< Luke 23 >
1 And the whole multitude of them rising up, led him to Pilate.
Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato;
2 And they began to accuse him, saying: We have found this man perverting our nation, and forbidding to give tribute to Caesar, and saying that he is Christ the king.
mpe kuna, bakomaki kofunda Ye: — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi!
3 And Pilate asked him, saying: Art thou the king of the Jews? But he answering, said: Thou sayest it.
Pilato atunaki Yesu: — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda? Yesu azongisaki: — Olobi yango.
4 And Pilate said to the chief priests and to the multitudes: I find no cause in this man.
Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato: — Namoni mabe moko te epai ya moto oyo.
5 But they were more earnest, saying: He stirreth up the people, teaching throughout all Judea, beginning from Galilee to this place.
Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki: — Te! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye; abandaki yango na Galile kino akomi awa.
6 But Pilate hearing Galilee, asked if the man were of Galilee?
Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile.
7 And when he understood that he was of Herod’s jurisdiction, he sent him away to Herod, who was also himself at Jerusalem, in those days.
Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana.
8 And Herod, seeing Jesus, was very glad; for he was desirous of a long time to see him, because he had heard many things of him; and he hoped to see some sign wrought by him.
Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi.
9 And he questioned him in many words. But he answered him nothing.
Apesaki ye mituna ebele, kasi Yesu apesaki ye ata eyano moko te.
10 And the chief priests and the scribes stood by, earnestly accusing him.
Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki kaka wana mpe bazalaki kopelisa moto na maloba mabe mpo na kokweyisa Yesu.
11 And Herod with his army set him at nought, and mocked him, putting on him a white garment, and sent him back to Pilate.
Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato.
12 And Herod and Pilate were made friends, that same day; for before they were enemies one to another.
Nzokande, Erode mpe Pilato bazalaki banguna wuta kala; kasi na mokolo wana, bakomaki balingami.
13 And Pilate, calling together the chief priests, and the magistrates, and the people,
Pilato abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya Bayuda mpe bato nyonso; alobaki na bango:
14 Said to them: You have presented unto me this man, as one that perverteth the people; and behold I, having examined him before you, find no cause in this man, in those things wherein you accuse him.
— Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye.
15 No, nor Herod neither. For I sent you to him, and behold, nothing worthy of death is done to him.
Erode mpe azwaki ye na mabe ata moko te, yango wana azongisaki ye epai na biso. Boye, ndenge bokoki komona, moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa.
16 I will chastise him therefore, and release him.
Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye. [
17 Now of necessity he was to release unto them one upon the feast day.
Nzokande, na bafeti nyonso, Pilato azalaki kobimisela bango mokangami moko.]
18 But the whole multitude together cried out, saying: Away with this man, and release unto us Barabbas:
Bato nyonso bagangaki: — Boma moto oyo! Bimisela biso Barabasi!
19 Who, for a certain sedition made in the city, and for a murder, was cast into prison.
Barabasi akangamaki na boloko mpo ete abimisaki mobulu kati na engumba mpe abomaki moto.
20 And Pilate again spoke to them, desiring to release Jesus.
Lokola azalaki na posa ya kotika Yesu, Pilato atunaki bango lisusu.
21 But they cried again, saying: Crucify him, crucify him.
Kasi bakobaki koganga: — Baka ye na ekulusu! Baka ye na ekulusu!
22 And he said to them the third time: Why, what evil hath this man done? I find no cause of death in him. I will chastise him therefore, and let him go.
Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato: — Mpo na nini? Mabe nini tata oyo asali? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu; sima, nakotika ye.
23 But they were instant with loud voices, requiring that he might be crucified; and their voices prevailed.
Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki.
24 And Pilate gave sentence that it should be as they required.
Pilato azwaki mokano ya kokokisa oyo basengaki;
25 And he released unto them him who for murder and sedition, had been cast into prison, whom they had desired; but Jesus he delivered up to their will.
abimiselaki bango moto oyo basengaki, oyo akangamaki na boloko mpo na mobulu mpe mpo ete abomaki moto, mpe akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete basala Ye nyonso oyo balingi.
26 And as they led him away, they laid hold of one Simon of Cyrene, coming from the country; and they laid the cross on him to carry after Jesus.
Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu.
27 And there followed him a great multitude of people, and of women, who bewailed and lamented him.
Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye.
28 But Jesus turning to them, said: Daughters of Jerusalem, weep not over me; but weep for yourselves, and for your children.
Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki: — Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino.
29 For behold, the days shall come, wherein they will say: Blessed are the barren, and the wombs that have not borne, and the paps that have not given suck.
Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba: « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te! »
30 Then shall they begin to say to the mountains: Fall upon us; and to the hills: Cover us.
Bongo bakoloba na bangomba milayi: « Bokweyela biso! » Mpe bakoloba na bangomba mikuse: « Bozipa biso! »
31 For if in the green wood they do these things, what shall be done in the dry?
Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka?
32 And there were also two other malefactors led with him to be put to death.
Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu.
33 And when they were come to the place which is called Calvary, they crucified him there; and the robbers, one on the right hand, and the other on the left.
Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato: moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.
34 And Jesus said: Father, forgive them, for they know not what they do. But they, dividing his garments, cast lots.
Yesu alobaki: — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala. Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke.
35 And the people stood beholding, and the rulers with them derided him, saying: He saved others; let him save himself, if he be Christ, the elect of God.
Bato batelemaki wana, bazalaki kotala; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki: — Abikisaki bato mosusu; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe!
36 And the soldiers also mocked him, coming to him, and offering him vinegar,
Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye; bapesaki Ye vino ya ngayi
37 And saying: If thou be the king of the Jews, save thyself.
mpe balobaki: — Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko!
38 And there was also a superscription written over him in letters of Greek, and Latin, and Hebrew: THIS IS THE KING OF THE JEWS.
Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo: Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda.
39 And one of those robbers who were hanged, blasphemed him, saying: If thou be Christ, save thyself and us.
Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye: — Boni, ozali Klisto te? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso!
40 But the other answering, rebuked him, saying: Neither dost thou fear God, seeing thou art condemned under the same condemnation?
Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye: — Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye!
41 And we indeed justly, for we receive the due reward of our deeds; but this man hath done no evil.
Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso; kasi tata oyo asali ata mabe moko te.
42 And he said to Jesus: Lord, remember me when thou shalt come into thy kingdom.
Bongo alobaki lisusu: — Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo.
43 And Jesus said to him: Amen I say to thee, this day thou shalt be with me in paradise.
Yesu azongiselaki ye: — Nazali koloba na yo penza ya solo: lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.
44 And it was almost the sixth hour; and there was darkness over all the earth until the ninth hour.
Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa,
45 And the sun was darkened, and the veil of the temple was rent in the midst.
pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati.
46 And Jesus crying out with a loud voice, said: Father, into thy hands I commend my spirit. And saying this, he gave up the ghost.
Yesu agangaki na mongongo makasi: — Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo. Sima na Ye koloba bongo, akataki motema.
47 Now the centurion, seeing what was done, glorified God, saying: Indeed this was a just man.
Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki: — Moto oyo azalaki penza sembo!
48 And all the multitude of them that were come together to that sight, and saw the things that were done, returned striking their breasts.
Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki.
49 And all his acquaintance, and the women that had followed him from Galilee, stood afar off, beholding these things.
Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka.
50 And behold there was a man named Joseph, who was a counsellor, a good and just man,
Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo,
51 (The same had not consented to their counsel and doings; ) of Arimathea, a city of Judea; who also himself looked for the kingdom of God.
mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe.
52 This man went to Pilate, and begged the body of Jesus.
Akendeki epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu.
53 And taking him down, he wrapped him in fine linen, and laid him in a sepulchre that was hewed in stone, wherein never yet any man had been laid.
Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te.
54 And it was the day of the Parasceve, and the sabbath drew on.
Ezalaki mokolo ya komilengela, wana Saba elingaki kobanda.
55 And the women that were come with him from Galilee, following after, saw the sepulchre, and how his body was laid.
Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango.
56 And returning, they prepared spices and ointments; and on the sabbath day they rested, according to the commandment.
Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga.