< 2 Chronicles 31 >

1 And when these things had been duly celebrated, all Israel that were found in the cities of Juda, went out, and they broke the idols, and cut down the groves. demolished the high places, and destroyed the altars, not only out of all Juda and Benjamin, but out of Ephraim also and Manasses, till they had utterly destroyed them: then all the children of Israel returned to their possessions and cities.
Tango feti nyonso esilaki, bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kuna bakendeki na bingumba ya Yuda, babukaki makonzi ya bule, bakweyisaki bikeko ya nzambe mwasi Ashera mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo kati na Yuda nyonso, kati na Benjame, kati na Efrayimi mpe kati na Manase. Sima na kobebisa biloko wana nyonso, bato ya Isalaele bazongaki kati na bingumba na bango mpe bandako na bango.
2 And Ezechias appointed companies of the priests, and the Levites, by their courses, every man in his own office, to wit, both of the priests, and of the Levites, for holocausts, and for peace offerings, to minister, and to praise, and to sing in the gates of the camp of the Lord.
Ezekiasi atiaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na masanga mpe apesaki na moko na moko mosala kati na lisanga na ye. Banganga-Nzambe mpe Balevi bapesamelaki mosala ya bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mosala ya kozongisa matondi mpe ya koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe, na bikuke ya Tempelo ya Yawe.
3 And the king’s part was, that of his proper substance the holocaust should be offered always morning and evening, and on the sabbaths, and the new moons and the other solemnities, as it is written in the law of Moses.
Mokonzi azwaki ndambo ya bozwi na ye mpe apesaki mpo na bambeka ya kotumba: bambeka ya kotumba ya tongo mpe ya pokwa, ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, kolanda ndenge ekomama kati na mibeko ya Yawe.
4 He commanded also the people that dwelt in Jerusalem, to give to the priests, and the Levites their portion, that they might attend to the law of the Lord.
Mokonzi apesaki mitindo epai ya bavandi ya Yelusalemi ete bapesa ndambo oyo esengeli kopesama epai ya Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo ete bamipesa na misala oyo mibeko ya Yawe ezali kotinda bango.
5 Which when it was noised abroad in the ears of the people, the children of Israel offered in abundance the firstfruits of corn, wine, and oil, and honey: and brought the tithe of all things which the ground bringeth forth.
Tango kaka bapanzaki sango ya mitindo oyo, bato ya Isalaele bapesaki na esengo bambuma na bango ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, ya mafuta ya nzoyi mpe ya biloko nyonso oyo ebimaka na bilanga. Bamemaki lisusu biloko ebele lokola eteni ya zomi ya nyonso.
6 Moreover the children of Israel and Juda, that dwelt in the cities of Juda, brought in the tithes of oxen, and sheep, and the tithes of holy things, which they had vowed to the Lord their God: and carrying them all, made many heaps.
Bato ya Isalaele elongo na bato ya Yuda oyo bazalaki kovanda kati na bingumba ya Yuda bamemaki eteni na bango ya zomi ya bangombe, ya bameme, ya bantaba mpe ya makabo ya bule oyo ebulisamaki mpo na Yawe, Nzambe na bango, mpe batiaki yango na mipiku.
7 In the third month they began to lay the foundations of the heaps, and in the seventh month, they finished them.
Babandaki kosala mipiku yango na sanza ya misato mpe basilisaki na sanza ya sambo.
8 And when Ezechias and his princes came in, they saw the heaps, and they blessed the Lord and the people of Israel.
Tango Ezekiasi elongo na bakalaka na ye bayaki komona mipiku yango, bakumisaki Yawe mpe bapambolaki Isalaele, bato na Ye.
9 And Ezechias asked the priests and the Levites, why the heaps lay so.
Ezekiasi atunaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na tina na mipiku yango.
10 Azarias the chief priest of the race of Sadoc answered him, saying: Since the firstfruits began to be offered in the house of the Lord, we have eaten, and have been filled, and abundance is left, because the Lord hath blessed his people: and of that which is left is this great store which thou seest.
Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, moto ya libota ya Tsadoki, azongisaki: — Wuta tango bato babandaki komema makabo na bango kati na Tempelo ya Yawe, toliaki, totondaki mpe totiki ebele, pamba te Yawe apambolaki bato na Ye. Mipiku ya biloko oyo ozali komona awa ezali nde oyo etikali.
11 Then Ezechias commanded to prepare storehouses in the house of the Lord. And when they had done so,
Ezekiasi apesaki mitindo ete babongisa bisika mpo na kobomba biloko yango kati na Tempelo ya Yawe; mpe esalemaki bongo.
12 They brought in faithfully both the firstfruits, and the tithes, and all they had vowed. And the overseer of them was Chonenias the Levite, and Semei his brother was the second,
Bakomaki kotia kuna na boyengebene makabo ya bato, biteni ya zomi mpe makabo mosusu ya bule. Molevi Konania azalaki na mokumba ya kobatela biloko yango elongo na Shimei, ndeko na ye ya mobali, lokola molandi na ye.
13 And after him Jehiel, and Azarias, and Nahath, and Asael, and Jerimoth, and Jozabad, and Eliel, and Jesmachias, and Mahath, and Banaias, overseers under the hand of Chonenias, and Semei his brother, by the commandment of Ezechias the king, and Azarias the high priest of the house of God, to whom all things appertained.
Kolandisama na mokano ya mokonzi Ezekiasi mpe ya Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe ya Tempelo ya Nzambe, Yeyeli, Azazia, Naati, Asaeli, Yerimoti, Yozabadi, Elieli, Yisimakia, Maati mpe Benaya bazalaki bakengeli ya misala na bokambami ya Konania mpe Shimei, ndeko na ye ya mobali.
14 But Core the son of Jemna the Levite, the porter of the east gate, was overseer of the things which were freely offered to the Lord, and of the firstfruits and the things dedicated for the holy of holies.
Molevi Kore, mwana mobali ya Yimina, oyo azalaki mokengeli ekuke ya ngambo ya este azalaki na mokumba ya koyamba makabo oyo bato bazalaki kopesa epai ya Nzambe, wuta na mokano ya mitema na bango; azalaki mpe na mokumba ya kokabola makabo oyo bazalaki kokongola mpo na Yawe mpe makabo ya bule.
15 And under his charge were Eden, and Benjamin, Jesue, and Semeias, and Amarias, and Sechenias, in the cities of the priests, to distribute faithfully portions to their brethren, both little and great:
Kati na bingumba ya Banganga-Nzambe, Kore asungamaki na Edeni, Minyamini, Jozue, Shemaya, Amaria mpe Shekania, mpo na kokabola biloko na boyengebene epai ya bandeko na bango Banganga-Nzambe kolanda masanga na bango; bazalaki kosala bokeseni te kati na bato minene mpe bato mike.
16 Besides the males from three years old and upward, to all that went into the temple of the Lord, and whatsoever there was need of in the ministry, and their offices according to their courses, day by day.
Bazalaki kopesa kaka te na mibali oyo bakombo na bango ekomamaki, kobanda na mibu misato ya mbotama mpe komata, kasi bazalaki mpe kopesa na bato nyonso oyo bazalaki kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kosala misala na bango ya mokolo na mokolo kolanda mikumba mpe masanga na bango.
17 To the priests by their families, and to the Levites from the twentieth year and upward, by their classes and companies.
Bapesaki na Banganga-Nzambe oyo bakombo na bango ekomamaki kolanda mabota na bango ya botata mpe na Balevi oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda mibu tuku mibale mpe komata, kolanda mikumba mpe masanga na bango;
18 And to all the multitude, both to their wives, and to their children of both sexes, victuals were given faithfully out of the things that had been sanctified.
bapesaki na bana mike nyonso, na basi, na bana mibali mpe na bana basi ya lisanga mobimba, ba-oyo bakombo na bango ekomamaki kati na buku ya milongo ya mbotama, pamba te bazalaki kokokisa na boyengebene mibeko ya libulisi mpo na kozala bule.
19 Also of the sons of Aaron who were in the fields and in the suburbs of each city, there were men appointed, to distribute portions to all the males, among the priests and the Levites.
Lokola ndenge ezalaki mpo na Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo bazalaki kovanda na bamboka ya zingazinga ya bingumba na bango, bato baponamaki na bakombo mpo na kokabola biloko epai ya bato nyonso kati na Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi nyonso oyo bakomamaki.
20 So Ezechias did all things, which we have said in all Juda, and wrought that which was good; and right, and truth, before the Lord his God,
Ezali boye nde Ezekiasi asalaki kati na mokili na ye mobimba ya Yuda. Asalaki makambo ya malamu, ya sembo mpe ya solo na miso ya Yawe, Nzambe na ye.
21 In all the service of the ministry of the house of the Lord according to the law and the ceremonies, desiring to seek his God with all his heart, and he did it and prospered,
Kati na nyonso oyo Ezekiasi asalaki, ezala mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe to mpo na botosi mibeko mpe mitindo, azalaki koluka Nzambe na ye mpe kosala na motema na ye mobimba; mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala.

< 2 Chronicles 31 >