< Numbers 15 >

1 And Jehovah spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
2 Speak unto the children of Israel, and say unto them, When ye come into the land of your dwellings, which I give unto you,
« Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Sima na bino kokota na mokili oyo nakopesa bino, mokili epai wapi bokovanda,
3 and will make an offering by fire to Jehovah, a burnt-offering or a sacrifice for the performance of a vow, or as a voluntary offering, or in your set feasts, to make a sweet odour to Jehovah, of the herd or of the flock,
bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule.
4 then shall he that presenteth his offering to Jehovah bring as oblation a tenth part of fine flour mingled with a fourth part of a hin of oil;
Boye, moto oyo akomema mbeka na ye asengeli kobonzela Yawe likabo ya gato, bakilo misato ya farine oyo basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive.
5 and of wine for a drink-offering shalt thou offer the fourth part of a hin with the burnt-offering, or with the sacrifice, for one lamb.
Mpo na bana meme moko na moko ya mbeka ya kotumba, bosengeli kobakisa balitele ya vino lokola likabo ya masanga.
6 And for a ram thou shalt offer as oblation two tenth parts of fine flour mingled with oil, a third part of a hin,
Mpo na meme ya mobali, bokobongisa likabo ya gato, bakilo motoba ya farine oyo basangisa na balitele mibale na ndambo ya mafuta ya olive,
7 and of wine for a drink-offering shalt thou offer the third part of a hin; for a sweet odour to Jehovah.
mpe balitele mibale na ndambo ya vino lokola likabo ya masanga. Bokobonza yango lokola malasi ya solo kitoko liboso ya Yawe.
8 And when thou offerest a bullock for a burnt-offering, or a sacrifice for the performance of a vow, or for a peace-offering to Jehovah,
Soki bobongisi mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokisa ndayi to mbeka ya boyokani mpo na Yawe;
9 then shall they present with the bullock as oblation three tenth parts of fine flour mingled with half a hin of oil;
bokomema elongo na mwana ngombe, likabo ya gato, bakilo libwa ya farine basangisa na balitele minei ya mafuta.
10 and of wine shalt thou present half a hin, for a drink-offering, as an offering by fire, of a sweet odour to Jehovah.
Bokomema lisusu balitele minei ya vino lokola likabo ya masanga: ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
11 Thus shall it be done for one ox, or for one ram, or for a lamb, or for a kid;
Ezali ndenge wana nde esengeli kobongisa mbeka nyonso ya ngombe ya mobali to ya meme ya mobali to ya bana meme to mpe ya mwana ntaba.
12 according to the number that ye offer, so shall ye do to every one according to their number.
Bokosala bongo mpo na nyama moko na moko, ezala soki motango na yango ezali boni.
13 And all that are born in the land shall do these things thus, in presenting an offering by fire of a sweet odour to Jehovah.
Mwana mboka asengeli kosala bongo mpo na makabo wana tango akomema likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
14 And if a stranger sojourn with you, or whoever be among you throughout your generations, and will offer an offering by fire of a sweet odour to Jehovah, — as ye do, so shall he do.
Pamba te, na milongo oyo ekoya, mopaya nyonso to moto mosusu oyo azali kowumela kati na bino, oyo akobonza likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, asengeli kosala ndenge kaka bino bozali kosala.
15 As to the congregation, there shall be one statute for you, and for the stranger that sojourneth with you, an everlasting statute throughout your generations: as ye are, so shall the stranger be, before Jehovah.
Mibeko ya kosalela ekozala ndenge moko mpo na lisanga mobimba, ezala bino to mopaya oyo akowumela kati na bino. Yango ekozala mobeko ya libela ezala mpo na milongo oyo ekoya. Bino na mopaya bozali ndenge moko liboso ya Yawe.
16 One law and one ordinance shall be for you, and for the stranger that sojourneth with you.
Ezala bino to mopaya oyo azali kati na bino, bokosalela kaka mibeko mpe mitindo moko. › »
17 And Jehovah spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
18 Speak unto the children of Israel, and say unto them, When ye come into the land whither I bring you,
« Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Tango bokokota na mokili oyo nazali komema bino
19 then it shall be, when ye eat of the bread of the land, that ye shall offer a heave-offering to Jehovah;
mpe bokolia bilei ya mokili yango, bobonza ndambo lokola likabo epai na Yawe.
20 the first of your dough shall ye offer, a cake, for a heave-offering; as the heave-offering of the threshing-floor, so shall ye offer this.
Bobonza gato oyo ewuti na farine ya liboso oyo bokonika, mpe bobonza yango lokola likabo oyo ewuti na mbuma ya liboso oyo elanga ya ble eboti.
21 Of the first of your dough ye shall give to Jehovah a heave-offering throughout your generations.
Boye, bokobonzaka epai na Yawe bambuma ya liboso ya milona na bino: ekozala bongo mpo na milongo oyo ekoya na sima.
22 And if ye sin inadvertently, and do not all these commandments, which Jehovah hath spoken unto Moses,
Soki esalemi ete bobuki na nko te moko kati na mibeko oyo Ngai Yawe napesaki na nzela ya Moyize,
23 all that Jehovah hath commanded you through Moses, from the day that Jehovah gave commandment, and henceforward throughout your generations;
moko kati na mitindo oyo Ngai Yawe napesaki bino na nzela ya Moyize, kobanda na mokolo oyo napesaki bino yango, mpe nazali kokoba kopesa yango kati na milongo oyo ekoya;
24 then it shall be, if ought be committed by inadvertence [hid] from the eyes of the assembly, that the whole assembly shall offer one young bullock for a burnt-offering, for a sweet odour to Jehovah, and its oblation and its drink-offering according to the ordinance, and one buck of the goats for a sin-offering.
mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.
25 And the priest shall make atonement for the whole assembly of the children of Israel, and it shall be forgiven them; for it was a sin of inadvertence, and they have brought before Jehovah their offering, as an offering by fire to Jehovah, and their sin-offering for their [sin of] inadvertence;
Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na lisanga mobimba ya Isalaele, mpe bakolimbisama; pamba te basalaki mabe na nko te mpe bamemelaki Yawe mpo na mabe na bango likabo bazikisa na moto mpe mbeka mpo na masumu.
26 and it shall be forgiven the whole assembly of the children of Israel, and the stranger that sojourneth among them; for with all the people there was [a sin of] inadvertence.
Lisanga mobimba ya Isalaele elongo na bapaya oyo bazali kowumela kati na bango bakozwa bolimbisi, pamba te bato nyonso bamikotisaki na mbeba oyo esalemaki na nko te.
27 And if one soul sin through inadvertence, then he shall present a yearling she-goat for a sin-offering.
Kasi soki esalemi ete moto moko nde asali lisumu na nko te, asengeli komema mwana ntaba ya mwasi ya mobu moko lokola mbeka mpo na masumu.
28 And the priest shall make atonement for the soul that hath done inadvertently, when he sinneth by inadvertence before Jehovah, to make atonement for him; and it shall be forgiven him.
Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe mpo na moto oyo asalaki masumu na nko te. Mpe tango mosala ya bolimbisi masumu ekosalema mpo na ye, akolimbisama solo.
29 For him that is born in the land among the children of Israel, and for the stranger that sojourneth among them — there shall be one law for you, for him who doeth anything through inadvertence.
Bosengeli kosalela mobeko se moko, ezala mpo na mwana mboka kati na bana ya Isalaele to mpo na mopaya oyo azali kowumela kati na bino, oyo asali lisumu na nko te.
30 But the soul that doeth ought with a high hand, whether born in the land, or a stranger, he reproacheth Jehovah; and that soul shall be cut off from among his people.
Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye.
31 For he hath despised the word of Jehovah, and hath broken his commandment: that soul shall surely be cut off; his iniquity is upon him.
Pamba te atioli Liloba na Yawe mpe abuki mitindo na ye. Solo, moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati na bato na ye mpe akomema ngambo ya mabe na ye. › »
32 And while the children of Israel were in the wilderness they found a man gathering sticks on the sabbath day.
Wana bana ya Isalaele bazalaki kati na esobe, bamonaki moto moko kolokota bakoni na mokolo ya Saba.
33 And they that found him gathering sticks brought him to Moses and Aaron, and to the whole assembly.
Bato oyo bamonaki ye kolokota bakoni bamemaki ye epai ya Moyize, Aron mpe lisanga mobimba.
34 And they put him in custody, for it was not declared what should be done to him.
Batiaki ye na esika oyo bazalaki kokengela ye malamu, pamba te bayebaki nanu malamu-malamu te nini esengelaki kosala mpo na ye.
35 And Jehovah said to Moses, The man shall certainly be put to death: the whole assembly shall stone him with stones outside the camp.
Bongo Yawe alobaki na Moyize: « Moto oyo asengeli kokufa. Bato nyonso ya lisanga basengeli komema ye libanda ya molako mpe koboma ye na mabanga. »
36 And the whole assembly led him outside the camp, and stoned him with stones, and he died, as Jehovah had commanded Moses.
Bongo lisanga mobimba ememaki ye libanda ya molako mpe babambaki ye mabanga kino akufaki ndenge Yawe atindaki yango epai ya Moyize.
37 And Jehovah spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
38 Speak unto the children of Israel, and bid them that they make them tassels on the corners of their garments, throughout their generations, and that they attach to the tassel of the corners a lace of blue;
« Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Na milongo oyo ekoya, bosengeli kotia singa ya langi ya ble na basonge ya bilamba na bino; esengeli kokangisa kitendi moko na moko na singa ya langi ya ble.
39 and it shall be unto you for a tassel, that ye may look upon it, and remember all the commandments of Jehovah, and do them; and that ye seek not after [the lusts of] your own heart and your own eyes, after which ye go a whoring;
Tango nyonso bokotala bitendi yango, bokobanda kokanisa mitindo nyonso ya Yawe, mpo ete botosa yango mpe botika kolanda baposa ya mitema na bino mpe ya miso na bino, oyo ekoki kotindika bino na kobungisa boyengebene.
40 that ye may remember and do all my commandments, and be holy unto your God.
Boye, bokokanisa mibeko na Ngai nyonso, bokotosa yango mpe bokozala bule mpo na Nzambe na bino.
41 I am Jehovah your God, who brought you out of the land of Egypt to be your God: I am Jehovah your God.
Nazali Yawe, Nzambe na bino; nabimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Solo, nazali Yawe, Nzambe na bino. › »

< Numbers 15 >