< Numbers 18 >
1 And Jehovah said to Aaron, Thou and thy sons and thy father's house with thee shall bear the iniquity of the sanctuary; and thou and thy sons with thee shall bear the iniquity of your priesthood.
Yawe alobaki na Aron: « Yo elongo na bana na yo ya mibali mpe libota na yo bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema mpo na kobebisa bosantu ya Esika ya bule; mpe lisusu yo kaka elongo na bana na yo ya mibali nde bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema na mosala ya bonganga-Nzambe.
2 And thy brethren also, the tribe of Levi, the tribe of thy father, bring near with thee, that they may unite with thee, and minister unto thee; but thou and thy sons with thee [shall serve] before the tent of the testimony.
Yeisa pene na yo bandeko na yo ya mibali, Balevi, bato ya libota ya koko na yo, mpo ete basunga yo tango yo elongo na bana na yo ya mibali bokosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya Ndako ya kapo ya Litatoli.
3 And they shall keep thy charge, and the charge of the whole tent: only they shall not come near to the vessels of the sanctuary and to the altar, that they may not die, and you as well as they.
Bakosunga yo mpe bakosala misala nyonso ya Ndako ya kapo kasi bakopusana te pene ya bisalelo ya Esika ya bule mpe ya etumbelo, noki te bango to bino bokokufa.
4 And they shall unite with thee, and keep the charge of the tent of meeting, for all the service of the tent; and no stranger shall come near to you.
Bakosunga yo mpe bakozala na mokumba ya kobatela Ndako ya kapo ya Bokutani, mosala nyonso ya Ndako ya kapo, mpe moto mosusu te akoki kopusana pene ya esika oyo bozali.
5 And ye shall keep the charge of the sanctuary, and the charge of the altar; that there come no wrath any more upon the children of Israel.
Bino nde bokozala na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpe etumbelo, mpo ete kanda makasi ekweya lisusu likolo ya Isalaele te.
6 And I, behold, I have taken your brethren, the Levites, from among the children of Israel; to you are they given as a gift for Jehovah to perform the service of the tent of meeting.
Tala, Ngai moko nde naponaki bandeko na yo, Balevi, kati na bana ya Isalaele lokola likabo mpo na yo; babulisami mpo na Yawe mpo na kosala mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
7 But thou and thy sons with thee shall attend to your priesthood for all that concerneth the altar, and for that which is inside the veil; and ye shall perform the service: I give you your priesthood as a service of gift, and the stranger that cometh near shall be put to death.
Kasi ekozala kaka yo elongo na bana na yo ya mibali nde bokosala mosala lokola Banganga-Nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe oyo esalemaka na sima ya rido. Nazali kopesa yo mosala ya bonganga-Nzambe lokola likabo. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule asengeli kokufa. »
8 And Jehovah spoke to Aaron, And I, behold, I have given thee the charge of my heave-offerings, of all the hallowed things of the children of Israel; to thee have I given them, because of the anointing, and to thy sons by an everlasting statute.
Bongo Yawe alobaki lisusu na Aron: « Ngai moko napesi yo mokumba ya kobatela makabo oyo babonzeli Ngai. Napesi na yo mpe na bana na yo ya mibali, lokola eteni na bino, makabo nyonso ya bule oyo bana ya Isalaele bapesi Ngai: ezali mobeko ya libela na libela.
9 This shall be thine of the most holy things, [reserved] from the fire: every offering of theirs, of all their oblations, and of all their sin-offerings, and of all their trespass-offerings, which they render unto me, it is most holy for thee and for thy sons.
Tala eteni oyo okozwa kati na makabo ya bule oyo eleki kitoko, oyo batumba na moto te: makabo nyonso oyo bakomemela Ngai lokola makabo oyo eleki bule, ezala makabo ya bagato to bambeka mpo na masumu to bambeka nyonso ya kozongisa boyokani; biteni wana nyonso ekozala mpo na yo elongo na bana na yo.
10 As most holy shalt thou eat it: every male shall eat it; it shall be holy unto thee.
Bokolia yango lokola biloko oyo eleki bule, mwana mobali nyonso akolia yango. Bokotala yango lokola eloko ya bule.
11 And this shall be thine: the heave-offering of their gift, with all the wave-offerings of the children of Israel; I have given them unto thee, and to thy sons and to thy daughters with thee, by an everlasting statute; every one that is clean in thy house shall eat of it.
Tala lisusu biloko oyo ekozala mpo na yo: biloko nyonso oyo bakobonza kati na makabo oyo ekowuta na maboko ya bana ya Isalaele. Napesi yango epai na yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola mobeko ya libela na libela. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto akoki kolia yango.
12 All the best of the oil, and all the best of the new wine, and of the wheat, the firstfruits of them which they give to Jehovah, have I given thee.
Napesi yo mafuta nyonso ya olive oyo eleki kitoko, vino ya sika mpe ble oyo bapesi epai na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na bango.
13 The first ripe of everything that is in their land, which they shall bring to Jehovah, shall be thine; every one that is clean in thy house shall eat of it.
Bambuma ya liboso ya mokili, oyo bakomema epai na Yawe ekozala mpo na yo. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto, akoki kolia yango.
14 Every devoted thing in Israel shall be thine.
Eloko nyonso, kati na Isalaele, oyo ekokabama epai na Yawe ekozala mpo na yo.
15 Everything that breaketh open the womb of all flesh, which they present to Jehovah, of men or of beasts, shall be thine; nevertheless the firstborn of man shalt thou in any case ransom, and the firstborn of unclean beasts shalt thou ransom.
Mpe lisusu, bana liboso nyonso, ezala ya bato to ya banyama oyo bakomema epai na Yawe bakozala mpo na yo. Kasi osengeli kosikola mwana mobali nyonso ya liboso ya moto to ya nyama ya mbindo.
16 And those that are to be ransomed from a month old shalt thou ransom, according to thy valuation, for the money of five shekels, after the shekel of the sanctuary, which is twenty gerahs.
Tango bakokokisa sanza moko, osengeli kosikola bango na motuya ya mbongo ya bibende mitano ya palata, oyo moko na moko kati na yango ezali ya bagrame zomi, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo.
17 But the firstborn of a cow, or the firstborn of a sheep, or the firstborn of a goat, thou shalt not ransom: they are holy. Thou shalt sprinkle their blood on the altar, and their fat shalt thou burn as an offering by fire for a sweet odour to Jehovah.
Kasi osengeli te kosikola mwana liboso ya ngombe, ya meme to ya ntaba, pamba te ezali bule. Okosopa makila na yango na etumbelo mpe okotumba mafuta na yango lokola likabo bazikisa na moto, likabo ya solo kitoko mpo na Yawe.
18 And their flesh shall be thine; as the wave-breast and as the right shoulder shall it be thine.
Misuni na yango ekozala mpo na yo, ndenge moko mpe mpo na tolo mpe mopende ya loboko ya mobali oyo batombolaka mpo na kobonzela Ngai.
19 All the heave-offerings of the holy things, which the children of Israel offer to Jehovah, have I given thee, and to thy sons and to thy daughters with thee, by an everlasting statute: it shall be an everlasting covenant of salt before Jehovah unto thee and thy seed with thee.
Napesi yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola ekateli ya libele na libela, biloko nyonso oyo bana ya Isalaele bakotiaka pembeni mpo na kobonza epai na Yawe lokola makabo ya bule. Ezali boyokani ya seko, oyo ekobongwanaka te liboso ya Yawe mpo na yo mpe bakitani na yo. »
20 And Jehovah said to Aaron, In their land thou shalt have no inheritance, neither shalt thou have any portion among them: I am thy portion and thine inheritance among the children of Israel.
Yawe alobaki na Aron: « Okozwa eteni ya mabele te kati na mokili na bango, mpe okozwa ata bomengo moko te lokola libula kati na bana ya Isalaele, pamba te Ngai moko nde nazali bomengo mpe libula na bino kati na bana ya Isalaele.
21 And to the children of Levi, behold, I have given all the tithes in Israel for an inheritance, for their service which they perform, the service of the tent of meeting.
Napesi lokola libula, epai ya Balevi, biteni nyonso ya zomi oyo ekozwama kati na Isalaele lokola lifuti ya mosala oyo basalaka kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
22 Neither shall the children of Israel henceforth come near the tent of meeting, to bear sin and die.
Kobanda sik’oyo, bana ya Isalaele basengeli lisusu te kopusana pene ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bakomema mokumba ya masumu na bango mpe bakokufa.
23 But the Levite, he shall perform the service of the tent of meeting, and they shall bear their iniquity: it is an everlasting statute throughout your generations. And among the children of Israel shall they possess no inheritance;
Ezali Balevi nde bazali na mokumba ya kosala mosala na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe ya komema mokumba ya bambeba na bango na kati na yango. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na bileko oyo ekoya ya sima. Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele.
24 for I have given for an inheritance to the Levites the tithes of the children of Israel, which they offer as a heave-offering to Jehovah; therefore I have said of them, They shall possess no inheritance among the children of Israel.
Na esika na yango, napesi epai ya Balevi lokola libula na bango, biteni moko nyonso kati na biteni zomi oyo bana ya Isalaele bakopesa lokola likabo epai na Yawe. Yango wana, nalobaki na tina na bango: ‹ Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele. › »
25 And Jehovah spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
26 And to the Levites shalt thou speak, and say unto them, When ye take of the children of Israel the tithes which I have given you from them for your inheritance, then ye shall offer a heave-offering from it for Jehovah, the tenth of the tithe.
« Loba na Balevi mpe yebisa bango: ‹ Tango bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele eteni ya zomi oyo napesi bino lokola libula, bosengeli kopesa eteni ya zomi ya biteni wana ya zomi lokola likabo mpo na Yawe.
27 And your heave-offering shall be reckoned unto you, as the corn from the threshing-floor, and as the fulness of the winepress.
Likabo yango ekozala mpo na bino lokola oyo balongolaka na ble oyo bazali kobuka na elanga mpe na vino ya sika oyo ezali kobima na ekamolelo.
28 Thus ye also shall offer Jehovah's heave-offering of all your tithes, which ye take of the children of Israel; and ye shall give thereof Jehovah's heave-offering to Aaron the priest.
Na nzela wana nde bino mpe bokobonza makabo epai na Yawe wuta na biteni nyonso ya zomi oyo bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele. Mpe wuta na biteni wana ya zomi, bosengeli kopesa eteni ya Yawe epai ya Nganga-Nzambe Aron.
29 Out of all that is given you ye shall offer the whole heave-offering of Jehovah, — of all the best thereof the hallowed part thereof.
Kati na makabo nyonso oyo bokozwa, bosengeli kopesa epai na Yawe eteni oyo eleki kitoko mpe eleki bule. ›
30 And thou shalt say unto them, When ye heave the best thereof from it, then it shall be counted unto the Levites as produce of the threshing-floor, and as produce of the winepress.
Loba na Balevi: ‹ Tango bokopesa eteni oyo eleki kitoko, ekotangama mpo na bino lokola bambuma oyo elanga eboti mpe lokola vino oyo ekamolelo ebimisi.
31 And ye shall eat it in every place, ye and your households; for it is your reward for your service in the tent of meeting.
Bino elongo na mabota na bino, bokolia yango na bisika nyonso, pamba te yango ezali lifuti na bino mpo na mosala na bino kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
32 And ye shall bear no sin by reason of it, if ye heave from it the best of it; and ye shall not profane the holy things of the children of Israel, lest ye die.
Na nzela ya kopesa eteni wana oyo eleki kitoko, bokozala na ngambo te na likambo wana, bokobebisa te bosantu ya makabo ya bana ya Isalaele mpe bokokufa te. › »