: and the people that are the inhabitants thereof, whether they be strong or weak: few in number or many:
Botala soki mokili yango ezali ndenge nini mpe soki bato oyo bavandaka kuna bazalaka makasi to balemba, soki bazalaka ebele to moke.
19 The land itself, whether it be good or bad: what manner of cities, walled or without walls:
Botala ndenge nini mokili epai wapi bazali kowumela ezali: soki ezali malamu to mabe; soki bazingela bingumba na yango na bamir to te.
20 The ground, fat or barren, woody or without trees. Be of good courage, and bring us of the fruits of the land. Now it was the time when the first ripe grapes are fit to be eaten.
Botala soki mabele na yango ezali ndenge nini: ebotaka malamu to te; ezali na banzete to te. Bosala nyonso penza ete bozonga na mbuma ya mokili yango. » Ezalaki eleko ya kobuka bambuma ya liboso ya vino.
21 And when they were gone up, they viewed the land from the desert of Sin, unto Rohob as you enter into Emath.
Boye bakendeki mpe banongaki mokili kobanda na esobe ya Tsini kino na Reobi, pembeni ya Lebo-Amati.
22 And they went up at the south side, and came to Hebron, where were Achiman and Sisai and Tholmai the sons of Enac. For Hebron was built seven years before Tanis the city of Egypt.
Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito.
23 And going forward as far as the torrent of the cluster of grapes, they cut off a branch with its cluster of grapes, which two men carried upon a lever. They took also of the pomegranates and of the figs of that place:
Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi.
24 Which was called Nehelescol, that is to say, the torrent of the cluster of grapes, because from thence the children of Israel had carried a cluster of grapes.
Wuta na tango wana, bakomaki kobenga esika yango « lubwaku ya Eshikoli, » oyo elingi koloba « lubwaku ya liboke ya bambuma ya vino, » mpo na kokanisa liboke ya bambuma ya vino oyo bana ya Isalaele babukaki kuna.
25 And they that went to spy out the land returned after forty days, having gone round all the country,
Sima na mikolo tuku minei, bazongaki wuta na mokili oyo banongaki.
26 And came to Moses and Aaron and to all the assembly of the children of Israel to the desert of Pharan, which is in Cades. And speaking to them and to all the multitude, they shewed them the fruits of the land:
Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.
27 And they related and said: We came into the land to which thou sentest us, which in very deed floweth with milk and honey as may be known by these fruits:
Bapesaki sango oyo epai ya Moyize: « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi; tala kutu bambuma ya mokili yango.
28 But it hath very strong inhabitants, and the cities are great and walled. We saw there the race of Enac.
Kasi bato oyo bavandaka kuna bazali makasi mingi, bingumba na bango etongama makasi mpe ezali minene; tomonaki lisusu bakitani ya Anaki kuna.
29 Amalec dwelleth in the south, the Hethite and the Jebusite and the Amorrhite in the mountains: but the Chanaanite abideth by the sea and near the streams of the Jordan.
Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »
30 In the mean time Caleb, to still the murmuring of the people that rose against Moses, said: Let us go up and possess the land, for we shall be able to conquer it.
Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki: — Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango!
31 But the others, that had been with him, said: No, we are not able to go up to this people, because they are stronger than we.
Kasi bato oyo bakendeki elongo na ye balobaki: — Tokokoka te kobundisa bato wana mpo ete bazali makasi koleka biso.
32 And they spoke ill of the land, which they had viewed, before the children of Israel, saying: The land which we have viewed, devoureth its inhabitants: the people, that we beheld, are of a tall stature.
Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba: « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe.
33 There we saw certain monsters of the sons of Enac, of the giant kind: in comparison of whom, we seemed like locusts.
Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. »

< Numbers 13 >