< Jeremiah 29 >

1 And these are the words of the letter that the prophet Jeremiah sent from Jerusalem to the residue of the elders of the captivity, and to the priests, and to the prophets, and to all the people whom Nebuchadnezzar had carried away captive from Jerusalem to Babylon
Tala makomi ya mokanda oyo mosakoli Jeremi atindaki, wuta na Yelusalemi, epai ya bakambi oyo batikalaki kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya basakoli mpe epai ya bato nyonso oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi.
2 (after that Jeconiah the king, and the queen, and the eunuchs, the princes of Judah and Jerusalem, and the craftsmen, and the smiths, had departed from Jerusalem);
Mokanda yango etindamaki sima na bato oyo kokende na bawumbu longwa na Yelusalemi: mokonzi Yekonia, mama ya mokonzi, bakalaka na ye ya lokumu, bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bato oyo balambaka bibende na moto mpe bato ya misala ya maboko.
3 by the hand of Elasah the son of Shaphan, and Gemariah the son of Hilkijah (whom Zedekiah king of Judah sent to Babylon, unto Nebuchadnezzar king of Babylon), saying,
Apesaki mokanda yango na maboko ya Eleasa, mwana mobali ya Shafani; mpe na maboko ya Gemaria, mwana mobali ya Ilikia. Ezali bango nde Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki na Babiloni epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. Mokanda yango elobaki boye:
4 Thus saith Jehovah of hosts, the God of Israel, unto all the captivity, whom I have caused to be carried away from Jerusalem unto Babylon:
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi epai ya bato nyonso oyo namemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi:
5 Build houses, and dwell in them, and plant gardens, and eat the fruit of them.
« Botonga bandako mpe bovanda kuna; bolona banzete mpe bolia mbuma na yango;
6 Take wives, and beget sons and daughters; and take wives for your sons, and give your daughters to husbands, that they may bear sons and daughters; and multiply there, and be not diminished.
bobalana, bobota bana mibali mpe bana basi, bolukela bana na bino ya mibali basi mpe bobalisa bana na bino ya basi, mpo ete bango mpe babota bana mibali mpe bana basi. Bobotana kuna mpe bokoma ebele, mpe botika te ete motango na bino ekita.
7 And seek the peace of the city whither I have caused you to be carried away captive, and pray unto Jehovah for it: for in the peace thereof shall ye have peace.
Boluka kimia mpe bolamu ya engumba epai wapi namemaki bino na bowumbu; bobondela Yawe mpo na yango, pamba te soki yango ebongi, bino mpe bokozala malamu. »
8 For thus saith Jehovah of hosts, the God of Israel: Let not your prophets that are in your midst, nor your diviners deceive you, neither hearken to your dreams, which ye like to dream.
Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino: bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto.
9 For they prophesy falsely unto you in my name: I have not sent them, saith Jehovah.
Pamba te bazali nde kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai; natindi bango te, » elobi Yawe.
10 For thus saith Jehovah: When seventy years shall be accomplished for Babylon I will visit you, and perform my good word toward you, in bringing you back to this place.
Kasi tala liloba oyo Yawe alobi: « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo.
11 For I know the thoughts that I think toward you, saith Jehovah, thoughts of peace, and not of evil, to give you in your latter end a hope.
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
12 And ye shall call upon me, and ye shall go and pray unto me, and I will hearken unto you;
Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai; mpe Ngai nakoyoka bino.
13 and ye shall seek me and find me, for ye shall search for me with all your heart,
Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba.
14 and I will be found of you, saith Jehovah. And I will turn your captivity, and I will gather you from all the nations, and from all the places whither I have driven you, saith Jehovah; and I will bring you again into the place whence I have caused you to be carried away captive.
Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. »
15 If ye say, Jehovah hath raised us up prophets in Babylon;
Solo, bokoki koloba: « Yawe abimisi basakoli kati na biso awa na Babiloni! »
16 yea, thus saith Jehovah concerning the king that sitteth upon the throne of David, and concerning all the people that dwell in this city, your brethren that are not gone forth with you into captivity;
Kasi tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi oyo avandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, na tina na bavandi nyonso ya engumba oyo, mpe na tina na bandeko na bino oyo bakendeki te na bowumbu elongo na bino;
17 thus saith Jehovah of hosts: Behold, I will send against them the sword, the famine, and the pestilence, and will make them like the vile figs, that cannot be eaten for badness.
tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, mpe nakokomisa bango lokola mbuma ya figi oyo epola, oyo moto ata moko te akokoka kolia.
18 And I will pursue them with the sword, with the famine, and with the pestilence, and will give them over to be driven hither and thither into all the kingdoms of the earth, to be an execration, and an astonishment, and a hissing, and a reproach, among all the nations whither I will drive them:
Nakolanda bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka; mpe na miso ya bikolo nyonso ya mabele, nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya lisuma, eloko ya kobanga mpe ya kotiola kati na bikolo nyonso epai wapi nakobengana bango.
19 because they have not hearkened to my words, saith Jehovah, wherewith I sent unto them my servants the prophets, rising early and sending; but ye have not hearkened, saith Jehovah.
Pamba te bayokaki maloba na Ngai te, » elobi Yawe, « maloba oyo nazalaki kotindela bango tango na tango na nzela ya basali na Ngai, basakoli. Mpe bino bato oyo bokendeki na bowumbu, bino mpe boyokaki te, » elobi Yawe.
20 But ye, all ye of the captivity, whom I have sent from Jerusalem to Babylon, hear the word of Jehovah.
Yango wana, boyoka Liloba na Yawe, bino bawumbu nyonso oyo natindaki na Babiloni longwa na Yelusalemi.
21 Thus saith Jehovah of hosts, the God of Israel, concerning Ahab the son of Kolaiah, and concerning Zedekiah the son of Maaseiah, who prophesy falsehood unto you in my name: Behold, I will give them into the hand of Nebuchadrezzar king of Babylon, and he shall smite them before your eyes.
Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na Akabi, mwana mobali ya Kolaya, mpe na tina na Sedesiasi, mwana mobali ya Maaseya, oyo bazali kosakola makambo ya lokuta epai na bino, na Kombo na Ngai: « Nakokaba bango na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe akoboma bango na miso na bino.
22 And of them shall be taken up a curse by all the captivity of Judah that are in Babylon, saying, Jehovah make thee like Zedekiah and like Ahab, whom the king of Babylon roasted in the fire;
Likolo na bango, bawumbu nyonso oyo bawutaki na Yuda, bongo bazali na Babiloni, bakosalela elakeli mabe oyo: ‹ Tika ete Yawe asala bino ndenge asalaki Sedesiasi mpe Akabi, oyo mokonzi ya Babiloni atumbaki na moto! ›
23 because they have committed infamy in Israel, and have committed adultery with their neighbours' wives, and have spoken words of falsehood in my name, which I had not commanded them: and I [am] he that knoweth, and [am] witness, saith Jehovah.
Pamba te basalaki kati na Isalaele ekobo elongo na basi ya baninga na bango, bapaya, mpe balobaki lokuta na Kombo na Ngai, nzokande Ngai natindaki bango te kosala bongo. Nayebi yango malamu, mpe Ngai moko nazali Motatoli na yango, » elobi Yawe.
24 And thou shalt speak to Shemaiah the Nehelamite, saying,
Yebisa Shemaya, moto ya Nekelami, maloba oyo:
25 Thus speaketh Jehovah of hosts, the God of Israel, saying, Because thou hast sent letters in thy name unto all the people that are at Jerusalem, and to Zephaniah the son of Maaseiah the priest, and to all the priests, saying,
« Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Otindaki mikanda na kombo na yo moko epai ya bato nyonso ya Yelusalemi, epai ya Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpe epai ya Banganga-Nzambe. Olobaki na Sofoni:
26 Jehovah hath made thee priest in the stead of Jehoiada the priest, that there should be officers [in] the house of Jehovah, over every madman and self-made prophet, that thou shouldest put him in the stocks and in the shackles.
‹ Yawe aponaki yo Nganga-Nzambe na esika ya Yeoyada mpo ete obatela Tempelo ya Yawe. Osengelaki kobwaka na boloko mpe kokanga bibende na makolo, bato pamba oyo bazali komimona lokola basakoli.
27 And now, why hast thou not reproved Jeremiah of Anathoth, who maketh himself a prophet to you?
Boye, mpo na nini opamelaki te mosakoli Jeremi, moto ya Anatoti, oyo azali komimona lokola mosakoli kati na bino?
28 Forasmuch as he hath sent unto us in Babylon, saying, It will be long; build houses, and dwell [in them], and plant gardens, and eat the fruit of them.
Atindelaki biso sango oyo kati na Babiloni: Bowumbu na bino ekowumela tango molayi. Yango wana, botonga bandako mpe bovanda kuna, bolona bilanga mpe bolia mbuma na yango. › »
29 — And Zephaniah the priest read this letter in the ears of the prophet Jeremiah.
Nzokande, Nganga-Nzambe Sofoni atangisaki mosakoli Jeremi mokanda yango.
30 And the word of Jehovah came unto Jeremiah, saying,
Boye, Yawe alobaki na Jeremi:
31 Send to all them of the captivity, saying, Thus saith Jehovah concerning Shemaiah the Nehelamite: Because that Shemaiah hath prophesied unto you, and I sent him not, and he hath caused you to trust in falsehood;
« Tinda sango oyo epai ya bawumbu nyonso: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Shemaya, moto ya Nekelami: Lokola Shemaya asakolaki makambo ya lokuta epai na bino, nzokande natindaki ye te, mpe amemi bino na kotia motema na lokuta,
32 therefore thus saith Jehovah: Behold, I will punish Shemaiah the Nehelamite, and his seed: he shall not have a man to dwell among this people; neither shall he see the good that I will do for my people, saith Jehovah; because he hath spoken revolt against Jehovah.
tala liloba oyo Yawe alobi: Solo, nakopesa Shemaya, moto ya Nekelami, etumbu elongo na bakitani na ye. Kati na bato na ye, moko te akotikala, mpe akotikala komona te bolamu oyo nakosala epai ya bato na Ngai, elobi Yawe, pamba te atindiki bato na Ngai kotombokela Ngai. › »

< Jeremiah 29 >