< 2 Corinthians 5 >

1 For we know, if our earthly house of this habitation be dissolved, that we have a building of God, a house not made with hands, eternal in heaven. (aiōnios g166)
Toyebi malamu ete, soki ndako na biso, ndako oyo ya kapo epai wapi tovandaka awa na mokili ebebisami, tozali na ndako oyo Nzambe abongisela biso, ndako ya seko kati na Lola, ndako monene oyo etongama na maboko ya bato te. (aiōnios g166)
2 For in this also we groan, desiring to be clothed upon with our habitation that is from heaven.
Nzokande, kati na ndako yango ya kapo, tozali penza komona pasi, wana tozali kozela na posa makasi ete tolata ndako na biso ya Lola,
3 Yet so that we be found clothed, not naked.
pamba te soki penza tolati yango, tokozala motakala te.
4 For we also, who are in this tabernacle, do groan, being burthened; because we would not be unclothed, but clothed upon, that that which is mortal may be swallowed up by life.
Solo, wana tozali nanu kati na ndako oyo ya kapo, tozali penza komona pasi mpe konyokwama, pamba te toboyi kobanda nanu na kolongola, kasi tolingi nde kolata mbala moko ndako na biso ya Lola, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka.
5 Now he that maketh us for this very thing, is God, who hath given us the pledge of the Spirit.
Nzambe oyo abongiseli biso likambo yango apesi biso Molimo na Ye lokola ndanga ya biloko oyo esengeli koya.
6 Therefore having always confidence, knowing that, while we are in the body, we are absent from the Lord.
Yango wana tozalaka na mpiko tango nyonso. Mpe toyebi malamu ete, awa tozali kowumela kati na nzoto oyo, tozali mosika na Nkolo,
7 (For we walk by faith, and not by sight.)
pamba te totambolaka kolanda kondima, kasi kolanda miso te.
8 But we are confident, and have a good will to be absent rather from the body, and to be present with the Lord.
Totondi penza na mpiko, kasi tokosepela kotika nzoto oyo mpo na kokende kovanda elongo na Nkolo.
9 And therefore we labour, whether absent or present, to please him.
Yango wana, ezala tovandi kati na nzoto oyo to totiki yango, tokolukaka kaka kosepelisa Nkolo.
10 For we must all be manifested before the judgement seat of Christ, that every one may receive the proper things of the body, according as he hath done, whether it be good or evil.
Pamba te biso nyonso tokosamba liboso ya esambiselo ya Klisto mpo ete moto nyonso azwa lifuti oyo ekoki na ye kolanda makambo oyo asalaki na nzela ya nzoto na ye, makambo ya malamu to ya mabe.
11 Knowing therefore the fear of the Lord, we use persuasion to men; but to God we are manifest. And I trust also that in your consciences we are manifest.
Lokola toyebi makambo oyo ezali kati na kotosa Nkolo, yango wana tondimisaka bato mosusu, mpe Nzambe ayebi biso malamu. Nazali na elikya ete bino mpe boyebi yango kati na mitema na bino.
12 We commend not ourselves again to you, but give you occasion to glory in our behalf; that you may have somewhat to answer them who glory in face, and not in heart.
Tozali lisusu te komilobela epai na bino, kasi tozali nde kopesa bino libaku malamu ya komikumisa na tina na biso, mpo ete bokoka koyanola bato oyo bamikumisaka te na tina na makambo oyo ebombama kati na mitema, kasi na tina na oyo emonanaka na miso.
13 For whether we be transported in mind, it is to God; or whether we be sober, it is for you.
Mpo na biso, soki tozali komonana lokola bazoba, ezali kaka mpo na Nzambe; mpe soki tozali komonana lokola bato ya mayele, ezali nde mpo na bino.
14 For the charity of Christ presseth us: judging this, that if one died for all, then all were dead.
Solo, bolingo ya Klisto ekangi biso, pamba te tondimisamaki ete moko kaka akufa mpo na bato nyonso; boye elingi koloba ete bato nyonso bakufa kati na ye.
15 And Christ died for all; that they also who live, may not now live to themselves, but unto him who died for them, and rose again.
Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.
16 Wherefore henceforth, we know no man according to the flesh. And if we have known Christ according to the flesh; but now we know him so no longer.
Boye, kobanda sik’oyo, tokotala lisusu moto moko te na ndenge ya bomoto. Atako, na kala, totalaki Klisto na ndenge ya bomoto, kasi sik’oyo tozali lisusu kotala Ye bongo te.
17 If then any be in Christ a new creature, the old things are passed away, behold all things are made new.
Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika: makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.
18 But all things are of God, who hath reconciled us to himself by Christ; and hath given to us the ministry of reconciliation.
Makambo oyo nyonso ewutaka na Nzambe oyo azongisaki boyokani kati na biso mpe Ye moko na nzela ya Klisto mpe apesaki biso lotomo ya boyokanisi.
19 For God indeed was in Christ, reconciling the world to himself, not imputing to them their sins; and he hath placed in us the word of reconciliation.
Pamba te, kati na Klisto, Nzambe azalaki kozongisa boyokani kati na bato mpe Ye moko, na kotala masumu na bango te. Mpe atiaki kati na biso liloba ya boyokanisi.
20 For Christ therefore we are ambassadors, God as it were exhorting by us. For Christ, we beseech you, be reconciled to God.
Yango wana, mpo na Klisto, tozali bantoma, lokola nde Nzambe azali kolendisa bato na nzela na biso: « Na Kombo ya Klisto, tozali kosenga na bino ete bozongisa boyokani na bino elongo na Nzambe.
21 Him, who knew no sin, he hath made sin for us, that we might be made the justice of God in him.
Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »

< 2 Corinthians 5 >