< Jeremiah 15 >

1 And the Lord said to me: If Moses and Samuel shall stand before me, my soul is not towards this people: cast them out from my sight, and let them go forth.
Yawe alobaki na ngai: « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai! Tika ete bakende mosika na Ngai!
2 And if they shall say unto thee: Whither shall we go forth? thou shalt say to them: Thus saith the Lord: Such as are for death, to death: and such as are to the sword, to the sword: and such as are for famine, to famine: and such as are to captivity, to captivity.
Bongo soki batuni yo: ‹ Tokende wapi? › Zongisela bango: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga bakufa na mopanga! Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi bakufa na nzala makasi! Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu bakende na bowumbu! ›
3 And I will visit them with four kinds, saith the Lord: The sword to kill, and the dogs to tear, and the fowls of the air, and the beasts of the earth, to devour and destroy.
Nakotindela bango babomi ya lolenge minei, » elobi Yawe: « mopanga, mpo na koboma bango; mbwa mpo na koswa mpe kobenda bango; banyama ya zamba mpe bandeke oyo eliaka misuni mpo na kolia mpe kopanza bango.
4 And I will give them up to the rage of all the kingdoms of the earth: because of Manasses the son of Ezechias the king of Juda, for all that he did in Jerusalem.
Nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, na miso ya bato ya bikolo nyonso ya mokili mpo na makambo nyonso oyo Manase, mwana mobali ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, asalaki kati na Yelusalemi.
5 For who shall have pity on thee, O Jerusalem? or who shall bemoan thee? or who shall go to pray for thy peace?
Oh Yelusalemi, nani akoyokela yo mawa? Nani akolela yo? Nani akotelema mpo na kotuna basango na yo?
6 Thou hast forsaken me, saith the Lord, thou art gone backward: and I will stretch out my hand against thee, and I will destroy thee: I am weary of entreating thee.
Osundolaki Ngai, » elobi Yawe, « opesaki Ngai mokongo. Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo, mpe nakobebisa yo; nakoyokela yo lisusu mawa te.
7 And I will scatter them with a fan in the gates of the land: I have killed and destroyed my people, and yet they are not returned form their ways.
Nakoyungola bango na nzela ya bipepelo na bikuke ya engumba, nakobotola bango bana na bango mpe nakoboma bato na Ngai, pamba te babongoli bizaleli na bango te.
8 Their widows are multiplied unto me above the sand of the sea: I have brought upon them against the mother of the young man a spoiler at noonday: I have cast a terror on a sudden upon the cities.
Basi na bango oyo bakufisa mibali, nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene. Na ngonga ya midi, nakoyeisa mobebisi mpo na koboma bamama ya bana na bango; nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata.
9 She that hath borne seven is become weak, her soul hath fainted away: her sun is gone down, while it was yet day: she is confounded, and ashamed: and the residue of them I will give up to the sword in the sight of their enemies, saith the Lord.
Mama ya bana sambo akolemba nzoto mpe akopema na pasi makasi. Moyi na ye ekolala wana mokolo ezali nanu kowumela: akoyokisama soni mpe akosambwa. Nakoboma na mopanga, bato oyo bakotikala na bomoi liboso ya banguna na bango, » elobi Yawe.
10 Woe is me, my mother: why hast thou borne me a man of strife, a man of contention to all the earth? I have not lent on usury, neither hath any man lent to me on usury: yet all curse me.
Oh mama na ngai, mawa na ngai! Mpo na nini obotaki ngai! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe.
11 The Lord saith to me: Assuredly it shall be well with thy remnant, assuredly I shall help thee in the time of affliction, and in the time of tribulation against the enemy.
Yawe alobaki: « Solo, nakokangola yo mpo na bolamu na yo; solo, nakosala ete banguna na yo babondela yo na tango ya pasi mpe ya minyoko.
12 Shall iron be allied with the iron from the north, and the brass?
Boni, moto akoki penza kobuka ebende? Ebende oyo ewuta penza na nor to ebende ya bronze?
13 Thy riches and thy treasures I will give unto spoil for nothing, because of all thy sins, even in all thy borders.
Nakosala ete babotola bino biloko mpe bomengo na bino; bongo bakofuta bino yango te mpo na masumu na bino nyonso oyo bosalaki kati na mokili na bino mobimba.
14 And I will bring thy enemies out of a land, which thou knowest not: for a fire is kindled in my rage, it shall burn upon you.
Nakokomisa bino bawumbu ya banguna na bino kati na mokili oyo botikala ata koyeba te, pamba te kanda na Ngai ekopela lokola moto oyo ekotumba bino. »
15 O Lord, thou knowest, remember me, and visit me, and defend me from them that persecute me, do not defend me in thy patience: know that for thy sake I have sufferred reproach.
Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, kanisa ngai mpe batela ngai. Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te! Tala ndenge nazali kondima koyoka soni kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo!
16 Thy words were found, and I did eat them, and thy word was to me a joy and gladness of my heart: for thy name is called upon me, O Lord God of hosts.
Tango kaka nayokaki maloba na Yo, nayambaki yango na esengo; maloba yango esepelisaki ngai mpe etondisaki motema na ngai na esengo; pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.
17 I sat not in the assembly of jesters, nor did I make a boast of the presence of thy hand: I sat alone, because thou hast filled me with threats.
Natikala kovanda te kati na batioli to mpe kosepela elongo na bango. Natikalaki kaka ngai moko, pamba te loboko na yo ezalaki likolo na ngai mpe otondisaki ngai na kanda.
18 Why is my sorrow become perpetual, and my wound desperate so as to refuse to be healed? it is become to me as the falsehood of deceitful waters that cannot be trusted.
Mpo na nini pasi na ngai esilaka te mpe pota na ngai ya monene esilaka te? Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta, lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te.
19 Therefore thus saith the Lord: If thou wilt be converted, I will convert thee, and thou shalt stand before my face; and if thou wilt separate the precious from the vile, thou shalt be as my mouth: they shall be turned to thee, and thou shalt not be turned to them.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Soki ozongi epai na Ngai, nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai; soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina, kasi maloba ya pamba-pamba te, okozala molobeli na Ngai. Tika ete bato oyo balanda yo; kasi yo, kolanda bango te.
20 And I will make thee to this people as a strong wall of brass: and they shall fight against thee, and shall not prevail: for I am with thee to save thee, and to deliver thee, saith the Lord.
Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, mir moko ya makasi penza, mir ya bronze; bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » elobi Yawe.
21 And I will deliver thee out of the hand of the wicked, and I will redeem thee out of the hand of the mighty.
« Nakobikisa yo na maboko ya bato mabe mpe nakokangola yo na maboko ya bato oyo banyokolaka yo. »

< Jeremiah 15 >