< Leviticus 14 >

1 And the Lord spoke to Moses, saying:
Yawe alobaki na Moyize:
2 This is the rite of a leper, when he is to be cleansed: he shall be brought to the priest:
« Tala mobeko oyo etali moto oyo azali na bokono ya maba, na mokolo ya kopetolama na ye: ‹ Basengeli komema moto oyo azali na bokono ya maba epai ya Nganga-Nzambe.
3 Who going out of the camp when he shall And that the leprosy is cleansed,
Nganga-Nzambe akokende libanda ya molako mpo na kotala ye malamu. Soki abiki na bokono na ye ya maba,
4 Shall command him that is to be purified, to offer for himself two living sparrows, which it is lawful to eat, and cedar wood, and scarlet, and hyssop.
Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bamema biloko oyo, mpo na kopetolama ya moto oyo abiki na bokono ya maba: bandeke mibale ya peto mpe ya bomoi, eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope.
5 And he shall command one of the sparrows to be immolated in an earthen vessel over living waters:
Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bakata kingo ya ndeke moko kati na bandeke wana mibale, na likolo ya sani basala na mabele mpe etondi na mayi ya peto.
6 But the other that is alive he shall dip, with the cedar wood, and the scarlet and the hyssop, in the blood of the sparrow that is immolated:
Bongo akokamata ndeke ya mibale, ya bomoi, elongo na eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope; akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo bawuti kokata kingo na likolo ya mayi ya peto;
7 Wherewith he shall sprinkle him that is to be cleansed seven times, that he may be rightly purified: and he shall let go the living sparrow, that it may fly into the field.
akosopa makila yango mbala sambo na nzoto ya moto oyo asengeli kopetolama na maba. Sima na yango, Nganga-Nzambe akotatola ete moto yango akomi peto; mpe akotika ndeke oyo ya bomoi kopumbwa mpe kokende na zamba.
8 And when the man hath washed his clothes, he shall shave all the hair of his body, and shall be washed with water: and being purified, he shall enter into the camp, yet so that he tarry without his own tent seven days:
Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo.
9 And on the seventh day he shall shave the hair of his head, and his beard and his eyebrows, and the hair of all his body. And having washed again his clothes, and his body,
Na mokolo ya sambo, akokata lisusu bapwale na ye, suki na ye ya moto mpe ya miso, mandefu na ye mpe bapwale nyonso mosusu; akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi. Na bongo, akozala peto.
10 On the eighth day he shall take two lambs without blemish, and an ewe of a year old without blemish, and three tenths of flour tempered with oil for a sacrifice, and a sextary of oil apart.
Na mokolo ya mwambe, akokamata bana meme mibale ezanga mbeba elongo na meme moko ya mwasi ezanga mbeba mpe esili kokokisa mobu moko, kilo libwa ya farine basangisa na mafuta lokola, likabo ya bambuma, mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.
11 And when the priest that purifieth the man, hath presented him, and all these things before the Lord, at the door of the tabernacle of the testimony,
Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala ya kopetola akotia ye elongo na makabo na ye liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
12 He shall take a. lamb, and offer it for a trespass offering with the sextary of oil: and having offered all before the Lord,
Nganga-Nzambe akozwa mwana meme ya liboso mpe akobonza yango elongo na kati-kati ya litele moko ya mafuta lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani; akotombola yango liboso ya Yawe.
13 He shall immolate the lamb, where the victim for sin is wont to be immolated, and the holocaust, that is, in the holy place: for as that which is for sin, so also the victim for a trespass offering pertaineth to the priest: it is holy of holies.
Akokata mwana meme yango kingo na esika oyo babomaka banyama oyo babonzi epai ya Nzambe lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu mpe lokola mbeka ya kotumba, kati na esika yango ya bule; pamba te, ezala mbeka mpo na kozongisa boyokani to mbeka mpo na bolimbisi masumu, ezali ya Nganga-Nzambe: ezali eloko ya bule koleka.
14 And the priest taking of the blood of the victim that was immolated for trespass, shall put it upon the tip of the right ear of him that is cleansed, and upon the thumb of his right hand and the great toe of his right foot:
Nganga-Nzambe akozwa makila ya mbeka oyo ebonzami mpo na kozongisa boyokani, akopakola yango na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali.
15 And he shall pour of the sextary of oil into his own left. hand,
Nganga-Nzambe akokamata kati-kati ya litele ya mafuta mpe akosopa ndambo na yango na loboko na ye ya ngambo ya mwasi.
16 And shall dip his right finger in it, and sprinkle it before the Lord seven times.
Nganga-Nzambe akozindisa, kati na mafuta oyo asili kosopa na loboko na ye ya ngambo ya mwasi, mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe akosalela yango mpo na kosopa mbala sambo mafuta liboso ya Yawe.
17 And the rest of the oil in his left band, he shall pour upon the tip of the right ear of him that is cleansed, and upon the thumb of his right hand and the great toe of his right foot, and upon the blood that was shed for trespass,
Bongo kati na mafuta oyo ekotikala ye na loboko, Nganga-Nzambe akokamata ndambo na yango mpo na kopakola na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali, kaka na esika oyo awuti kotia makila ya mwana meme oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani.
18 And upon his head.
Bongo Nganga-Nzambe akosopa, na moto ya moto oyo azali komipetola, mafuta oyo ekotikala na loboko na ye mpo na kosala, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu na ye.
19 And he shall pray for him before the Lord, and shall offer the sacrifice for sin: then shall he immolate the holocaust,
Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza, liboso ya Nzambe, mbeka mpo na masumu, mpo ete asala mosala ya bolimbisi masumu ya moto oyo azali komipetola na mbindo na ye; mpe akokata lisusu kingo ya nyama oyo ebonzami lokola mbeka ya kotumba.
20 And put it on the altar with the libations thereof, and the man shall be rightly cleansed.
Nganga-Nzambe akotia mbeka yango na likolo ya etumbelo elongo na makabo ya farine. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango, mpe akozala peto.
21 But if he be poor, and his hand cannot find the things aforesaid: he shall take a lamb for an offering for trespass, that the priest may pray for him, and a tenth part of hour tempered with oil for a sacrifice, and a sextary of oil,
Soki moto yango azali mobola, bongo akoki kozwa te biloko wana nyonso, akokamata kaka mwana meme moko lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kobonza yango mpo na mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango; akobakisa na likolo na yango lokola makabo bakilo misato ya farine basangisa na mafuta mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta.
22 And two turtles or two young pigeons, of which one may be for sin, and the other for a holocaust:
Akobonza lisusu bibenga mibale kolanda bozwi na ye: moko lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mosusu lokola mbeka ya kotumba.
23 And he shall offer them on the eighth day of his purification to the priest, at the door of the tabernacle of the testimony before the Lord.
Na mokolo ya mwambe, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, liboso ya Yawe, mpo na kopetolama na ye.
24 And the priest receiving the lamb for trespass, and the sextary of oil, shall elevate them together.
Nganga-Nzambe akokamata mafuta mpe mwana meme oyo ebonzami lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mpe akobonza yango epai na Yawe.
25 And the lamb being immolated, he shall put of the blood thereof upon the tip of the right ear of him that is cleansed, and upon the thumb of his right hand, and the great toe of his right foot:
Akokata kingo ya mwana meme yango oyo ebonzami lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Nganga-Nzambe akotia makila ya mbeka mpo na bolimbisi masumu, na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali.
26 But he shall pour part of the oil into his own left hand,
Nganga-Nzambe akosopa lisusu ndambo ya mafuta na loboko na ye ya ngambo ya mwasi.
27 And dipping the finger of his right hand in it, he shall sprinkle it seven times before the Lord:
Mpe na nzela ya mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali, Nganga-Nzambe akokamata mpe akosopa mafuta yango mbala sambo, liboso ya Yawe.
28 And he shall touch the tip of the right ear of him that is cleansed, and the thumb of his right hand and the great toe of his right foot, in the place of the blood that was shed for trespass.
Nganga-Nzambe akokamata ndambo mosusu mpe akotia yango na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali, ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi na ye liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali, mpe na bisika oyo atiaki makila ya mbeka mpo na bolimbisi masumu.
29 And the other part of the oil that is in his left hand, he shall pour upon the head of the purified person, that he may appease the Lord for him.
Bongo mpo na ndambo ya makila oyo ekotikala na loboko na ye ya mwasi, Nganga-Nzambe akosopa yango na moto ya moto oyo azali komipetola, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na ye liboso ya Yawe.
30 And he shall offer a turtle, or young pigeon,
Nganga-Nzambe akozwa moko kati na bibenga mibale oyo moto wana abonzi kolanda bozwi na ye
31 One for trespass, and the other for a holocaust, with their libations.
mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu; bongo akobonza ebenga mosusu lokola mbeka ya kotumba elongo na makabo ya farine. Mpe Nganga-Nzambe akosala liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu ya moto oyo azali komipetola. ›
32 This is the sacrifice of a leper, that is not able to have all things that appertain to his cleansing.
Wana nde mibeko oyo ezali kotala moto oyo abeli bokono ya maba, oyo azali penza na makoki te mpo na kopetolama na ye. »
33 And the Lord spoke to Moses and Aaron, saying:
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
34 When you shall be come into the land of Chanaan, which I will give you for a possession, if there be the plague of leprosy in a house,
« Tango bokokota na mokili ya Kanana oyo napesi bino, soki natie litono ya maba na ndako moko ya mokili oyo napesi bino,
35 He whose house it is, shall go and tell the priest, saying: It seemeth to me, that there is the plague of leprosy in my house,
nkolo ndako asengeli kokende koloba boye epai ya Nganga-Nzambe: ‹ Namoni litono ya maba kati na ndako na ngai. ›
36 And he shall command, that they carry forth all things out of the house, before he go into it, and see whether it have the leprosy, lest all things become unclean that are in the house. And afterwards he shall go in to view the leprosy of the house.
Bongo Nganga-Nzambe akopesa mitindo ya kobima na ndako yango liboso ete ye akota kuna mpo na kotala malamu litono yango. Bongo akoloba ete biloko nyonso kati na ndako yango ezali peto. Sima na yango, Nganga-Nzambe akokota kati na yango mpo na kotala malamu.
37 And if he see in the walls thereof as it were little dints, disfigured with paleness or redness, and lower than all the rest,
Akobanda kotala malamu litono yango kati na mir. Soki amoni ete ezwi langi ya mayi ya pondu to ya motane mpe esali lidusu kati na mir,
38 He shall go out of the door of the house, and forthwith shut it up seven days,
Nganga-Nzambe asengeli kobima wuta na ndako mpe kotelema na ekotelo na yango; bongo akokanga ndako yango mpo na mikolo sambo.
39 And returning on the seventh day, he shall look upon it. If he find that the leprosy is spread,
Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akozonga mpo na kotala lisusu malamu. Soki litono yango epanzani kati na mir,
40 He shall command, that the stones wherein the leprosy is, be taken out, and cast without the city into an unclean place:
Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete balongola mabanga oyo ebebi na matono mpe babwaka yango libanda ya engumba na esika ya mbindo.
41 And that the house be scraped on the inside round about, and the dust of the scraping be scattered without the city into an unclean place:
Bongo akosenga ete bakokola mir nyonso na ngambo na yango ya kati mpe babwaka libanda ya engumba na esika ya mbindo mabele nyonso oyo bakokola.
42 And that other stones be laid in the place of them that were taken away, and the house be plastered with other mortar.
Sima, bakozongisa mabanga mosusu na bisika oyo balongolaki mpe bakozwa mabele mosusu mpo na kopakola ndako.
43 But if, after the stones be taken out, and the dust scraped off, and it be plastered with other earth,
Sima na kolongola mabanga oyo ebebaki, kokokola bamir mpe kopakola mabele mosusu, soki litono esalemi lisusu,
44 The priest going in perceive that the leprosy is returned, and the walls full of spots, it is a lasting leprosy, and the house is unclean:
Nganga-Nzambe akokende kotala lisusu malamu: soki amoni solo ete litono esalemi lisusu mpe epanzani, wana elakisi ete maba ezali kati na ndako mpe ndako yango ekokoma mbindo.
45 And they shall destroy it forthwith, and shall cast the stones and timber thereof, and all the dust without the town into an unclean place.
Boye bakokweyisa ndako yango: mabanga mpe mabaya na yango nyonso ekobwakama na libanda ya engumba na esika ya mbindo.
46 He that entereth into the house when it is shut, shall be unclean until evening,
Na mikolo nyonso oyo ndako ekozala ya kokangama, moto nyonso oyo akokota akozala mbindo kino na pokwa.
47 And he that sleepeth in it, and eateth any thing, shall wash his clothes.
Moto nyonso oyo akolekisa butu to kolia kati na ndako yango, asengeli kosukola bilamba na ye.
48 But if the priest going in perceive that the leprosy is not spread in the house, after it was plastered again, he shall purify it, it being cured,
Nzokande, soki na ngonga ya kotala malamu ndako sima na kopakola yango mabele, Nganga-Nzambe amoni te kobima ya litono, wana akoloba ete ndako yango ezali peto, pamba te mbindo na yango esili kolongwa.
49 And for the purification thereof he shall take two sparrows, and cedar wood, and scarlet, and hyssop:
Boye mpo na kopetolama na yango, Nganga-Nzambe akozwa bandeke mibale, mabaya ya sedele, eteni ya elemba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope;
50 And having immolated one sparrow In an earthen vessel over living waters,
akokata kingo ya ndeke ya liboso na likolo ya sani oyo basala na mabele mpe ezali na mayi ya peto kati na yango.
51 He shall take the cedar wood, and the hyssop, and the scarlet, and the living sparrow, and shall dip all in the blood of the sparrow that is immolated, and in the living water, and he shall sprinkle the house seven times:
Akokamata mabaya ya sedele, eteni ya nzete ya izope, eteni ya elamba ya motane makasi mpe ndeke mosusu, akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo asilaki kokata kingo mpe kati na mayi ya peto oyo akobwaka na likolo ya ndako mbala sambo.
52 And shall purify it as well with the blood of the sparrow, as with the living water, and with the living sparrow, and with the cedar wood, and the hyssop, and the scarlet.
Akopetola ndako na nzela ya makila ya ndeke, ya mayi ya peto, ya ndeke oyo ezali na bomoi, ya mabaya ya sedele, ya eteni ya nzete ya izope mpe ya eteni ya elamba ya motane.
53 And when he hath let go the sparrow to fly freely away into the field, he shall pray for the house, and it shall be rightly cleansed.
Bongo akotika ndeke oyo etikalaki ya bomoi kokende na zamba, na libanda ya engumba. Ezali ndenge wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu ya ndako; mpe ndako yango ekokoma peto. »
54 This is the law of every kind of leprosy and stroke.
Wana nde mibeko oyo etali lolenge nyonso ya maba, litono,
55 Of the leprosy of garments and houses,
maba ya elamba mpe ya ndako,
56 Of a scar and of blisters breaking out, of a shining spot, and when the colours are diversely changed:
bambuma ya mike-mike, mapalata mpe matono oyo ezali kongenga,
57 That it may be known when a thing is clean or unclean.
mpo na kotalisa soki moto azali mbindo to te. Yango nde mibeko oyo etali maba.

< Leviticus 14 >