< 1 Kings 1 >

1 Now king David was old, and advanced in years: and when he was covered with clothes, he was not warm.
Tango mokonzi Davidi akomaki mobange makasi, azalaki lisusu koyoka moto te na nzoto, ezala bafiniki ye bilamba ebele.
2 His servants therefore said to him: Let us seek for our lord the king, a young virgin, and let her stand before the king, and cherish him, and sleep in his bosom, and warm our lord the king.
Boye, basali ya Davidi balobaki na ye: « Tika ete tolukela mokonzi elenge mwasi moko oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpo ete azala pene ya mokonzi, abatela ye mpe alala mbeto moko na ye; mpe mpo ete mokonzi, nkolo na biso, ayoka lisusu moto na nzoto! »
3 So they sought a beautiful young woman in all the coasts of Israel, and they found Abisag a Sunamitess, and brought her to the king.
Boye, balukaki kati na Isalaele mobimba elenge mwasi moko ya kitoko; bamonaki Abishagi, moto ya mboka Sunami, mpe bamemaki ye epai ya mokonzi.
4 And the damsel was exceeding beautiful, and she slept with the king: and served him, but the king did not know her.
Elenge mwasi yango azalaki kitoko mingi, akomaki kobatela mokonzi mpe kosalela ye; kasi mokonzi atikalaki te kosangisa na ye nzoto.
5 And Adonias the son of Haggith exalted himself, saying: I will be king. And he made himself chariots and horsemen, and fifty men to run before him.
Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye: « Ngai nde nakozala mokonzi! » Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli.
6 Neither did his father rebuke him at any time, saying: Why hast thou done this? And he also was very beautiful, the next in birth after Absalom.
Nzokande, tata na ye atikalaki kopamela ye ata mokolo moko te mpe kotuna ye: « Mpo na nini ozali kosala boye? » Adoniya azalaki penza kitoko mpe abotamaki sima na Abisalomi.
7 And he conferred with Joab the son of Sarvia, and with Abiathar the priest, who furthered Adonias’s side.
Adoniya asololaki na Joabi, mwana mobali ya Tseruya, mpe na Nganga-Nzambe Abiatari; mpe bango bandimaki kosunga ye.
8 But Sadoc the priest, and Banaias the son of Joiada, and Nathan the prophet, and Semei, and Rei, and the strength of David’s army was not with Adonias.
Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya.
9 And Adonias having slain rams and calves, and all fat cattle by the stone of Zoheleth, which was near the fountain Rogel, invited all his brethren the king’s sons, and all the men of Juda, the king’s servants:
Adoniya abonzaki na libanga ya Zoeleti bambeka ebele ya bameme, ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, pembeni ya Eyini-Rogeli; abengisaki bandeko na ye nyonso ya mibali, bana mibali ya mokonzi, mpe bato nyonso ya Yuda oyo bazalaki kosala epai ya mokonzi.
10 But Nathan the prophet, and Banaias, and all the valiant men, and Solomon his brother, he invited not.
Kasi abengisaki te mosakoli Natan, Benaya, bakengeli ya mokonzi mpe Salomo, ndeko na ye ya mobali.
11 And Nathan said to Bethsabee the mother of Solomon: Hast thou not heard that Adonias the son of Haggith reigneth, and our lord David knoweth it not?
Natan atunaki Batisheba, mama ya Salomo: — Boni, oyoki te ete Adoniya, mwana mobali ya Agite, akomi mokonzi; kasi mokonzi Davidi ayebi te?
12 Now then come, take my counsel and save thy life, and the life of thy son Solomon.
Sik’oyo, tika ete napesa yo toli oyo ekobikisa bomoi na yo mpe bomoi ya Salomo, mwana na yo ya mobali.
13 Go, and get thee in to king David, and say to him: Didst not thou, my lord O king, swear to me thy handmaid, saying: Solomon thy son shall reign after me, and he shall sit on my throne? why then doth Adonias reign?
Kota epai ya mokonzi Davidi mpe loba na ye: « Mokonzi, nkolo na ngai, olapaki ndayi te liboso na ngai mwasi mowumbu na yo: ‹ Solo, Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi? › Boye mpo na nini Adoniya akomi mokonzi? »
14 And while thou art yet speaking there with the king, I will come in after thee, and will fill up thy words.
Wana okozala nanu koloba na mokonzi, ngai mpe nakokota mpe nakobeta sete na maloba na yo.
15 So Bethsabee went in to the king into the chamber: now the king was very old, and Abisag the Sunamitess ministered to him.
Batisheba akendeki kotala mokonzi kati na shambre. Mokonzi akomaki mobange makasi, mpe Abishagi, moto ya Sunami, azalaki kobatela ye.
16 Bethsabee bowed herself, and worshipped the king. And the king said to her: What is thy will?
Batisheba agumbamaki mpe afukamaki liboso ya mokonzi; mpe mokonzi atunaki ye: — Boni, olingi nini?
17 She answered and said: My lord, thou didst swear to thy handmaid by the Lord thy God, saying: Solomon thy son shall reign after me, and he shall sit on my throne.
Batisheba azongisaki: — Nkolo na ngai, yo moko olapaki ndayi, liboso na ngai mwasi mowumbu na yo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, na koloba: « Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai na bokonzi mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi. »
18 And behold now Adonias reigneth, and thou, my lord the king, knowest nothing of it.
Kasi sik’oyo Adoniya akomi mokonzi; mpe yo mokonzi, nkolo na ngai, oyebi yango te!
19 He hath killed oxen, and all fat cattle, and many rams, and invited all the king’s sons, and Abiathar the priest, and Joab the general of the army: but Solomon thy servant he invited not.
Abonzi bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, ya bameme; mpe abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, Nganga-Nzambe Abiatari; Joabi, mokonzi ya mampinga ya Isalaele; kasi abengisi te Salomo, mowumbu na yo.
20 And now, my lord O king, the eyes of all Israel are upon thee, that thou shouldst tell them, who shall sit on thy throne, my lord the king, after thee.
Mokonzi, nkolo na ngai, miso ya bato nyonso ya Isalaele ezali kotalela yo mpo na koyeba soki nani akovanda na kiti ya bokonzi sima na mokonzi, nkolo na ngai.
21 Otherwise it shall come to pass, when my lord the king sleepeth with his fathers, that I and my son Solomon shall be counted offenders.
Soki te, tango mokonzi, nkolo na ngai, akolala elongo na bakoko na ye, bakozwa ngai elongo na Salomo, mwana na ngai ya mobali, lokola babomi.
22 As she was yet speaking with the king, Nathan the prophet came.
Wana Batisheba azalaki nanu koloba na mokonzi, mosakoli Natan akomaki.
23 And they told the king, saying: Nathan the prophet is here. And when he was come in before the king, and had worshipped, bowing down to the ground,
Bayebisaki mokonzi: — Tala mosakoli Natan! Mosakoli Natan akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na se.
24 Nathan said: My lord O king, hast thou said: Let Adonias reign after me, and let him sit upon my throne?
Bongo, Natan alobaki: — Mokonzi, nkolo na ngai; boni, olobaki ete Adoniya akokitana na yo mpe akovanda na kiti na yo ya bokonzi?
25 Because he is gone down today, and hath killed oxen, and fatlings, and many rams, and invited all the king’s sons, and the captains of the army, and Abiathar the priest: and they are eating and drinking before him, and saying: God save king Adonias:
Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba: « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi! »
26 But me thy servant, and Sadoc the priest, and Banaias the son of Joiada, and Solomon thy servant he hath not invited.
Kasi abengisi te ngai, mosali na yo; Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mpe Salomo, mosali na yo.
27 Is this word come out from my lord the king, and hast thou not told me thy servant who should sit on the throne of my lord the king after him?
Boni, ezali solo na mitindo ya mokonzi, nkolo na ngai, nde likambo oyo esalemi? Nzokande, oyebisaki te na mosali na yo nani akovanda na kiti ya bokonzi ya nkolo na ngai sima na yo?
28 And king David answered and said: Call to me Bethsabee. And when she was come in to the king, and stood before him,
Mokonzi Davidi alobaki: — Bobengela ngai Batisheba. Batisheba ayaki pene ya mokonzi mpe atelemaki liboso na ye.
29 The king swore and said: As the Lord liveth, who hath delivered my soul out of all distress,
Mokonzi alapaki ndayi na maloba oyo: — Na Kombo na Yawe oyo akangolaki ngai na mikakatano nyonso,
30 Even as I swore to thee by the Lord the God of Israel, saying: Solomon thy son shall reign after me, and he shall sit upon my throne in my stead, so will I do this day.
nakokokisa solo, na mokolo ya lelo, ndayi oyo nalapaki epai na yo na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi.
31 And Bethsabee bowing with her face to the earth worshipped the king, saying: May my lord David live for ever.
Batisheba akitisaki elongi na ye kino na se mpe agumbamaki liboso ya mokonzi; alobaki: — Tika ete mokonzi Davidi, nkolo na ngai, awumela seko na bomoi!
32 King David also said: Call me Sadoc the priest, and Nathan the prophet, and Banaias the son of Joiada. And when they were come in before the king,
Mokonzi Davidi alobaki: — Bobenga Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan mpe Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Tango bayaki liboso ya mokonzi,
33 He said to them: Take with you the servants of your lord, and set my son Solomon upon my mule: and bring him to Gihon.
mokonzi alobaki na bango: — Bozwa elongo na bino basali ya mokonzi na bino mpe bomatisa Salomo, mwana na ngai ya mobali, na likolo ya mile na ngai ya mwasi. Bokende elongo na ye na etima ya Giyoni!
34 And let Sadoc the priest, and Nathan the prophet anoint him there king over Israel: and you shall sound the trumpet, and shall say: God save king Solomon.
Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga: « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi! »
35 And you shall come up after him, and he shall come, and shall sit upon my throne, and he shall reign in my stead: and I will appoint him to be ruler over Israel, and over Juda.
Sima, bokozonga elongo na ye, mpe akoya kovanda na kiti na ngai ya bokonzi. Ye nde akokoma mokonzi na esika na ngai. Nakomisi ye mokonzi ya Isalaele mpe ya Yuda.
36 And Banaias the son of Joiada answered the king, saying: Amen: so say the Lord the God of my lord the king.
Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azongiselaki mokonzi: — Amen! Tika ete Yawe, Nzambe ya mokonzi, nkolo na ngai, akokisa maloba oyo.
37 As the Lord hath been with my lord the king, so be he with Solomon, and make his throne higher than the throne of my lord king David.
Ndenge Yawe azalaki elongo na mokonzi, nkolo na ngai, tika ete azala mpe elongo na Salomo mpe akomisa kiti na ye ya bokonzi monene koleka oyo ya mokonzi Davidi, nkolo na ngai!
38 So Sadoc the priest, and Nathan the prophet went down, and Banaias the son of Joiada, and the Cerethi, and Phelethi: and they set Solomon upon the mule of king David, and brought him to Gihon.
Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni.
39 And Sadoc the priest took a horn of oil out of the tabernacle, and anointed Solomon: and they sounded the trumpet, and all the people said: God save king Solomon.
Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki: « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi! »
40 And all the multitude went up after him, and the people played with pipes, and rejoiced with a great joy, and the earth rang with the noise of their cry.
Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazalaki kobeta baflite mpe kosepela makasi sima na ye; mabele eninganaki na makelele na bango.
41 And Adonias, and all that were invited by him, heard it, and now the feast was at an end: Joab also hearing the sound of the trumpet, said: What meaneth this noise of the city in an uproar?
Adoniya mpe bato nyonso oyo abengisaki mpo ete bazala na ye elongo bayokaki makelele yango wana bazalaki kosilisa kolia. Boye, tango Joabi ayokaki mongongo ya kelelo, atunaki: — Makelele wana kati na engumba elakisi nini?
42 While he yet spoke, Jonathan the son of Abiathar the priest came: and Adonias said to him: Come in, because thou art a valiant man, and bringest good news.
Wana azalaki nanu koloba, Jonatan, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Abiatari, akomaki. Adoniya alobaki na ye: — Kota! Moto ya lokumu lokola yo amemaka kaka basango ya malamu.
43 And Jonathan answered Adonias: Not so: for our lord king David hath appointed Solomon king.
Jonatan azongiselaki Adoniya: — Ezali bongo te! Mokonzi Davidi, nkolo na biso, akomisi Salomo mokonzi!
44 And hath sent with him Sadoc the priest, and Nathan the prophet, and Banaias the son of Joiada, and the Cerethi, and Phelethi, and they have set him upon the king’s mule.
Mokonzi atindaki elongo na ye Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti, mpe bamatisi ye na likolo ya mile ya mokonzi.
45 And Sadoc the priest, and Nathan the prophet have anointed him king in Gihon: and they are gone up from thence rejoicing, so that the city rang again: this is the noise that you have heard.
Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bapakoli ye mafuta, na etima ya Giyoni, mpo ete akoma mokonzi. Wuta na Giyoni, bagangi na esengo, mpe engumba mobimba esepeli na likambo yango. Yango nde makelele oyo bozali koyoka.
46 Moreover Solomon sitteth upon the throne of the kingdom,
Mpe lisusu, Salomo avandi na kiti ya bokonzi;
47 And the king’s servants going in have blessed our lord king David, saying: May God make the name of Solomon greater than thy name, and make his throne greater than thy throne. And the king adored in his bed:
basali ya mokonzi bayei kopesa longonya epai na Davidi, mokonzi na biso, na maloba oyo: « Tika ete Nzambe na yo akomisa kombo ya Salomo monene koleka kombo na yo, mpe kiti na ye ya bokonzi, monene koleka oyo ya yo! » Bongo mokonzi agumbamaki mpe agumbamelaki Nzambe na mbeto na ye,
48 And he said: Blessed be the Lord the God of Israel, who hath given this day one to sit on my throne, my eyes seeing it.
mpe alobaki: « Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama, Ye oyo, na mokolo ya lelo, apesi ngai nzela ya komona moto oyo akitani na ngai na bokonzi! »
49 Then all the guests of Adonias were afraid, and they all arose and every man went his way.
Tango bato oyo Adoniya abengisaki bayokaki bongo, batelemaki na kobanga mpe bakimaki moto na moto na nzela na ye.
50 And Adonias fearing Solomon, arose, and went, and took hold on the horn of the altar.
Kasi mpo ete Adoniya abangaki Salomo, akendeki kokanga maseke ya etumbelo.
51 And they told Solomon, saying: Behold Adonias, fearing king Solomon, hath taken hold of the horn of the altar, saying: Let king Solomon swear to me this day, that he will not kill his servant with the sword.
Bayebisaki Salomo: — Adoniya azali kobanga mokonzi Salomo mpe akangi maseke ya etumbelo. Alobi: « Tika ete mokonzi Salomo alapa, na mokolo ya lelo, ndayi liboso na ngai ete akoboma mosali na ye te na mopanga. »
52 And Solomon said: If he be a good man, there shall not so much as one hair of his head fall to the ground: but if evil be found in him, he shall die.
Salomo azongisaki: — Soki kaka atamboli na sembo, suki ata moko te ya moto na ye ekokweya na mabele; kasi soki mabe emonani kati na ye, akokufa.
53 Then king Solomon sent, and brought him out from the altar: and going in he worshipped king Solomon: and Solomon said to him: Go to thy house.
Boye, mokonzi Salomo atindaki bato mpo na kokitisa ye wuta na etumbelo. Bongo Adoniya ayaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi Salomo, mpe Salomo alobaki na ye: — Zonga na ndako na yo.

< 1 Kings 1 >