< Ezekiel 24 >

1 And the word of the Lord came to me in the ninth year, in the tenth month, the tenth day of the month, saying:
Na mokolo ya zomi ya sanza ya zomi, na mobu ya libwa, Yawe alobaki na ngai:
2 Son of man, write thee the name of this day, on which the king of Babylon hath set himself against Jerusalem today.
« Mwana na moto, koma mokolo oyo kati na buku, mokolo ya lelo, pamba te ezali na mokolo oyo nde mokonzi ya Babiloni azingelaki engumba Yelusalemi.
3 And thou shalt speak by a figure a parable to the provoking house, and say to them: Thus saith the Lord God: Set on a pot, set it on, I say, and put water into it.
Loba na libota oyo ya batomboki lisese oyo; yebisa bango: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Kamata nzungu moko ya kolambela, bongisa yango mpe tia mayi kati na yango.
4 Heap together into if the pieces thereof, every good piece, the thigh and the shoulder, choice pieces and full of bones.
Tia biteni ya misuni kati na yango, biteni nyonso ya malamu: lokolo mpe lipeka; tondisa yango na mikuwa ya malamu.
5 Take the fattest of the flock, and lay together piles of bones under it: the seething thereof is boiling hot, and the bones thereof are thoroughly sodden in the midst of it.
Kamata bameme oyo ezanga mbeba kati na etonga mpe sangisa bakoni na se ya nzungu yango; pelisa moto mpe tokisa nzungu yango kino mikuwa ekobela penza!
6 Therefore thus saith the Lord God: Woe to the bloody city, to the pot whose rust is in it, and its rust is not gone out of it: cast it out piece by piece, there hath no lot fallen upon it.
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na engumba oyo esopaka makila, nzungu ya salite, nzungu oyo elongwaka salite te! Tika yango pamba, longola eteni moko na moko kino nyonso ekosila na kobeta zeke te.
7 For her blood is in the midst of her, she hath shed it upon the smooth rock: she hath not shed it upon the ground, that it might be covered with dust.
Pamba te makila oyo esopaki ezali kati na yango; esopaki yango na likolo ya libanga, esopaki yango na mabele te epai wapi putulu ekokaki kozipa yango.
8 And that I might bring my indignation upon her, and take my vengeance: I have shed her blood upon the smooth rock, that it should not be covered.
Mpo na kopelisa kanda na Ngai mpe kozongisela yango mabe na mabe, natie makila na yango na likolo ya mabanga mpo ete ebombama te.
9 Therefore thus saith the Lord God: Woe to the bloody city, of which I will make a great bonfire.
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mawa na engumba oyo esopaka makila! Ngai mpe nakosangisela yo bakoni ebele.
10 Heap together the bones, which I will burn with Are: the flesh shall be consumed, and the whole composition shall be sodden, and the bones shall be consumed.
Sangisa bakoni mpe pelisa moto. Lamba misuni malamu, sangisa yango na biloko mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka mpe sala ete mikuwa ezika.
11 Then set it empty upon burning coals, that it may be hot, and the brass thereof may be melted: and let the filth of it be melted in the midst thereof, and let the rust of it be consumed.
Bongo tia nzungu ya pamba na likolo ya makala ya moto kino ekoma moto mpe linzanza na yango ekoma motane, mpo ete mbindo na yango elongwa mpe konzuluka na yango ekende na moto.
12 Great pains have been taken, and the great rust thereof is not gone out, not even by fire.
Kasi konzuluka na yango esilisi makasi ya bato, bosoto na yango etikali kolongwa te! Ezala moto, elongi te kolongola bosoto yango!
13 Thy uncleanness is execrable: because I desired to cleanse thee, and thou art not cleansed from thy filthiness: neither shalt thou be cleansed, before I cause my indignation to rest in thee.
Yelusalemi, mbindo na yo ezali kindumba. Nalukaki kokomisa yo peto, kasi olingaki kopetolama te na bosoto na yo. Okotikala lisusu kozala peto te kino tango nakosilisa kosopela yo kanda na Ngai.
14 I the Lord have spoken: it shall come to pass, and I will do it: I will not pass by, nor spare, nor be pacified: I will judge thee according to thy ways, and according to thy doings, saith the Lord.
Ngai Yawe nde nalobaki. Tango ekoki mpo na Ngai kosala; nakoyoka mawa te, nakozonga sima te! Okosambisama solo kolanda etamboli mpe misala na yo, elobi Nkolo Yawe. › »
15 And the word of the Lord came to me, saying:
Yawe alobaki na ngai:
16 Son of man, behold I take from thee the desire of thy eyes with a stroke: and thou shalt not lament, nor weep: neither shall thy tears run down.
« Mwana na moto, nakolongola, na nzela ya kufa ya pwasa, mwasi oyo asepelisaka motema na yo. Kasi komitungisa te, kolela te mpe kotangisa mpinzoli te.
17 Sigh in silence, make no mourning for the dead: let the tire of thy head be upon thee, and thy shoes on thy feet, and cover not thy face, nor eat the meat of mourners.
Lela na se ya motema, kosala matanga na tina na ye te. Kanga kitendi na moto na yo mpe tia sandale na makolo na yo; kozipa mandefu ya elongi na yo te mpe kolia bilei ya matanga te, ndenge ezali ezaleli ya bokoko na bino. »
18 So I spoke to the people in the morning, and my wife died in the evening: and I did in the morning as he had commanded me.
Boye, na tongo, nasololaki na bato; bongo na pokwa, mwasi na Ngai akufaki. Na tongo ya mokolo oyo elandaki, nasalaki kolanda mitindo oyo epesamelaki ngai.
19 And the people said to me: Why dost thou not tell us what these things mean that thou doest?
Boye, bato batunaki ngai: — Okoki koyebisa biso te soki makambo oyo ozali kosala elakisi nini?
20 And I said to them: The word of the Lord came to me, saying:
Nazongiselaki bango: — Yawe alobaki na ngai:
21 Speak to the house of Israel: Thus saith the Lord God: Behold I will profane my sanctuary, the glory of your realm, and the thing that your eyes desire, and for which your soul feareth: your sons, and your daughters, whom you have left, shall fall by the sword.
« Yebisa libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakomi pene ya kosambwisa bosantu ya Esika na Ngai ya bule oyo esalaka lolendo na bino, oyo esepelisaka miso na bino mpe esalaka esengo ya mitema na bino. Bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo botikaki na Yelusalemi bakokufa na mopanga.
22 And you shall do as I have done: you shall not cover your faces, nor shall you eat the meat of mourners.
Boye, bokosala ndenge Ngai nasali: bokozipa mandefu na bino te mpe bokolia bilei ya matanga te;
23 You shall have crowns on your heads, and shoes on your feet: you shall not lament nor weep, but you shall pine away for your iniquities, and every one shall sigh with his brother.
bokokanga bitendi na mito na bino mpe bokolata basandale na makolo na bino, bokosala matanga te mpe bokolela te, kasi bokomona pasi mpo na masumu na bino mpe bokokoma kolelalela kati na bino.
24 And Ezechiel shall be unto you for a sign of things to come: according to all that he hath done, so shall you do, when this shall come to pass: and you shall know that I am the Lord God.
Ezekieli akozala lokola elembo mpo na bino: bokosala ndenge kaka ye asalaki. Tango makambo oyo ekosalema, bokososola ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. ›
25 And thou, O son of man, behold in the day wherein I will take away from them their strength, and the joy of their glory, and the desire of their eyes, upon which their souls rest, their sons and their daughters.
Bongo yo, mwana na moto; na mikolo ekoya, nakobotola bandako na bango oyo batonga makasi mpe batielaka motema, oyo esalaka esengo mpe lokumu na bango, oyo esepelisaka miso na bango mpe esalaka esengo ya mitema na bango; nakobotola lisusu bana na bango ya mibali mpe ya basi.
26 In that day when he that escapeth shall come to thee, to tell thee:
Na mokolo wana, moto moko akokima mpe akoya kopesa yo basango.
27 In that day, I say, shall thy mouth be opened to him that hath escaped, and thou shalt speak, and shalt be silent no more: and thou shalt be unto them for a sign of things to come, and you shall know that I am the Lord.
Na mokolo wana, monoko na yo ekofungwama, okosolola na monoko yango mpe okokanga lisusu yango te. Boye, okozala elembo mpo na bango mpe bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. »

< Ezekiel 24 >